EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 7
Ezek | LinVB | 7:2 | Mwana wa moto, Mokonzi Yawe alobi na bato ba mokili mwa Israel : Nsuka ebelemi, ekoya o bisika binso bya ekolo ya bino. | |
Ezek | LinVB | 7:3 | Esili na yo. Nakotindela yo nkanda ya ngai. Nakosambisa yo mpo ya ezalela ya yo, mpe nakopesa yo etumbu mpo ya makambo ma yo manso ma nsomo. | |
Ezek | LinVB | 7:4 | Nakoyokela yo ngolu te, mawa mpe te ; mabe manso ozalaki kosala makokwela yo, mpe okotikala o ntei ya makambo ma yo ma nsomo. Bongo okoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
Ezek | LinVB | 7:7 | Mpasi enene ekokwela yo, mwana mboka. Eleko ekoki, mokolo mobelemi, migango mya etumba mpe mya esengo mikosila o ngomba. | |
Ezek | LinVB | 7:8 | Mosika te nakokitisela yo nkanda ya ngai, mpe nakosilisa nkanda ya ngai. Nakosambisa yo engebene na ezalela ya yo mpe nakofutisa yo makambo ma nsomo ma yo manso. | |
Ezek | LinVB | 7:9 | Nakoyokela yo ngolu te, mawa mpe te ; nakozongisela yo mabe ma yo, mpe makambo ma yo ma nsomo makokwela yo, bongo okoyeba ’te ngai Yawe napesi yo etumbu. | |
Ezek | LinVB | 7:10 | Mokolo mwa yo mobelemi, mozali koya : mpasi ekokwela yo mpo opusi lolendo na montongo mwa yo. | |
Ezek | LinVB | 7:12 | Elaka ekoki, mokolo mobelemi ; mosombi asepela te, moteki ayoka mawa te, zambi nkanda ekokwela bato banso. | |
Ezek | LinVB | 7:13 | Ata atikali na bomoi, moteki akomono biloko bya ye lisusu te, zambi maloba maye ma bokaneli matali bato banso. Moko te wa baye basepeli makambo ma bango mazangi bosembo akoki komibikisa. | |
Ezek | LinVB | 7:14 | Ata bakobete mindule mpe bakolengele binso, moto moko akokende kobunda te, zambi nkanda ya ngai ekokwela bato banso. | |
Ezek | LinVB | 7:15 | O libanda bakokuta mopanga, o kati ya ndako bokono bobe na nzala. Ata nani akozala o bilanga akokufa na mopanga, oyo akozala o engumba akokufa na bokono bobe mpe na nzala. | |
Ezek | LinVB | 7:16 | Baye bakufi te bakokima, bakokende o ngomba ; lokola ebenga ya mabwaku ekolelaka, moko moko akolela mpo ya masumu ma ye. | |
Ezek | LinVB | 7:18 | Bakolata ngoto o loketo, mpe bakolenge nzoto mobimba. Banso bakolakisa elongi ya nsoni, banso bakokokolo mitó. | |
Ezek | LinVB | 7:19 | Bakobwaka palata ya bango o balabala ; wolo ya bango ekoyokisa bango nsomo. Palata na wolo ya bango ikobikisa bango te o mokolo mwa nkanda ya Yawe ; ikoleka o mingongo mya bango lisusu te, ikotondisa mabumu ma bango lisusu te, mpo izalaki ntina ya masumu ma bango. | |
Ezek | LinVB | 7:20 | Bazalaki komikumisa na bikembiseli bya bango : basali na byango bikeko bya nsomo bya banzambe ba lokuta ; yango wana nakosala ’te bayoka byango nsomo. | |
Ezek | LinVB | 7:21 | Nakokaba byango o maboko ma bauta, bayiba byango, o maboko ma basenzi bo biloko babotoli o etumba : bakobebisa byango nye. | |
Ezek | LinVB | 7:22 | Nakotala bango ata na miso lisusu te ; banguna bakobebisa ndako ya nkita ya ngai ; basenzi bakokoto wana mpe bakosantola yango. | |
Ezek | LinVB | 7:23 | Kende kotula minyololo, zambi ekolo etondi na bato balingi kobomana, mpe engumba na bato ba makambo makasi makasi. | |
Ezek | LinVB | 7:24 | Nakobyanga bato ba bikolo bisusu baleki bobe, bábotolo bankolo mboka ndako. Nakosukisa ntina ya lolendo la bango : bakobebisa ndako ya bikeko bya bango. | |
Ezek | LinVB | 7:26 | Makambo ebele ma mpasi makokwela bango, bakoyoka bobele nsango ya mawa. Se mpamba bakosenge profeta ’te ayebisa bango limoni, nganga Nzambe akoyeba koteya lisusu te, mpe bakolo ba mboka bakokoka kopesa malako lisusu te. | |