EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 24
Ezek | LinVB | 24:1 | O mobu mwa libwa, o sanza ya zomi, o mokolo mwa zomi, Yawe alobi na ngai maloba maye : | |
Ezek | LinVB | 24:2 | Mwana wa moto, koma mokolo mwa lelo mpenza o monkanda, mpo lelomei mokonzi wa Babilon akoya kobundisa Yeruzalem. | |
Ezek | LinVB | 24:3 | Loba na libota lya batomboki moulani. Loba na bango : Mokonzi Yawe alobi boye : Tia lisasu o móto mpe sopa mai o kati. | |
Ezek | LinVB | 24:4 | Bakisa biteni bya nsuni biye bileki malamu, ebelo na lipeke ; tondisa lisasu na minkuwa mileki malamu. | |
Ezek | LinVB | 24:5 | Pono nyama eye eleki kitoko o etonga, tia nkoni o nse ya lisasu, pelisa móto, tokisa byango kina minkuwa mikobela malamu. | |
Ezek | LinVB | 24:6 | Mpo Mokonzi Yawe alobi : Mawa na engumba ya babomi, ekomi lokola lisasu ligugi, liye bakoki kolongola lisusu te ! Bimisa eteni yoko yoko, obete zeke te. | |
Ezek | LinVB | 24:7 | Solo, makila mazali o engumba eye masopani o mabanga. Basopi mango o mabelé te mpo ’te zelo ezipa mango te. | |
Ezek | LinVB | 24:8 | Nasopi makila mana o libanga mpo ’te mazipama te, nakolisa bongo nkanda ya ngai mpe nabekola makila mana. | |
Ezek | LinVB | 24:9 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Mawa na engumba eye ya babomi ! Ngai mpe nakopelisa móto monene. | |
Ezek | LinVB | 24:10 | Sangisa nkoni, pelisa móto, lamba misuni mibela malamu, bakisa nkasa ya nsolo mpimbo, minkuwa mizika. | |
Ezek | LinVB | 24:11 | Tia lisasu mpamba o móto mwa makala, likoma móto, mbengi etela, bosoto bozali o kati bonyangwa mpe bogugi bonso bolongwa. | |
Ezek | LinVB | 24:13 | mpo ya bosoto bwa bosoni bwa yo ; nalingaki kopetola yo, kasi oboyaki kokoma peto ; okopetwama lisusu te, kina nkanda ya ngai ekosila. | |
Ezek | LinVB | 24:14 | Ngai Yawe nalobi bongo mpe nakosala yango noki, nakoyokela yo ngolu te, mawa mpe te. Bakosambisa yo engebene na ezalela mpe na misala mya yo. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |
Ezek | LinVB | 24:16 | Mwana wa moto, nakobotolo yo eloko eye okosepelaka kotala na miso ; kasi okoki komilela te, mpe kolela mai o miso te. | |
Ezek | LinVB | 24:17 | Obomba mawa o motema, olata mpili te, okanga ngabuni o motó, olata sapato o makolo, ozipa mandefu te mpe biloko bato bakoyela yo olia byango te. | |
Ezek | LinVB | 24:18 | Mokolo moko na ntongo nazalaki koloba bongo na bato, na mpokwa mwasi wa ngai akufi. Etani ntongo, nasali lokola Yawe atindaki ngai. | |
Ezek | LinVB | 24:21 | « Yawe ayebisi ngai maloba maye : Yebisa bato ba Israel boye : Mokonzi Yawe alobi : Nakosantola ndako ya ngai esantu, eye bino bokofundaka na yango mpe bokoyokaka esengo na botali yango, mpo bokolingaka yango mingi. Bana babali na bana basi ba bino, baye bino botiki, bakokufa na mopanga. | |
Ezek | LinVB | 24:22 | Bino mpe bokosala lokola ngai nasali sikawa : bokozipa mandefu te, biloko baninga bakoyela bino bokolia byango te. | |
Ezek | LinVB | 24:23 | Bokotikala na ngabuni o motó mpe na sapato o makolo. Bokolata mpili te mpe bokolela te. Bokobeba mpo ya masumu ma bino mpe bokokimela banso elongo. | |
Ezek | LinVB | 24:24 | Ezekiel akozala elembo o miso ma bino ; bokosala bobele lokola ye asali. Mokolo makambo maye makokwela bino, bokoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
Ezek | LinVB | 24:25 | Mpe yo, mwana wa moto, mokolo nakobotolo bango bokasi, litundu mpe nkembo ya bango, maye makosepelisaka miso ma bango, maye mitema mya bango makolingaka, ná mpe bana ba bango babali na basi, | |