Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 44
Ezek LinVB 44:1  Moto akambi ngai lisusu o ezibeli ya libanda lya ndako esantu, eye etali epai ya Esti ezalaki ya kokangema.
Ezek LinVB 44:2  Yawe alobi na ngai : Ezibeli eye ekokangemaka nta­ngo inso ; bafungola yango te, moto moko ayingela wana te, zambi Yawe Nzambe wa Israel ayingelaki wana ; eka­ngema seko.
Ezek LinVB 44:3  Kasi nkumu wa ekolo, ye akoki kokende wana mpo ya kolia o miso ma Yawe. Akokoto epai ya ekoteli enene ya ezibeli, mpe akobima bobele o nzela ena.
Ezek LinVB 44:4  Moto alekisi ngai o ezibeli ya Nordi, tokomi o boso bwa Tempelo. Natali, namoni nkembo ya Yawe etondisi Tempelo ya Yawe. Na­kwei elongi o nse.
Ezek LinVB 44:5  Yawe alobi na ngai : Mwana wa moto, keba sikawa, fungola miso malamu mpe yoka maye manso nakolimbolela yo mpo ya maye matali Tempelo ya Yawe mpe mibeko minso. Keba na boyingeli o Tempelo mpe na baye bakoki kokoto te.
Ezek LinVB 44:6  Okoloba na bato ba Israel, libota lya batomboki : Mokonzi Yawe alobi boye : Bato ba Israel, bolekisi ndelo na makambo ma bino ma nsomo.
Ezek LinVB 44:7  Bozalaki kokotisa bato ba bikolo bisusu o ndako esantu, baye bazali na mbindo o motema mpe bakati nzoto te, basantoli bongo Tempelo ya ngai. Bozalaki kobonzela ngai bilei, mafuta na makila ; bobomi bongo bondeko bwa ngai na makambo ma bino ma nsomo.
Ezek LinVB 44:8  Botosi mibeko te, miye mikobongisa mosala mwa biloko bisantu, bopesi mosala mona o maboko ma bato ba ekolo esusu, ba­ngo basalela bino mosala o ndako ya ngai esantu.
Ezek LinVB 44:9  Mokonzi Yawe alobi boye : Mouta moko te, moto azali motema mbindo mpe akati nzoto te, akoki kokoto o ndako esantu ya ngai, moko te o kati ya bato ba ekolo esusu baye bafandi o ntei ya ba-Israel.
Ezek LinVB 44:10  Ba-Levi baye batikaki ngai nta­ngo ba-Israel babungaki nzela, bazali na likambo mpo ya mabe ma bango : ya solo, balandaki nzela ya bikeko bya bango mpe batikaki ngai mosika.
Ezek LinVB 44:11  Bongo mosala mwa ba­ngo o esika esantu mozali boye : kokengele bizibeli mpe kolengele misala mya Tempelo. Bango bakoboma nyama ya miboma mpe nyama bato bakopesaka bo mabonza. Ba­ngo bakozala wana ntango inso mpo ya kosalela bato.
Ezek LinVB 44:12  Ya solo, nakotumbola bango, zambi basalelaki banzambe ba lokuta, mpe bakweisaki ba-Israel o masumu ; yango wa­na bakomeme mokumba mwa etumbu mpo ya masumu ma ba­ngo. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 44:13  Bakoki kobeleme na ngai lisusu te mpo ya kosala mosala mwa nganga Nzambe, to mpo ya kosimba biloko bisantu, biye bileki bosantu. Bakosambwa mpo ya makambo ma nsomo basalaki.
Ezek LinVB 44:14  Nakopesa bango mosala o Tempelo : kobongisa makambo manso matali mosala mwa yango, na misala misusu minso.
Ezek LinVB 44:15  Ba-Levi, banganga Nzambe ba li­bota lya Sadok, baye basalaki mosala o ndako esantu ntango ba-Israel babungaki nzela, bakobeleme na ngai mpo ya kosalela ngai. Bakoteleme o boso bwa ngai mpo ya kobonzela ngai mafuta na makila. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 44:16  Ba­ngo bakoyingela o ndako ya ngai esantu ; bakobeleme na meza mpo ya kosalela ngai ; basalela ngai misala.
Ezek LinVB 44:17  Ntango bakoyingela o bizibeli bya libanda like, balata bilamba mpe­mbe. Mpo ya mosala penepene na bizibeli bya libanda like mpe o Tempelo balata bilamba bato­ngi na nsinga ya nsuki ya mpata te.
Ezek LinVB 44:18  Bakolata enkoti ya mpembe o motó mpe kupé ya mpembe o loketo. Bakoki kolata nkamba o loketo te mpo ya mitoki.
Ezek LinVB 44:19  Ntango bakobima o libanda linene, esika bato bazali, balongola bilamba balati mpe batika byango o biteni bisantu bya ndako. Balata bilamba bisusu mpo ’te bato basimba bilamba bisantu te.
Ezek LinVB 44:20  Bakokola motó te, kasi batika nsuki ikola mingi te, bakatisa nsuki malamu bo ebongi.
Ezek LinVB 44:21  Nganga Nza­mbe moko te amele vino mokolo akoyingela o libanda lya kati.
Ezek LinVB 44:22  Bakobala mwasi bozenge te, mwasi aboyami na mobali mpe te, babala ngondo wa ekolo ya Israel. Nzokande bakoki kobala mwasi boze­nge oyo azalaki mwasi wa nganga Nzambe mosusu.
Ezek LinVB 44:23  Bango balakisa bato ba ekolo ya ngai biloko nini bizali bisantu mpe biye bizali bisantu te. Balakisa bango biloko nini bizali peto mpe biye bizali na mbindo.
Ezek LinVB 44:24  O esambi bakozala bazuzi. Basamba engebene na miti­ndo mya ngai. Batosa mitindo mpe mimeseno mya ngai minso o mikolo mya eyenga, mpe basantisa mikolo mya Sabato mya ngai.
Ezek LinVB 44:25  Bakoki kobeleme na mowei te, mpo ’te bakoma na mbindo te. Nzoka­nde soko babelemi na ebembe ya tata, mama, mwana wa bango wa mobali to wa mwasi, ndeko wa bango wa mobali mpe wa mwasi oyo abali te, bakoki kokoma na mbindo te.
Ezek LinVB 44:27  mokolo akoyingela o Ndako esantu, mpe akokoma o libanda like mpo ya mosala mwa Ndako, asengeli kobonza libonza mpo ya lisumu. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 44:28  Bango basa­ngola eloko yoko te ; lisango lya bango bobele ngai. Bakozala na mabelé te, mabelé ma bango bobele ngai.
Ezek LinVB 44:29  Ba­ngo bakoki kolia biloko bya mabonza, miboma mpo ya masumu, mpe mabonza ma kofuta nyongo. Bango bakolia biloko bi­nso bizali ekila o Israel.
Ezek LinVB 44:30  Banganga Nzambe bakozwa mbuma ya ya­mbo ya bilanga, biye bileki kitoko ; ya biloko binso mpe ya mabonza manso bakozwa maye maleki malamu. Bopesa nganga Nzambe nda­mbo ya fufu ya mampa malamu mpenza mpo ’te bobenisi bwa Nzambe bokitela bino.
Ezek LinVB 44:31  Nyama to ndeke ekufi yango moko, to ebe­mbe ya nyama bapasoli, nganga Nzambe akoki kolia yango te.