COLOSSIANS
Chapter 1
Colo | LinVB | 1:2 | ôná bandeko ba Kolóse, bandeko ba bísó o boyambi Krístu. Nzámbe Tatá wa bísó ákabela bínó ngrásya na bobóto ! | |
Colo | LinVB | 1:3 | Totóndí Nzámbe, Tatá wa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu, ntángo ínso tokanísí bínó o losámbo la bísó. | |
Colo | LinVB | 1:5 | mpô bozalí kotía elíkyá na bolámu baléngélélí bínó o likoló. Boyókí yangó áwa basangélákí bínó Liloba lya bosôló o Nsango Elámu. | |
Colo | LinVB | 1:6 | Nsango Elámu eye ekómí epái ya bínó epalángání mpé ezalí kobóta mbuma o mokili mobimba. Epái ya bínó esálémí sé bôngó út’o mokolo boyókákí mpé boyébí ngrásya ya Nzámbe na bosôló. | |
Colo | LinVB | 1:7 | Epafráse moto atéyákí bínó yangó, yě móníngá wa bísó wa bolingo wa mosálá óyo akosálelaka Krístu o nkómbó ya bísó. | |
Colo | LinVB | 1:9 | Yangó wâná, út’o mokolo toyókí nsango eye, bísó lokóla tolembí té kosámbela mpô ya bínó. Tokobóndelaka Nzámbe ’te atóndisa bínó na bwányá mpé na mayéle ma Elímo mpô ’te bóyéba maye mánso yě alingí. | |
Colo | LinVB | 1:10 | Bôngó bókoka kozala na ezalela ebongí na Mokonzi mpé kosepelisa yě o mambí mánso : bokobimisa misálá milámu ndéngé na ndéngé mpé bokoyéba Nzámbe leká libosó. | |
Colo | LinVB | 1:11 | Yě Nzámbe áléndisa bínó na ngúyá ya nkémbo ya yě mpô ’te bózala na moléndé mpé bókanga mitéma o makambo mánso. | |
Colo | LinVB | 1:12 | Bótóndo Tatá Nzámbe na esengo, mpô abongísélí bínó bolámu akokabelaka basántu o mbóka ya mwínda. | |
Colo | LinVB | 1:13 | Yě moto alongólí bísó o bokonzi bwa molílí mpé akótísí bísó o Bokonzi bwa Mwána wa yě wa bolingo. | |
Colo | LinVB | 1:16 | bilóko bínso bikelámí na yě, o likoló mpé o nsé, biye bikomónonoko na biye bikomónonoko té, milímo mizalí na Ngwendé, na Lokúmu, na Bokonzi mpé na Ngúyá : bínso bikelámí na yě, mpé mpô ya yě. | |
Colo | LinVB | 1:18 | Azalí mpé Motó mwa Nzóto : Nzóto ndé Eklézya. Yě libandela, moto wa yambo asékwí o bawá, mpô ’te ázala Mokonzi wa bikelámo bínso. | |
Colo | LinVB | 1:20 | Mpô ya yě molóngó mobimba mozóngí o bondeko bwa Nzámbe, ná baye bazalí o nsé, ná baye bazalí o likoló, na makilá ma yě o kurúse azóngísí bondeko. | |
Colo | LinVB | 1:21 | Bínó mpé libosó bokabwánákí na Nzámbe, bozalákí bangúná ba yě, mpô ya mabé mánso bozalákí kokanisa mpé kosála. | |
Colo | LinVB | 1:22 | Kasi sikáwa, na liwá lya nzóto ya bomoto ya Krístu, Nzámbe azóngísí bondeko káti ya bínó na yě mǒkó. Akómisa bínó bôngó basántu o míso ma yě, bózala na mbéba té, na mabé mǒkó mpé té. | |
Colo | LinVB | 1:23 | Yangó wâná bosengélí kopikama makási o boyambi, bótía mitéma bobélé na libíkí balakélí bínó o Nsango Elámu eye boyókákí. Bótía mitéma epái esúsu té. Basílí kosangela bato bánso Nsango êná ; ngáí Pólo nakómí mosáleli wa yangó. | |
Colo | LinVB | 1:24 | Sikáwa nasepélí na mpási eye nazalí koyóka mpô ya bínó ; nákokisa bôngó o nzóto ya ngáí mpási Krístu ayókákí mpô ya Nzóto ya yě, yangó ndé Eklézya. | |
Colo | LinVB | 1:25 | Nakómí mosáleli wa Eklézya, áwa Nzámbe apésí ngáí mosálá mwa bosangeli bínó Liloba lya Nzámbe mobimba. | |
Colo | LinVB | 1:26 | Ut’o kala Nzámbe abómbélákí bato mobómbamo moye, sikáwa alakísí mwangó na bakrístu : | |
Colo | LinVB | 1:27 | Nzámbe alingákí koyébisa bangó nkita mpé nkémbo ya mobómbamo moye epái ya bato ba bikólo bisúsu. Mobómbamo mwangó ndé : Krístu azalí o ntéi ya bínó, yě moto akopésa bínó elíkyá ya kozwa nkémbo ya Nzámbe ! | |
Colo | LinVB | 1:28 | Bísó tozalí kosangela Krístu óyo, áwa tozalí kokébisa bato bánso mpé kotéya bangó na bwányá bonéne mpô ’te bákóma basántu sôló o Krístu. | |