EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 30
| Ezek | LinVB | 30:2 | Mwana wa moto, sakola makambo, loba : Mokonzi Yawe alobi boye. Ganga makasi : « Mawa ! Mokolo mona ! » | |
| Ezek | LinVB | 30:3 | mpo mokolo mwa Yawe mobelemi, mokolo mona mokomi penepene ; ekozala mokolo mwa londende lonene, mokolo bato ba bikolo binso bakoyoka mpasi. | |
| Ezek | LinVB | 30:4 | Mopanga mokokwela Ezipeti, bato ba Etiópia bakolenge na nsomo, ntango bato ba Ezipeti bakokufa, bakoyiba nkita mpe bakobuka ndako kuna. | |
| Ezek | LinVB | 30:5 | Bato ba Kus, Put na Lud, Arabu mobimba na Kub, na bana ba bondeko, bakokufa na mopanga elongo na ye. | |
| Ezek | LinVB | 30:6 | Mokonzi Yawe alobi boye : Baye basalisi Ezipeti bakokufa ; lolendo mpo ya bokasi bwa ye lokosuka. Banda Migdol tee Siena bato banso bakokufa na mopanga. Maloba ma Mokonzi Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 30:7 | Ezipeti ekokoma mopotu leka bikolo bisusu, bingumba bya ye bikokoma mipotu o ntei ya bingumba bibeba. | |
| Ezek | LinVB | 30:8 | Bongo mokolo nakotumba Ezipeti mpe nakosukisa bokasi bwa basalisi ba ye, bakoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 30:9 | Mokolo mona nakotinda masuwa na bantoma na ngai, bábangisa bato ba Etiópia, baye bazali na kimia sikawa. Mokolo makambo maye manso makokwela Ezipeti, bakolenge na nsomo. Solo, makambo mana makosalema ! | |
| Ezek | LinVB | 30:10 | Mokonzi Yawe alobi boye : Nakosilisa makeléle ma bisengo o Ezipeti na maboko ma Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon. | |
| Ezek | LinVB | 30:11 | Nakotinda ye elongo na bato ba ye, ekolo eye eleki mokili mobimba na makambo makasi, bábebisa Ezipeti. Bakobimisa mopanga mpe bakotondisa Ezipeti na bibembe. | |
| Ezek | LinVB | 30:12 | Nakokaukisa mai ma ebale Nil, nakokaba ekolo o maboko ma babebisi. Nakobebisa mokili na biloko binso na maboko ma bauta. Ngai Yawe nasili nalobi. | |
| Ezek | LinVB | 30:13 | Mokonzi Yawe alobi boye : Nakobuka bikeko binso, nakolongola banzambe ba lokuta o Nof. Nakolongola mpe bankumu o Ezipeti. Nakolengisa bato banso ba Ezipeti na nsomo. | |
| Ezek | LinVB | 30:15 | Nakokitisela Sin, ebombamelo ya Ezipeti, nkanda ya ngai enene, nakosilisa batobaNo. | |
| Ezek | LinVB | 30:16 | Nakotumba Ezipeti na móto, Sin akobilingana na mpasi, bakobuka lopango la No mpe Nof ekozinda o mai. | |
| Ezek | LinVB | 30:17 | Bilenge babali ba On mpe ba Pi-Beset bakobomama na mopanga, mpe bato ba bingumba bakokende o boombo. | |
| Ezek | LinVB | 30:18 | O Tapanes moi mokobongwana molili ntango nakobuka mintongo mya Ezipeti mpe lolendo la bokasi bwa bango lokosuka. Molili mokozipa yango, mpe bana basi ba ye bakokende o boombo. | |
| Ezek | LinVB | 30:20 | O mobu mwa zomi na moko, o sanza ya yambo, o mokolo mwa nsambo, Yawe alobi na ngai maloba maye : | |
| Ezek | LinVB | 30:21 | Mwana wa moto, nabuki loboko la Farao, mokonzi wa Ezipeti. Moto moko te asukoli mpota ya ye, batii yango monó te, bakangi yango na elamba te, basalisi ye te mpo ’te akoka kobete lisusu mopanga. | |
| Ezek | LinVB | 30:22 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Nakoyela Farao, mokonzi wa Ezipeti, etumba. Nakobuka maboko ma ye, na loboko loye losili lobukani, mpe nakokweisa mopanga mozali o loboko la ye. | |
| Ezek | LinVB | 30:24 | Nakolendisa mokonzi wa Babilon mpe nakotia mopanga mwa ngai o loboko la ye. Nakobuka maboko ma Farao mpe akokimela o miso ma monguna lokola moto alingi awei. | |
| Ezek | LinVB | 30:25 | Nakolendisa mokonzi wa Babilon, kasi nakokweisa Farao. O eleko nakotia mopanga mwa ngai o maboko ma mokonzi wa Babilon mpe ye akobete na mwango mokili mwa Ezipeti, bato bakoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |