EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 11
Ezek | LinVB | 11:1 | Elimo atomboli ngai mpe akambi ngai o ezibeli ya Tempelo ya Yawe, eye etalani na Esti. Penepene na ezibeli ya Tempelo namoni bato ntuku ibale na batano ; o kati ya bango ezalaki Yazanya, mwana wa Azur, na Pelatia, mwana wa Benaya, bakambi ba ekolo. | |
Ezek | LinVB | 11:2 | Yawe alobi na ngai : « Mwana wa moto, bato baye bakokanaka kosala mabe mpe bakopesaka malako mabe o engumba eye. | |
Ezek | LinVB | 11:3 | Bakolobaka : ‘Eleko ya kotonga ndako ekoki naino te ! Engumba ekomi lisasu, biso tozali misuni o kati ya lisasu.’ | |
Ezek | LinVB | 11:5 | Elimo ya Yawe akiteli ngai mpe alobi na ngai : « Loba : Yawe alobi boye : Bino bato ba Israel bokolobaka bongo. Nayebi mikano mya bino. | |
Ezek | LinVB | 11:7 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Bibembe botiaki o engumba bizali misuni o lisasu, mpe engumba ezali lisasu. Kasi nakobimisa bino o engumba. | |
Ezek | LinVB | 11:9 | Nakobimisa bino o engumba, nakokaba bino o maboko ma bato ba bikolo bisusu. Nakotindela bino makambo nakaneli bino. | |
Ezek | LinVB | 11:10 | Bokokufa na mopanga o mokili mwa Israel, mpe nakosambisa bino. Bongo bokoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
Ezek | LinVB | 11:11 | Engumba ekozalela bino lisasu te, mpe bino bokozala misuni o lisasu te. O mokili mwa Israel nakosambisa bino. | |
Ezek | LinVB | 11:12 | Bokoyeba ’te ngai nazali Yawe, bino bato botosaki mibeko mpe mitindo mya ngai te, kasi bolandaki mimeseno mya bato ba bikolo bizali penepene na bino. » | |
Ezek | LinVB | 11:13 | Ezalaki ngai kosakola maloba mana, Pelatia, mwana wa Benaya, akati motema. Nakwei elongi o nse, mpe nagangi na mongongo makasi : « E Mokonzi Yawe, okosilisa nde bato ba Israel baye batikali ? » | |
Ezek | LinVB | 11:15 | Mwana wa moto, bato ba Yeruzalem bakolobaka na bandeko ba yo banso, na bato banso ba libota lya yo mpe na bato ba ekolo ya Israel : « Botikala kuna, mosika na Yawe. Yawe apesaki biso mokili moye, biso tozali bankolo ba ekolo. » | |
Ezek | LinVB | 11:16 | Yango wana loba na bango : « Mokonzi Yawe alobi boye : Solo, nalongolaki bango o bikolo bisusu ; napanzaki bango o mikili mya bampaya. Nazalaki Tempelo ya bango ya solo o bikolo bakendeki. | |
Ezek | LinVB | 11:17 | Bongo loba na bango : Mokonzi Yawe alobi : Nakosangisa bino ut’o bikolo bisusu, nakolongola bino o mikili minso bopanzani. Bongo nakopesa bino mokili mwa Israel. | |
Ezek | LinVB | 11:19 | Nakopesa bango mitema mya sika mpe mayele ma sika. Nakolongola o nzoto ya bango mitema mya mabanga, mpe nakopesa bango mitema mya nsuni | |
Ezek | LinVB | 11:20 | mpo ’te batosa mibeko mya ngai mpe balanda mimeseno mya ngai. Bakozala bato ba ngai, mpe ngai nakozala Nzambe wa bango. | |
Ezek | LinVB | 11:21 | Kasi baye bamipesaki na bikeko mpe na makambo ma nsomo, nakosambisa bango mpo ya ezalela ya bango. Mokonzi Yawe alobi bongo. » | |
Ezek | LinVB | 11:22 | Sikawa bakerubim bafungoli mapapu ; yika itamboli elongo na bango ; nkembo ya Nzambe wa Israel izali likolo lya bango. | |
Ezek | LinVB | 11:23 | Nkembo ya Yawe elongwi o engumba mpe ekei kozala o ngomba eye ezali o Esti ya engumba. | |
Ezek | LinVB | 11:24 | Elimo atomboli ngai mpe akambi ngai o Kaldea, epai ya bato bakangemi o boombo. Elimo ya Yawe alakisi ngai makambo mana o limoni. Ntango nasilisi komono mango, limoni lilongwi. | |