Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 7
Ezek LinVB 7:2  Mwana wa moto, Mokonzi Yawe alobi na bato ba mokili mwa Israel : Nsuka ebelemi, ekoya o bisika binso bya ekolo ya bino.
Ezek LinVB 7:3  Esili na yo. Nakotindela yo nkanda ya ngai. Nakosambisa yo mpo ya ezalela ya yo, mpe nakopesa yo etu­mbu mpo ya makambo ma yo ma­nso ma nsomo.
Ezek LinVB 7:4  Nakoyokela yo ngolu te, mawa mpe te ; mabe ma­nso ozalaki kosala makokwela yo, mpe okotikala o ntei ya makambo ma yo ma nsomo. Bongo okoyeba ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 7:5  Mokonzi Yawe alobi boye : Mpa­si ekoya, mpasi enene mpenza.
Ezek LinVB 7:6  Nsuka ezali koya ; nsuka ya bino esili ekomi.
Ezek LinVB 7:7  Mpasi enene ekokwela yo, mwana mboka. Eleko ekoki, mokolo mobelemi, migango mya etumba mpe mya esengo mikosila o ngomba.
Ezek LinVB 7:8  Mosika te nakokitisela yo nkanda ya ngai, mpe nakosilisa nka­nda ya ngai. Nakosambisa yo engebene na ezalela ya yo mpe nakofutisa yo makambo ma nsomo ma yo manso.
Ezek LinVB 7:9  Nakoyokela yo ngo­lu te, mawa mpe te ; nakozongisela yo mabe ma yo, mpe makambo ma yo ma nsomo makokwela yo, bo­ngo okoyeba ’te ngai Yawe napesi yo etumbu.
Ezek LinVB 7:10  Mokolo mwa yo mobelemi, mo­zali koya : mpasi ekokwela yo mpo opusi lolendo na montongo mwa yo.
Ezek LinVB 7:11  Makambo makasi makasi mayei : esili na bango, na makeléle mpe na lipombo lya bango.
Ezek LinVB 7:12  Elaka ekoki, mokolo mobelemi ; mosombi ase­pela te, moteki ayoka mawa te, zambi nkanda ekokwela bato ba­nso.
Ezek LinVB 7:13  Ata atikali na bomoi, moteki akomono biloko bya ye lisusu te, zambi maloba maye ma bokaneli matali bato banso. Moko te wa baye basepeli makambo ma bango mazangi bosembo akoki komibikisa.
Ezek LinVB 7:14  Ata bakobete mindule mpe ba­kolengele binso, moto moko ako­kende kobunda te, zambi nkanda ya ngai ekokwela bato ba­nso.
Ezek LinVB 7:15  O libanda bakokuta mopa­nga, o kati ya ndako bokono bobe na nzala. Ata nani akozala o bila­nga akokufa na mopanga, oyo akozala o engu­mba akokufa na bokono bobe mpe na nzala.
Ezek LinVB 7:16  Baye bakufi te bakokima, bakokende o ngomba ; lokola ebenga ya mabwaku ekolelaka, moko moko akolela mpo ya masumu ma ye.
Ezek LinVB 7:17  Banso bakolembe maboko, mabolongo ma bango makokoma mai mai.
Ezek LinVB 7:18  Bakolata ngoto o loketo, mpe bakolenge nzoto mobimba. Banso bakolakisa elongi ya nsoni, banso bakokokolo mitó.
Ezek LinVB 7:19  Bako­bwaka palata ya bango o balabala ; wolo ya bango ekoyokisa bango nsomo. Palata na wolo ya bango ikobikisa bango te o mokolo mwa nkanda ya Yawe ; ikoleka o mingo­ngo mya bango lisusu te, ikotondisa mabumu ma bango lisusu te, mpo izalaki ntina ya masumu ma bango.
Ezek LinVB 7:20  Bazalaki komikumisa na bikembiseli bya bango : basali na byango bikeko bya nsomo bya ba­nzambe ba lokuta ; yango wana nakosala ’te bayoka byango nsomo.
Ezek LinVB 7:21  Nakokaba byango o maboko ma bauta, bayiba byango, o maboko ma basenzi bo biloko babotoli o etumba : bakobebisa byango nye.
Ezek LinVB 7:22  Nakotala bango ata na miso lisusu te ; banguna bakobebisa ndako ya nkita ya ngai ; basenzi bakokoto wana mpe bakosantola yango.
Ezek LinVB 7:23  Kende kotula minyololo, zambi ekolo etondi na bato balingi kobomana, mpe engumba na bato ba ma­kambo makasi makasi.
Ezek LinVB 7:24  Nako­byanga bato ba bikolo bisusu baleki bobe, bá­botolo bankolo mboka ndako. Nakosukisa ntina ya lole­ndo la bango : bakobebisa ndako ya bikeko bya bango.
Ezek LinVB 7:25  Makambo ma nsomo makoya ; bakoluka kozwa boboto, kasi se mpamba.
Ezek LinVB 7:26  Maka­mbo ebele ma mpasi makokwela bango, bakoyoka bobele nsango ya mawa. Se mpamba bakosenge profeta ’te ayebisa bango limoni, nga­nga Nzambe akoyeba koteya lisusu te, mpe bakolo ba mboka bakokoka kopesa malako lisusu te.
Ezek LinVB 7:27  Mokonzi wa mboka akolata mpili, nku­mu akoyoka mawa manene, bato banso bakoyoka nsomo mpe bakolenge. Nakosala na bango engebene na ezalela ya bango, lokola bango moko basambisaki ; bongo bakoyeba ’te ngai nazali Yawe.