Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 14
Deut LinVB 14:1  Bino bozali bana ba Yawe Nzambe wa bino. Bokoki ko­katakata nzoto te to kokokola mo­tó te mpo ya mowei,
Deut LinVB 14:2  zambi bozali ekolo ya bato babonzami na Yawe Nzambe wa bino. Yawe aponi bino mpo ’te bozala ekolo ya ye moko o kati ya bikolo binso bya nse mobi­mba.
Deut LinVB 14:4  Bokoki kolia nyama iye : ngombe, mpata, ntaba,
Deut LinVB 14:5  mbuli, mboloko, mo­ndo­nga, kulupa, mongo, momboyo na ntaba ya ngomba.
Deut LinVB 14:6  Bokoki kolia nya­ma inso izali ma matambi maka­bwani bo misapi mibale, iye ikonyamutaka biloko.
Deut LinVB 14:7  Nzokande o kati ya nyama inso ikonyamutaka biloko mpe izali na matambi makabwani na misapi mibale nyama isusu izali ekila : kamela, nsimbiliki na monsole. Nyama iye ikonyamutaka kasi matambi ma yango makabwani te, batala nyama ina inso lokola nyama mbi­ndo. Bolia misuni mya yango te.
Deut LinVB 14:8  Botala mpe lokola nyama mbindo ngulu, ata matambi ma yango makabwani na misapi mibale, kasi ekonyamutaka te. Bokoki kolia misuni mya yango te, kosimba ebembe ya yango mpe te.
Deut LinVB 14:9  O kati ya mbisi inso bokoki kolia iye : mbisi izali na binyanyeli to na biteku, bokoki kolia yango.
Deut LinVB 14:10  Iye izangi binyanyeli na biteku, bolia yango te ; botala yango lokola mbisi mbindo.
Deut LinVB 14:11  Ndeke inso izangi mbindo, boko­ki kolia yango.
Deut LinVB 14:12  Kasi ndeke iye izali ekila : engondo, mpongo, ewa­ngo,
Deut LinVB 14:13  ko­mbekombe etane, engondo mpe­mbe mpe mitindo minso mya nze­ngo,
Deut LinVB 14:15  maligbanga, nyabokele mpe miti­ndo minso mya kombekombe ya mbo­ka,
Deut LinVB 14:18  nko­ngi, punzebale, nsongonolo na lo­nge­mbu.
Deut LinVB 14:19  Nyama inso ike izali na mapapu, botala yango lokola nyama mbindo, bolia yango te.
Deut LinVB 14:21  Nyama ekufi yango moko, bolia yango mpe te. Bokopesa yango na mo­mpaya oyo afandi epai ya bino alia yango, to bokoteke yango na mouta oyo afandi o mboka esusu. Mpamba te, bozali ekolo ya bato babonzami na Yawe Nzambe wa bino. Bolamba mwana ntaba te o mabéle ma mama wa ye.
Deut LinVB 14:22  Mobu na mobu kamata eteni ya zomi ya mbuma ya bilanga bya yo.
Deut LinVB 14:23  Mpe o miso ma Yawe Nzambe wa yo o esika ye aponi mpo ’te nkombo ya ye ezala wana, okoki kolia eteni ya zomi ya mbuma ya mampa, ya vino ya sika mpe ya mafuta, na mpe bana ba yambo ba bibwele bya yo, ngombe to mpata. Okoyeba bongo boniboni obanga Yawe Nzambe wa yo ntango inso.
Deut LinVB 14:24  Soko mpo ya nzela elai okoki komeme eteni ya zomi te, zambi esika eye Yawe aponi mpo ’te nkombo ya ye ezala wana eleki mosika, soko Yawe Nzambe wa yo abenisi yo,
Deut LinVB 14:25  okoki koteke biloko bya yo mpe na mosolo moye o maboko okende o esika Yawe Nzambe wa yo aponi.
Deut LinVB 14:26  Kuna na mosolo mona okoki kosomba biloko binso motema mwa yo molingi : nyama inene to ike, vino, masanga makasi mpe binso olingi kosomba. Olia kuna o miso ma Yawe Nzambe wa yo mpe osepela, yo na bandeko ba yo lisanga.
Deut LinVB 14:27  Obosana mo-Levi te, oyo afandi o mboka ya yo, zambi ye azali na mabelé te.
Deut LinVB 14:28  Nsima ya mibu misato, kamata biteni bya zomi bya mbuma ya bilanga, iye ozwaki o mobu mona, mpe tia yango o boso bwa bizibeli bya mboka.
Deut LinVB 14:29  Bato bakoki kolia yango : mo-Levi, zambi ye azali na mabelé lokola yo te, ná mompaya ná mwana etike ná mwasi bozenge, baye bazali o mboka ya yo, bongo batonda. Soko osali bongo Yawe Nzambe wa yo akobenisa yo o misala minso olingi kosala.