Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 42
Ezek LinVB 42:1  Moto ona abimisi ngai o libanda linene, atindi ngai epai ya Nordi. Akotisi ngai o biteni bya ndako bizali wana, bitalani na libanda mpe na ndako epai ya Nordi.
Ezek LinVB 42:2  Efelo enene ekoki na bolai maboko monkama, epai ya ekoteli ya Nordi ; na bonene maboko ntuku itano.
Ezek LinVB 42:3  O liboso lya libanda like lya maboko ntuku ibale, mpe o liboso lya libanda linene mbalasani yoko ezali ya mikili misato.
Ezek LinVB 42:4  Penepene na biteni bya ndako mbalasani ezali : bonene maboko zomi epai ya libanda like ; bolai maboko mo­nkama. O biteni bya ndako bakokotoko bobele o epai ya Nordi.
Ezek LinVB 42:5  Biteni bya ndako o mokili mwa likolo bizali bike, zambi mbalasani ekamati ndambo ya esika ; mbalasani ya mokili mwa katikati na moye mwa nse ekamati esika mingi te.
Ezek LinVB 42:6  O mikili misato makonzi mazali te loko­la ma mabanda, yango wana bi­teni bya ndako ya likolo bizali bike, leka biye bya nse.
Ezek LinVB 42:7  Efelo ya nsuka ya lopango etalani na biteni bya ndako mpe esali libanda linene o kati, ekoki na bolai maboko ntuku itano.
Ezek LinVB 42:8  Biteni bya ndako bizali o libanda linene bizali na bolai maboko ntuku itano ; biye bitalani na eteni enene ya Tempelo bizali na bolai maboko monkama.
Ezek LinVB 42:9  O nse ya biteni bya ndako, esika ya boyingeli ezali, etalani na Esti. Ezali mpo ya kolekisa baye bazali o libanda linene.
Ezek LinVB 42:10  Efelo ya libanda lya Esti ezali mpe na biteni bya ndako bisusu, bitalani na libanda liye lizali o ndako enene o liboso.
Ezek LinVB 42:11  Penepene na bya­ngo nzela ezali. Biteni binso bikokani na biye bizali epai ya Nordi ; bonene mpe bolai ndenge yoko, bizibeli bya bokoti ndenge yoko, biloko binso na bisika bya boyingeli ndenge yoko.
Ezek LinVB 42:12  Bizibeli bobele nde­nge yoko lokola biye bya Sudi. O nzela o liboso esika ya boyingeli ezali penepene na efelo enene eye ekobatela ndako mobimba. Ezali epai ya Esti o ebandela.
Ezek LinVB 42:13  Moto ona alobi : « Biteni bya ndako epai ya Nordi mpe biye epai ya Sudi, biye bizali epai na epai ya libanda bizali bisika bisantu. Banganga Nzambe baye bakobeleme na Yawe nde balei bilei bisantu o biteni bina. Nde batii biloko bileki bosantu wana, mabonza na mpe miboma : mabo­nza ma kosenge bolimbisi na maye ma kofuta nyongo. Ezali solo esika esantu.
Ezek LinVB 42:14  Soko banganga Nzambe bakoti wana, bakoki kobima te. Liboso lya kobima o esika esantu epai ya libanda linene, basengeli kotika bilamba biye bakolataka o ntango ya losambo, zambi bilamba bina bikomi bilamba bisa­ntu. Esengeli balata bilamba bisusu, bongo na nsima bakoki kokende o bisika bato basusu bazali. »
Ezek LinVB 42:15  Moto ona asilisi komeka bonene bwa Tempelo epai ya kati. Akambi ngai o nzela eye ebimi o ezibeli ya Esti. Ameki yango bipai binso ;
Ezek LinVB 42:16  ameki na lingenda lya ye epai ya Esti : bolai maboko nkama itano.
Ezek LinVB 42:20  Na nsima ameki esika ena mobi­mba bipai binso binei. Efelo ezingi lopa­ngo mobimba ekoki na bolai maboko nkama itano, na bonene maboko nkama itano ; efelo ena ekati ndelo o kati ya esika esantusantu na esika esusu.