Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 39
Ezek LinVB 39:1  Mwana wa moto, sakola maloba mabe ona Gog. Oko­loba : Yoka maloba ma Moko­nzi Yawe : Nakobimela yo, Gog, yo mokonzi monene wa Mesek na Tubal.
Ezek LinVB 39:2  Nakokanga yo mpe nakoka­mba yo, nakobenga yo ut’o mokili mwa Nordi mosika oya kobunda bitumba o ngomba ya Israel.
Ezek LinVB 39:3  Nakobuka litimbo o loboko la yo la mwasi, mpe nako­kweisa mimbai osi­mbi na loboko la mobali.
Ezek LinVB 39:4  Okokufa o ngomba ya Israel, yo na basoda ba yo, na bato ba bikolo bi­susu bayokani na yo. Nakosala ’te bingondo ndenge na ndenge mpe nyama ya zamba bilia yo.
Ezek LinVB 39:5  Okokufa o kati ya esobe, zambi ngai nalobi bongo. Maloba ma Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 39:6  Nakotinda móto o ekolo ya Magog mpe o bisanga binso biye bato bafandi kimia ; bongo bakoyeba ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 39:7  Nakolakisa nkombo ya ngai esantu o ntei ya bato ba ngai, ekolo ya Israel. Nakolinga lisusu te ’te basantola nkombo ya ngai esantu. Bongo bato ba bikolo bisusu bakoyeba ’te nazali Yawe, Mosantu o Israel.
Ezek LinVB 39:8  Makambo maye makosalema, ekozala o mokolo nalobaki ! Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 39:9  Bato ba bingumba bya Israel bakokende kotumba bibuneli binso : nguba inene mpe ike, matimbo, ma­kula, mimpanga na makongo. Bakopelisa na byango móto mibu nsambo mobimba.
Ezek LinVB 39:10  Bato bakoke­nde koluka nkoni o esobe lisusu te, bakokende kokata yango o zamba lisusu te, zambi bakopelisa móto na bibuneli. Bakobotolo biloko bya bato baye babotoloki bango biloko liboso, bakokamata na makasi nkita ya baye bakamataki nkita ya ba­ngo liboso. Elobi bongo Moko­nzi Yawe.
Ezek LinVB 39:11  Mokolo mona nakopono esika ya lokumu o Israel mpo ya koku­nda Gog. Ekozala lobwaku loye bakota­ngaka ‘Oberim’ o Esti ya mbu. O lobwaku lona bato bakoki koleka te. Bakokunda Gog na baso­da ba ye banso se kuna, mpe bakotanga yango ‘Lobwaku la Li­mpi­nga lya Gog’.
Ezek LinVB 39:12  Ba­to ba Israel bakose­ngela na sanza nsambo mpo ya ko­kunda bango mpo ’te bapetola mokili mwa bango.
Ezek LinVB 39:13  Bato banso ba­kosalisana o likambo lina, bongo mokolo nakolakisa bosantu bwa ngai, bango banso bakozwa lokumu. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 39:14  Bakopono bato basusu bobele mpo ya kotambola o mokili mobi­mba bakunda bawei balali naino o mabelé ; bapetola mokili bongo. Bakosala bongo sanza nsambo.
Ezek LinVB 39:15  Nta­ngo bakotambola o ekolo mobi­mba, soko bamoni minkuwa mya moto, bakotia ele­mbo kuna, mpo ’te mokolo baku­ndi-bibembe bakoya, bakunda ye o lobwaku la ‘Amon-Gog’
Ezek LinVB 39:16  (engu­mba yoko mpe ezali na nkombo Amona). Bobele bongo bakopetola mokili mona.
Ezek LinVB 39:17  Mwana wa moto, Mokonzi Yawe alobi boye : Loba na ndeke mpe na nyama inso ya zamba : Bosangana esika yoko, bolongwa o bisika bino bozali mpe boya kolia libonza nalingi kobonzela bino. Ezali moboma monene o ngomba ya Israel. Bokolia misuni, bokomele makila ;
Ezek LinVB 39:18  bokolia nsuni ya bilombe, bokomele makila ma bankumu ba nse : mpata babali, bana ba mpata, ntaba babali, ngombe babali ya mafuta mingi ya Basan.
Ezek LinVB 39:19  Bokolia misuni mya mafuta lokola motema moli­ngi, bokomele makila tee bokola­ngwa ; ezali limpati nasaleli bino.
Ezek LinVB 39:20  O meza ya ngai bokotonda na bolei farasa na batambwisi, bilombe na babuni ndenge na ndenge. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 39:21  Nakolakisa lokumu la ngai o miso ma bato ba bikolo binso. Bato banso ba mokili bakomono ’te nakokokisa likambo liye nakataki, mpe loboko la ngai lokonyata ba­ngo.
Ezek LinVB 39:22  Mokolo mona bato ba Israel bakoyeba seko ’te ngai nazali Yawe Nzambe wa bango.
Ezek LinVB 39:23  Bato ba bikolo bisusu bakoyeba ’te bato ba Israel bakei o boombo mpo ya mabe ma bango, mpamba te, batosaki ngai te ; yango wana nabombi elo­ngi ya ngai mpe nakabi bango o maboko ma banguna ba bango. Banso bakufi na mopanga.
Ezek LinVB 39:24  Napesi bango etumbu ekoki na mabe ma bango mpe na bobuki mibeko ; ya­ngo wana nabombi elongi ya ngai.
Ezek LinVB 39:25  Na ntina ena Mokonzi Yawe alobi boye : Nakobongisa sikawa lika­mbo lya bato ba Yakob, nakoyokela bato banso ba ekolo ya Israel ngolu, mpe nakolakisa zuwa linene mpo ya nkombo ya ngai esantu.
Ezek LinVB 39:26  Bakobosana nsoni bayokaki na mpe mabe manso basalaki ngai o ntango bafandaki kimia o mokili mwa bango mpe moto moko aza­laki kobangisa bango te.
Ezek LinVB 39:27  Nako­lo­ngola bango o bikolo bisusu, na­kosangisa bango o mokili moye mozali penepene na banguna ba ba­ngo te ; yango ekolakisa bosantu bwa ngai epai ya bango o miso ma bato baike.
Ezek LinVB 39:28  Mokolo mona bakoyeba ’te ngai nazali Yawe Nzambe wa ba­ngo, zambi liboso natindaki bango bakende o boombo o bikolo bisusu, kasi na nsima nakosangisa ba­ngo o ekolo ya bango moko. Nakotika moto moko kuna te.
Ezek LinVB 39:29  Nakobombela bango elongi ya ngai lisu­su te, zambi nakopesa bato ba Is­ra­el Elimo ya ngai mpenza. Elobi bongo Mokonzi Yawe.