Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 9
Ezek LinVB 9:1  Agangi na mongongo makasi o matoi ma ngai, alobi : « Bobeleme, babebisi ba engumba, moto na moto na bisaleli bya ye bya bobomi. »
Ezek LinVB 9:2  Mpe tala, babali motoba babimi, bauti epai ezibeli eye etalani na Nordi, moto na moto na esaleli ya ye ya bobomi. O kati ya bango moto moko alati bilamba mpembe, akangi ekomeli o mokaba mwa ye, lokola mokomi wa minkanda. Ba­nso bakoti mpe bakei koteleme penepene na etumbelo ya mbengi.
Ezek LinVB 9:3  Nke­mbo ya Nzambe wa Israel elo­ngwi epai ya kerubim, esika ezalaka, mpe ekei epai ya ezibeli ya Tempelo. Nzambe abengi moto oyo alati bilamba mpembe mpe akangi ekomeli o mokaba, alobi na ye :
Ezek LinVB 9:4  « Katisa engumba Yeruzalem, mpe tia elembo ya kuruse o elongi ya bato bazali kolela mpe kokimela mpo ya makambo ma nsomo ma­nso mazali kosalema o engumba. »
Ezek LinVB 9:5  Mpe alobi na bato basusu : « Bokatisa engumba, bolanda ye mpe boboma bato. Boyokela moto moko mawa te, bolakisa bango motema ngolu te.
Ezek LinVB 9:6  Boboma babange, bile­nge, bangondo, bana na bamama ; bosilisa bango banso. Kasi soko moto azali na elembo o elongi, bosala ye mabe te. Bobanda awa o Te­mpelo. » Bongo babandi koboma ba­bange bazalaki o Tempelo.
Ezek LinVB 9:7  Mpe alobi na bango : « Bobebisa Tempelo, botondisa lopango na bibembe, bosala noki. » Babimi, bakei koboma bato ba engumba.
Ezek LinVB 9:8  Nzokande ntango bazalaki koboma, natikali ngai moko ; nakwei elo­ngi o nse mpe nagangi : « E Mokonzi Yawe, okoboma nde bato ba­nso batikali o Israel, zambi oyokeli Yeruzalem nkanda ? »
Ezek LinVB 9:9  Alobi na ngai : « Masumu ma Israel na Yuda maleki boike, maleki mpe bonene. Ekolo etondi na makila ma bato, o engumba bobe boleki, mpo bakolobaka ’te : ‘Yawe azali lisusu awa te, Yawe azali komono eloko te.’
Ezek LinVB 9:10  Ya­ngo wana nakoyokela bango mawa te, ngolu mpe te. Nakopesa bango etumbu ekoki na mabe ma bango. »
Ezek LinVB 9:11  O ntango ena moto alati elamba mpembe mpe akangi ekomeli o mokaba, ayei koyebisa : « Na­sali manso lokola otindaki ngai. »