Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 24
Ezek LinVB 24:1  O mobu mwa libwa, o sa­nza ya zomi, o mokolo mwa zomi, Yawe alobi na ngai maloba maye :
Ezek LinVB 24:2  Mwana wa moto, koma mokolo mwa lelo mpenza o monkanda, mpo lelomei mokonzi wa Babilon akoya kobundisa Yeruzalem.
Ezek LinVB 24:3  Loba na libota lya batomboki moulani. Loba na bango : Mokonzi Yawe alo­bi boye : Tia lisasu o móto mpe sopa mai o kati.
Ezek LinVB 24:4  Bakisa biteni bya nsuni biye bileki malamu, ebelo na lipeke ; tondisa lisasu na minkuwa mileki malamu.
Ezek LinVB 24:5  Pono nyama eye eleki kitoko o eto­nga, tia nkoni o nse ya lisasu, pelisa móto, tokisa byango kina minkuwa mikobela malamu.
Ezek LinVB 24:6  Mpo Mokonzi Yawe alobi : Mawa na engumba ya babomi, ekomi lokola lisasu ligugi, liye bakoki kolongola lisusu te ! Bimisa eteni yoko yoko, obete zeke te.
Ezek LinVB 24:7  Solo, makila mazali o engumba eye masopani o mabanga. Basopi mango o mabelé te mpo ’te zelo ezipa mango te.
Ezek LinVB 24:8  Nasopi makila mana o libanga mpo ’te mazipama te, nakolisa bongo nkanda ya ngai mpe nabekola makila mana.
Ezek LinVB 24:9  Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Mawa na engumba eye ya babomi ! Ngai mpe nakopelisa móto monene.
Ezek LinVB 24:10  Sangisa nkoni, pelisa móto, lamba misuni mibela malamu, bakisa nkasa ya nsolo mpimbo, minkuwa mizika.
Ezek LinVB 24:11  Tia lisasu mpamba o móto mwa makala, likoma móto, mbengi etela, bosoto bozali o kati bonyangwa mpe bogugi bonso bolongwa.
Ezek LinVB 24:12  Kasi se mpamba, bogugi boleki makasi, bokolongwa te,
Ezek LinVB 24:13  mpo ya bosoto bwa bosoni bwa yo ; nali­ngaki kopetola yo, kasi oboyaki ko­koma peto ; okopetwama lisusu te, kina nkanda ya ngai ekosila.
Ezek LinVB 24:14  Ngai Yawe nalobi bongo mpe nakosala yango noki, nakoyokela yo ngolu te, mawa mpe te. Bakosambisa yo engebene na ezalela mpe na misala mya yo. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 24:16  Mwana wa moto, nakobotolo yo eloko eye okosepelaka kotala na miso ; kasi okoki komilela te, mpe kolela mai o miso te.
Ezek LinVB 24:17  Obomba ma­wa o motema, olata mpili te, okanga ngabuni o motó, olata sapato o makolo, ozipa mandefu te mpe biloko bato bakoyela yo olia bya­ngo te.
Ezek LinVB 24:18  Mokolo moko na ntongo nazalaki koloba bongo na bato, na mpokwa mwasi wa ngai akufi. Etani ntongo, nasali lokola Yawe ati­ndaki ngai.
Ezek LinVB 24:19  Bato batuni ngai : « Mpo nini osali bongo ? Oli­mbolela biso ntina ! »
Ezek LinVB 24:21  « Yawe ayebisi ngai maloba maye : Yebisa bato ba Israel boye : Mokonzi Yawe alobi : Nakosantola ndako ya ngai esantu, eye bino bokofundaka na yango mpe bokoyokaka esengo na botali yango, mpo bokolingaka ya­ngo mingi. Bana babali na bana basi ba bino, baye bino botiki, bakokufa na mopanga.
Ezek LinVB 24:22  Bino mpe bokosala lokola ngai nasali sikawa : bokozipa mandefu te, biloko baninga bakoyela bino bokolia bya­ngo te.
Ezek LinVB 24:23  Bokotikala na ngabuni o motó mpe na sapato o makolo. Bokolata mpili te mpe bokolela te. Bokobeba mpo ya masumu ma bino mpe bokokimela banso elongo.
Ezek LinVB 24:24  Ezekiel akozala elembo o miso ma bino ; bokosala bobele lokola ye asali. Mo­kolo makambo maye mako­kwe­la bino, bokoyeba ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 24:25  Mpe yo, mwana wa moto, mokolo nakobotolo bango bokasi, litundu mpe nkembo ya bango, maye makosepelisaka miso ma bango, maye mitema mya bango makoli­ngaka, ná mpe bana ba bango babali na basi,
Ezek LinVB 24:26  mokolo mona moto moko oyo abiki akoya epai ya yo, akoyebisa yo nsango.
Ezek LinVB 24:27  Mokolo mo­na okofungola monoko mpe okoloba na moto oyo abiki ; okozala moto wa ebubu lisusu te. Bongo okozala elembo o miso ma bango. Mpe ba­ngo bakoyeba ’te ngai nazali Yawe. »