EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 39
| Ezek | LinVB | 39:1 | Mwana wa moto, sakola maloba mabe ona Gog. Okoloba : Yoka maloba ma Mokonzi Yawe : Nakobimela yo, Gog, yo mokonzi monene wa Mesek na Tubal. | |
| Ezek | LinVB | 39:2 | Nakokanga yo mpe nakokamba yo, nakobenga yo ut’o mokili mwa Nordi mosika oya kobunda bitumba o ngomba ya Israel. | |
| Ezek | LinVB | 39:3 | Nakobuka litimbo o loboko la yo la mwasi, mpe nakokweisa mimbai osimbi na loboko la mobali. | |
| Ezek | LinVB | 39:4 | Okokufa o ngomba ya Israel, yo na basoda ba yo, na bato ba bikolo bisusu bayokani na yo. Nakosala ’te bingondo ndenge na ndenge mpe nyama ya zamba bilia yo. | |
| Ezek | LinVB | 39:6 | Nakotinda móto o ekolo ya Magog mpe o bisanga binso biye bato bafandi kimia ; bongo bakoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 39:7 | Nakolakisa nkombo ya ngai esantu o ntei ya bato ba ngai, ekolo ya Israel. Nakolinga lisusu te ’te basantola nkombo ya ngai esantu. Bongo bato ba bikolo bisusu bakoyeba ’te nazali Yawe, Mosantu o Israel. | |
| Ezek | LinVB | 39:9 | Bato ba bingumba bya Israel bakokende kotumba bibuneli binso : nguba inene mpe ike, matimbo, makula, mimpanga na makongo. Bakopelisa na byango móto mibu nsambo mobimba. | |
| Ezek | LinVB | 39:10 | Bato bakokende koluka nkoni o esobe lisusu te, bakokende kokata yango o zamba lisusu te, zambi bakopelisa móto na bibuneli. Bakobotolo biloko bya bato baye babotoloki bango biloko liboso, bakokamata na makasi nkita ya baye bakamataki nkita ya bango liboso. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 39:11 | Mokolo mona nakopono esika ya lokumu o Israel mpo ya kokunda Gog. Ekozala lobwaku loye bakotangaka ‘Oberim’ o Esti ya mbu. O lobwaku lona bato bakoki koleka te. Bakokunda Gog na basoda ba ye banso se kuna, mpe bakotanga yango ‘Lobwaku la Limpinga lya Gog’. | |
| Ezek | LinVB | 39:12 | Bato ba Israel bakosengela na sanza nsambo mpo ya kokunda bango mpo ’te bapetola mokili mwa bango. | |
| Ezek | LinVB | 39:13 | Bato banso bakosalisana o likambo lina, bongo mokolo nakolakisa bosantu bwa ngai, bango banso bakozwa lokumu. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 39:14 | Bakopono bato basusu bobele mpo ya kotambola o mokili mobimba bakunda bawei balali naino o mabelé ; bapetola mokili bongo. Bakosala bongo sanza nsambo. | |
| Ezek | LinVB | 39:15 | Ntango bakotambola o ekolo mobimba, soko bamoni minkuwa mya moto, bakotia elembo kuna, mpo ’te mokolo bakundi-bibembe bakoya, bakunda ye o lobwaku la ‘Amon-Gog’ | |
| Ezek | LinVB | 39:17 | Mwana wa moto, Mokonzi Yawe alobi boye : Loba na ndeke mpe na nyama inso ya zamba : Bosangana esika yoko, bolongwa o bisika bino bozali mpe boya kolia libonza nalingi kobonzela bino. Ezali moboma monene o ngomba ya Israel. Bokolia misuni, bokomele makila ; | |
| Ezek | LinVB | 39:18 | bokolia nsuni ya bilombe, bokomele makila ma bankumu ba nse : mpata babali, bana ba mpata, ntaba babali, ngombe babali ya mafuta mingi ya Basan. | |
| Ezek | LinVB | 39:19 | Bokolia misuni mya mafuta lokola motema molingi, bokomele makila tee bokolangwa ; ezali limpati nasaleli bino. | |
| Ezek | LinVB | 39:20 | O meza ya ngai bokotonda na bolei farasa na batambwisi, bilombe na babuni ndenge na ndenge. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 39:21 | Nakolakisa lokumu la ngai o miso ma bato ba bikolo binso. Bato banso ba mokili bakomono ’te nakokokisa likambo liye nakataki, mpe loboko la ngai lokonyata bango. | |
| Ezek | LinVB | 39:23 | Bato ba bikolo bisusu bakoyeba ’te bato ba Israel bakei o boombo mpo ya mabe ma bango, mpamba te, batosaki ngai te ; yango wana nabombi elongi ya ngai mpe nakabi bango o maboko ma banguna ba bango. Banso bakufi na mopanga. | |
| Ezek | LinVB | 39:24 | Napesi bango etumbu ekoki na mabe ma bango mpe na bobuki mibeko ; yango wana nabombi elongi ya ngai. | |
| Ezek | LinVB | 39:25 | Na ntina ena Mokonzi Yawe alobi boye : Nakobongisa sikawa likambo lya bato ba Yakob, nakoyokela bato banso ba ekolo ya Israel ngolu, mpe nakolakisa zuwa linene mpo ya nkombo ya ngai esantu. | |
| Ezek | LinVB | 39:26 | Bakobosana nsoni bayokaki na mpe mabe manso basalaki ngai o ntango bafandaki kimia o mokili mwa bango mpe moto moko azalaki kobangisa bango te. | |
| Ezek | LinVB | 39:27 | Nakolongola bango o bikolo bisusu, nakosangisa bango o mokili moye mozali penepene na banguna ba bango te ; yango ekolakisa bosantu bwa ngai epai ya bango o miso ma bato baike. | |
| Ezek | LinVB | 39:28 | Mokolo mona bakoyeba ’te ngai nazali Yawe Nzambe wa bango, zambi liboso natindaki bango bakende o boombo o bikolo bisusu, kasi na nsima nakosangisa bango o ekolo ya bango moko. Nakotika moto moko kuna te. | |