EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 27
Ezek | LinVB | 27:3 | Loba na Tiro, mboka etongami penepene na mbu, eye ekosalaka mombongo na bato ba bisanga biike : Mokonzi Yawe alobi boye : E Tiro, yo ozalaki koloba : Nazali masuwa kitoko mpenza ! | |
Ezek | LinVB | 27:5 | Basalaki mipanzi na sipresi ya Senir, likonzi linene lya masuwa na sédere ya Libano. | |
Ezek | LinVB | 27:6 | Basalaki nkai ya yo na nzete inene ya Basan, ndako ya masuwa na mpembe ya nzoku, eye babaki na mabaya ma nzete ya bisanga bya Kitim. | |
Ezek | LinVB | 27:7 | Na malekani makembami mauti o Ezipeti osalaki kapo mpo ’te mompepe motambwisa yo, ezalaki mpe elamba ya bendele ya yo. Osalaki ema ya masuwa na elamba ya longondo euti o bisanga bya Elisa. | |
Ezek | LinVB | 27:8 | Ozwi baluki nkai o Sidoni mpe o Arvad ; e Tiro, bato ba yo ba bwanya basalaki misala o masuwa. | |
Ezek | LinVB | 27:9 | Bakolo ba Gebal na bato ba ye ba ntoki bazalaki wana mpo ya kobongisa mango. Masuwa manso ma mbu elongo na bato ba mango, bazalaki koya kosala mombongo epai ya yo. | |
Ezek | LinVB | 27:10 | Ba-Persi, bato ba Lud na Put, bazalaki kosala mosala mwa soda epai ya yo, bazalaki kotingisa nguba na binkoti bya etumba se wana ; bazalaki kopesa yo lokumu. | |
Ezek | LinVB | 27:11 | Limpinga lya bato ba Arvad lizalaki kokengele lopango la yo, mpe bato ba Gemad bazalaki kokengele manongi ma yo ; bazalaki kotingisa nguba o efelo ya lopango la yo, bazalaki kokolisa nkembo ya yo. | |
Ezek | LinVB | 27:12 | Bato ba Tarsis bazalaki koya kosomba biloko, mpo ozalaki na byango ebele. Bazalaki kofuta yo na palata, bibende, mbengi na mondolu. | |
Ezek | LinVB | 27:13 | Bato ba Yavan, Tubal na Mesek mpe bazalaki kosala mombongo na yo. Ozalaki kosomba baombo mpe biloko bya mbengi bya bango na biloko bya yo. | |
Ezek | LinVB | 27:15 | Bato ba Dedan mpe bazalaki kosala mombongo na yo, bato ba bisanga biike mpe ; ozalaki kofuta bango na mpembe ya nzoku mpe na nzete ya mbanza. | |
Ezek | LinVB | 27:16 | Ba-Aram bazalaki kosomba epai ya yo, mpo ozalaki na biloko biike. Bazalaki kotekele yo mabanga ma diama, bilamba bya longondo na misala mya ntonga, bilamba bya ngelingeli na mabanga make, korail na rubis. | |
Ezek | LinVB | 27:17 | Ata Yuda na Israel bazalaki kosala mombongo na yo. Bazalaki kotekele yo mbuma ya mampa ya Minit, wangila, mafuta ma nzoi, mafuta ma mbila mpe mpaka ya malasi. | |
Ezek | LinVB | 27:18 | Bato ba Damasko bazalaki kosomba epai ya yo, mpo ozalaki na biloko mingi mpe na nkita enene. Bazalaki kotekela yo vino ya Kelbon na nsinga ya nsuki ya mpata ya Sakar. | |
Ezek | LinVB | 27:19 | Wedan na Yavan, banda Uzal bazalaki kotekele yo biloko : bibende, pilipili mpe matiti ma nsolo mpimbo. | |
Ezek | LinVB | 27:20 | Bato ba Dedan bazalaki kotekele yo nsinga ya kosono bilamba, biye bakotandaka o farasa. | |
Ezek | LinVB | 27:21 | Ba-Arabu na bankumu banso ba Kedar bazalaki kotekele yo mpata babali, ntaba babali na bana ba mpata. | |
Ezek | LinVB | 27:22 | Bato ba Saba mpe ba Rama bazalaki kosala mombongo na yo : bazalaki koteke malasi maleki nsolo mpimbo, mabanga ma motuya na wolo. | |
Ezek | LinVB | 27:24 | Bazalaki kotekele yo bilamba bya motuya, minkoto mya longondo, misala mya ntonga, bilamba bya ngelingeli mpe mikulu malitami. | |
Ezek | LinVB | 27:25 | Masuwa ma Tarsis mazalaki kotambola mingi mpo ya mombongo mwa yo. Ozalaki na nkita mpe na lokumu o kati ya mbu. | |
Ezek | LinVB | 27:27 | Nkita ya yo, biloko binso omemeki, baluki nkai na basali ba masuwa, babongisi masini na bato ba mombongo, basoda banso na baye bakotambolaka o masuwa, banso bakozinda o mbu o mokolo masuwa ma yo makozinda. | |
Ezek | LinVB | 27:29 | O ntango ena bato ba nkai bakokima masuwa, bato bameseni na mai, basali ba masuwa, bakokende lisusu te, bakotikala o mokili. | |
Ezek | LinVB | 27:30 | Bakolela yo, bakoganga na mawa manene, bakomipakola mputulu o mitó, bakomibilinginya o nse. | |
Ezek | LinVB | 27:31 | Bakokokola mitó mpo ya yo, bakolata ngoto ; na nzembo ya lilaka bakolela yo na mawa manene. | |
Ezek | LinVB | 27:32 | Na mawa mpenza bakoyemba nzembo ya boleli, bakosala lilaka mpo ya yo : « Engumba nini ekokani na Tiro, ebombamelo eye o kati ya mbu ? | |
Ezek | LinVB | 27:33 | Awa okitisaki biloko o libongo mpo ’te oleisa bato ba bikolo biike, mpo ya nkita mpe biloko bya yo ebele, ozalaki kokomisa bakonzi ba nse bato ba nkita. | |
Ezek | LinVB | 27:34 | Tala, sikawa masuwa mabukani na ekumbaki, ozindi kin’o bozindo bwa mai ; biloko na bato ba yo banso omemeki bizindi elongo na yo. | |