Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 10
Ezek LinVB 10:1  Natali mpe namoni o eta­ndo ezalaki likolo lya bakerubim libanga lyoko lya safir, limononi lokola ngwende.
Ezek LinVB 10:2  Alobi na mo­to alati elamba mpembe : « Ke­nde o likalo, o nse ya kerubim, to­ndisa maboko na makala maye ma­za­li o ntei ya bakerubim, mpe panza ma­ngo o engumba. » Mpe namoni ’te moto ona akei.
Ezek LinVB 10:3  Ntango moto akoti, bakerubim batelemi penepene na Tempelo, epai ya loboko la mobali, mpe limpata lito­ndisi lopango loke la Tempelo.
Ezek LinVB 10:4  Nkembo ya Yawe elongwi likolo lya kerubim mpe ekei epai ya ezibeli ya Tempelo. Tempelo etondi na limpata, mpe lopango loke lotondi na mwinda mwa nkembo ya Yawe.
Ezek LinVB 10:5  Lokito la mapapu ma bakerubim loyokani tee o lopango lonene, lokola lolaka la Yawe wa bokasi bo­nso.
Ezek LinVB 10:6  Awa atindi moto alati elamba mpembe « Kamata móto o likalo lizali o ntei ya bakerubim », moto ona akei koteleme penepene na yika.
Ezek LinVB 10:7  Kerubim moko atandi loboko epai ya móto mozalaki o kati ya bakerubim. Akamati móto mpe apesi moto alati elamba mpembe. Ye akamati móto mpe abimi.
Ezek LinVB 10:8  O ntango ena biloko bibimi o nse ya mapapu ma bakerubim lokola maboko ma moto.
Ezek LinVB 10:9  Natali, namoni yika inei penepene na bakerubim, kerubim mo­ko moko na yika o mpembeni ya ye. Yika izalaki konge­nge lokola liba­nga lya krizolite.
Ezek LinVB 10:10  Yika inei izalaki ndenge yoko, inso inei ikangani.
Ezek LinVB 10:11  Ba­kerubim bakoki kokende o nzela inei, basengelaki komibongola te ; esika oyo wa liboso akei basusu balandi ye, basengelaki komibo­ngola te.
Ezek LinVB 10:12  Nzoto ya bango mobimba, mikongo, maboko na mapapu itondi na miloli mike mike mizalaki ko­ngenge makasi. Nzoto yoko yoko ezalaki na yika.
Ezek LinVB 10:13  Nayoki ’te bapesi yika nkombo ‘zolongano’.
Ezek LinVB 10:14  Kerubim moko moko azalaki na bilongi binei : elongi ya yambo ezalaki ya kerubim ; elongi ya bibale, elongi ya moto ; eye ya bisato, elongi ya nkosi ; eye ya binei, elo­ngi ya engondo.
Ezek LinVB 10:15  Bakerubim bato­mbwami o likolo ; ezalaki lokola nyama eye namonoki penepene na ebale Kebar.
Ezek LinVB 10:16  Nta­ngo bakerubim batamboli, yika inei itamboli mpe­mbeni ya bango. Nta­ngo bakerubim bafungoli mapapu mpo ya kopi­mbwa o likolo, yika mpe itombwami.
Ezek LinVB 10:17  Ntango batelemi, yika mpe itelemi, ntango bapimbwi o likolo, yika itombwami na bango elongo, mpo izalaki na elimo ya bikelamo bya bomoi.
Ezek LinVB 10:18  Nkembo ya Yawe elongwi o ezi­beli ya Tempelo, ekei koteleme likolo lya bakerubim.
Ezek LinVB 10:19  Bakerubim bafungoli mapapu mpe bapimbwi o likolo o miso ma ngai. Yika mpe ito­mbwami o likolo. Bakiti penepene na ezibeli ya ndako ya Yawe, eye ezali epai ya Esti. Nkembo ya Yawe wa Israel ezalaki na bakerubim, likolo lya bango.
Ezek LinVB 10:20  Ezalaki nyama eye namonoki penepene na ebale Kebar, ezalaki komeme Yawe wa Israel. Nayebi malamu ’te ezalaki bakerubim.
Ezek LinVB 10:21  Kerubim moko moko azalaki na bilongi binei mpe na mapapu manei, mpe o nse ya mapapu na biloko lokola maboko ma moto.
Ezek LinVB 10:22  Bilongi bya bango bizalaki lokola bilongi namonoki penepene na eba­le Kebar. Moko moko azalaki kokende se liboso.