EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 21
| Ezek | LinVB | 21:2 | « Mwana wa moto, tala epai ya Sudi, loba na bato ba Sudi, sakola ona zamba lya Negeb. | |
| Ezek | LinVB | 21:3 | Loba na zamba lya Negeb : Yoka liloba lya Yawe : Mokonzi Yawe alobi boye : Nakopelisa móto o mboka yo ; mótumba nzete inso ibesu mpe iye ikauki ; móto moye monene mokozima te mpe mokozikisa bilongi binso, banda Negeb kin’o Nordi. | |
| Ezek | LinVB | 21:5 | Nalobi : « E Mokonzi Yawe, bato bakolobaka mpo ya ngai : Tala moto oyo akoteyaka na miulani ! » | |
| Ezek | LinVB | 21:7 | Mwana wa moto, tala epai ya Yeruzalem, sakola maloba ma bokaneli bisika bisantu mpe ekolo ya Israel. | |
| Ezek | LinVB | 21:8 | Yebisa bato ba Israel : Yawe alobi boye : Nakobimela yo, nakobimisa mopanga mpe nakoboma basemba na bato babe. | |
| Ezek | LinVB | 21:9 | Mpo ya koboma basemba na bato babe nakobimisa mopanga, nakoboma bato banso, banda Negeb kin’o Nordi. | |
| Ezek | LinVB | 21:10 | Bongo bato banso bakondima ’te ngai Yawe nabimisi mopanga mpe nakozongisa mwango lisusu te. | |
| Ezek | LinVB | 21:12 | Soko batuni yo : « Mpo nini ozali kokimela ? », okoloba na bango : « Ezali mpo ya nsango ya mawa elingi eya : mitema mya bato banso mikopaswana, makolo makolembe, mayele makosilela bango mpe bakoyoka mai o mabolongo. Yango ezali koya, ekosalema solo. » | |
| Ezek | LinVB | 21:14 | Mwana wa moto, sakola mpe loba : Mokonzi Yawe alobi boye : Mopanga e, mopanga basebi e, mopanga mopotu ! | |
| Ezek | LinVB | 21:16 | Asebisi mwango mpo ’te basimba mwango na maboko ; bapelisi mwango mpo ya kopesa mwango o maboko ma mobomi. | |
| Ezek | LinVB | 21:17 | Mwana wa moto, kimela mpe ganga, mpo mopanga mokobete bato ba ngai, bankumu banso ba Israel bakowa elongo na bato basusu. Lakisa ’te oyoki mawa, | |
| Ezek | LinVB | 21:19 | Mwana wa moto, sakola mpe bete maboko. Mopanga mobete makasi, makasi mingi, mopanga mwa bobomi, mopanga moye monene mokoboma epai na epai ! | |
| Ezek | LinVB | 21:20 | O bizibeli binso bya engumba natii mopanga mwa bobomi, mosebami mpo ya koboma ; mokobete lokola minkalali mpo ’te bato bayoka nsomo mpe baike bakufa. | |
| Ezek | LinVB | 21:24 | Mwana wa moto, yema nzela ibale mpo ’te mopanga mwa mokonzi wa Babilon moleka ; nzela ina ibale ibanda o ekolo se yoko, mpe tia elembo o ebandela ya nzela ekokende o engumba, | |
| Ezek | LinVB | 21:25 | bongo elakisa mopanga nzela ekoki kokende o Raba ya ba-Amon, o Yuda mpe o ebombamelo ya Yeruzalem. | |
| Ezek | LinVB | 21:26 | Yeba ’te mokonzi wa Babilon atelemi o esika nzela ibale ikutani ; atuni zeke soko ekolakisa ye nini. Asangisi makula, atuni banzambe ba ye mpe atali libále lya nyama. | |
| Ezek | LinVB | 21:27 | O loboko la ye la mobali zeke elakisi Yeruzalem : kuna batia masini mpo ya kobuka efelo ya engumba, bapesa etinda ya koboma bato, bayokisa migango mya etumba, bapusa masini pene na bizibeli, babakisa mabelé liboso lya lopango mpe batimola bibombamelo. | |
| Ezek | LinVB | 21:28 | Bato ba Israel bakinoli likambo liye lya botuni, kasi mpo ya ndai balayaki akolakisa bango masumu basalaki, mpe akokangisa bango o boombo. | |
| Ezek | LinVB | 21:29 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Bosali ’te bakundola masumu ma bino ; mabe ma bikela bya bino mamononi. Bokokangema o boombo, mpo bakundoli makambo ma bino. | |
| Ezek | LinVB | 21:30 | Yo, nkumu wa Israel, moto mabe mpenza, mokolo mwa yo mokoki, mokolo mabe manso makosila. | |
| Ezek | LinVB | 21:31 | Mokonzi Yawe alobi boye : Longola elembo ya bokonzi, enkoti ya lokumu, o motó ; makambo manso makobongwana : bakotombola eye ezali o nse, bakokitisa eye ezali o likolo. | |
| Ezek | LinVB | 21:32 | Nakobebisa engumba eye nye, ekotikala se mopotu, lokola esalemaki naino te, liboso ’te oyo azali na likoki lya kosambisa akoya, oyo nakotinda asala bongo. | |
| Ezek | LinVB | 21:33 | Mwana wa moto, sakola mpe loba : Mokonzi Yawe alobi na ba-Amon mpo ya mafinga ma bango : Mopanga, mopanga, babimisi yo mpo ya koboma, basebi yo mpo ya kobebisa mpe kobwaka minkalali, | |
| Ezek | LinVB | 21:34 | o ntango balakisi yo bimonela mpe bilembo bya lokuta mpo ya kokata nkingo ya bato babe, mpo mokolo bakosuka mobelemi, mpe mabe ma bango makosila. | |
| Ezek | LinVB | 21:35 | Zongisa mopanga o esika ya mwango. O esika bakelaki yo, o ekolo babotaki yo nakosambisa yo. | |
| Ezek | LinVB | 21:36 | Nakokitisela yo nkanda ya ngai, móto mwa nkele ya ngai mokokitela yo ; nakokaba yo o maboko ma basenzi, baye bakokanaka kobebisa. | |