EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 12
Ezek | LinVB | 12:2 | « Mwana wa moto ; ofandi o ntei ya batomboki baye : bazali na miso, kasi bakomonoko te ; bazali na matoi, kasi bakoyokaka te, mpo bazali libota lya batomboki. | |
Ezek | LinVB | 12:3 | Yango wana, mwana wa moto, kanga biloko lokola moto akokende o boombo. Longwa na moi, o miso ma bango. Longwa o esika ozali, mpe kende o esika esusu, bobele o miso ma bango. Mbele bakondima bongo ’te bazali batomboki. | |
Ezek | LinVB | 12:4 | Kanga biloko bya yo lokola moto akokende o boombo, na moi, o miso ma bango. Ekomi mpokwa, otika mboka o miso ma bango, lokola moto akokende o boombo. | |
Ezek | LinVB | 12:6 | O miso ma bango otia biloko o mapeke, obima na molili, ozipa elongi na elamba mpo ’te omono ekolo te, mpo nalingi ’te ozala elembo o miso ma bato ba Israel. » | |
Ezek | LinVB | 12:7 | Nasali lokola batindaki ngai. Na moi nakangi biloko lokola moto akokende o boombo, mpe na mpokwa nasali lidusu o lopango, na maboko. Natii biloko o mapeke mpe nabimi na molili o miso ma bango. | |
Ezek | LinVB | 12:9 | Mwana wa moto, bato ba Israel, batomboki baye, batuni yo te « Ozali kosala nini kuna » ? | |
Ezek | LinVB | 12:10 | Loba na bango boye : Mokonzi Yawe ayebisi nkumu wa Yeruzalem mpe bato ba Israel banso bafandi wana ’te : | |
Ezek | LinVB | 12:12 | Nkumu oyo azali o ntei ya bino, akotia biloko o mapeke na molili, akobima o lidusu batuboli o efelo mpo ya kobima, akozipa elongi na elamba mpo ’te amono ekolo te. | |
Ezek | LinVB | 12:13 | Akokangema o monyama nakotanda likolo lya ye ; nakokamba ye o Babilon o mokili mwa Kaldea. Akokufa kuna, kasi akomono mokili mona te. | |
Ezek | LinVB | 12:14 | Nakopanza bato ba ye, bakengeli na basoda, epai na epai, mpe nakolanda bango mopanga o maboko. | |
Ezek | LinVB | 12:15 | Bongo ntango nakopanza bango o mikili misusu, mpe nakotinda bango o bikolo bisusu, bakoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
Ezek | LinVB | 12:16 | Kasi nakobikisa bato basusu o ntei ya bango, baye bakokufa na mopanga, na nzala to na bokono bobe te. Nakobikisa bango mpo ’te basolola na bato o bisika bakokende makambo ma nsomo manso basalaki. Bato bakoyeba bongo ’te ngai nazali Yawe. | |
Ezek | LinVB | 12:19 | Oloba na bato ba ekolo eye : Mokonzi Yawe alobi na bato ba Yeruzalem, baye bapanzani o ekolo ya Israel ’te bakolia biloko na bobangi, mpe bakomele mai motema likolo, mpo ’te nabotolo mokili moye biloko binso, nakomisa mwango mopotu, mpo ya makambo makasi makasi ma bato bafandi wana. | |
Ezek | LinVB | 12:20 | Bakobebisa bingumba bizalaki na bato baike ; ekolo ekokoma mopotu. Bokoyeba bongo ’te ngai nazali Yawe. | |
Ezek | LinVB | 12:22 | Mwana wa moto, yebisa ngai ntina ya eyele bakolobaka o Israel : Mikolo mizali koleka, mpe limoni ata lyoko lizali kosalema te ? | |
Ezek | LinVB | 12:23 | Loba na bango : Mokonzi Yawe alobi boye : Nakosala ’te batanga eyele eye o Israel lisusu te. Kasi yebisa bango ’te mikolo mikomi penepene limoni lyoko lyoko likosalema. | |
Ezek | LinVB | 12:24 | Ya solo, emonela ya mpamba ekozala lisusu te, mpe bakokosa bato ba Israel lisusu te na boyebisi makambo makoya. | |
Ezek | LinVB | 12:25 | Ngai moko Yawe nakoloba ; maye nakoloba makosalema noki. Bino batomboki, o mikolo mya bino nakokokisa maye nakoloba. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |
Ezek | LinVB | 12:27 | Mwana wa moto, yoka bato ba Israel bakolobaka : ‘Makambo ye amoni o limoni, makosalema sikawa te ; akosakolaka makambo mazali naino mosika.’ | |