Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 30
Ezek LinVB 30:2  Mwana wa moto, sakola makambo, loba : Mokonzi Yawe alobi boye. Ganga makasi : « Mawa ! Mokolo mona ! »
Ezek LinVB 30:3  mpo mokolo mwa Yawe mobelemi, mokolo mona mokomi penepene ; ekozala mokolo mwa londende lonene, mokolo bato ba bikolo binso bakoyoka mpasi.
Ezek LinVB 30:4  Mopanga mokokwela Ezipeti, bato ba Etiópia bakolenge na nsomo, ntango bato ba Ezipeti bakokufa, bakoyiba nkita mpe bakobuka ndako kuna.
Ezek LinVB 30:5  Bato ba Kus, Put na Lud, Arabu mobimba na Kub, na bana ba bondeko, bakokufa na mopanga elongo na ye.
Ezek LinVB 30:6  Mokonzi Yawe alobi boye : Baye basalisi Ezipeti bakokufa ; lolendo mpo ya bokasi bwa ye lokosuka. Banda Migdol tee Siena bato banso bakokufa na mopanga. Maloba ma Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 30:7  Ezipeti ekokoma mopotu leka bikolo bisusu, bingumba bya ye bikokoma mipotu o ntei ya bingu­mba bibeba.
Ezek LinVB 30:8  Bongo mokolo nakotumba Ezipeti mpe nakosukisa bokasi bwa basalisi ba ye, bakoyeba ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 30:9  Mokolo mona nakotinda masuwa na bantoma na ngai, bábangisa bato ba Etiópia, baye bazali na kimia sikawa. Mokolo makambo maye manso makokwela Ezipeti, bakolenge na nsomo. Solo, makambo mana makosalema !
Ezek LinVB 30:10  Mokonzi Yawe alobi boye : Nakosilisa makeléle ma bisengo o Ezipe­ti na maboko ma Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon.
Ezek LinVB 30:11  Nakotinda ye elongo na bato ba ye, ekolo eye eleki mokili mobimba na makambo makasi, bábebisa Ezipeti. Bakobimisa mopanga mpe bakoto­ndisa Ezipeti na bibembe.
Ezek LinVB 30:12  Nakokaukisa mai ma ebale Nil, nakokaba ekolo o maboko ma babebisi. Nakobebisa mokili na biloko binso na maboko ma bauta. Ngai Yawe nasili nalobi.
Ezek LinVB 30:13  Mokonzi Yawe alobi boye : Nakobuka bikeko binso, nakolongola banzambe ba lokuta o Nof. Nakolongola mpe bankumu o Ezipeti. Nakolengisa bato banso ba Ezipeti na nsomo.
Ezek LinVB 30:14  Nakobebisa mokili mwa Patros, nakotumba Soan, mpe nakopesa No etumbu.
Ezek LinVB 30:15  Nakokitisela Sin, ebombamelo ya Ezipeti, nkanda ya ngai enene, nakosilisa batobaNo.
Ezek LinVB 30:16  Nakotumba Ezipeti na móto, Sin akobilingana na mpasi, bakobuka lopango la No mpe Nof ekozinda o mai.
Ezek LinVB 30:17  Bilenge babali ba On mpe ba Pi-Beset bakobomama na mopanga, mpe bato ba bingumba bakoke­nde o boombo.
Ezek LinVB 30:18  O Tapanes moi mokobongwana molili ntango nakobuka mintongo mya Ezipeti mpe lolendo la bokasi bwa bango lokosuka. Molili mokozipa yango, mpe bana basi ba ye ba­kokende o boombo.
Ezek LinVB 30:19  Nakotu­mbola Ezipeti bongo ; bakoyeba bongo ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 30:20  O mobu mwa zomi na moko, o sanza ya yambo, o mokolo mwa nsambo, Yawe alobi na ngai maloba maye :
Ezek LinVB 30:21  Mwana wa moto, nabuki loboko la Farao, mokonzi wa Ezipeti. Moto moko te asukoli mpota ya ye, batii yango monó te, baka­ngi yango na elamba te, basalisi ye te mpo ’te akoka kobete lisusu mopa­nga.
Ezek LinVB 30:22  Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Nakoyela Farao, mokonzi wa Ezipeti, etumba. Nakobuka maboko ma ye, na loboko loye losili lobukani, mpe nakokweisa mopanga mozali o loboko la ye.
Ezek LinVB 30:23  Nakopanza bato ba Ezipeti o bikolo bisusu, nakotinda bango o biko­lo bisusu.
Ezek LinVB 30:24  Nakolendisa mokonzi wa Babilon mpe nakotia mopanga mwa ngai o loboko la ye. Nakobuka maboko ma Farao mpe akokimela o miso ma monguna lokola moto alingi awei.
Ezek LinVB 30:25  Nakolendisa mokonzi wa Babilon, kasi nakokweisa Farao. O eleko nakotia mopanga mwa ngai o maboko ma mokonzi wa Babilon mpe ye akobete na mwango mokili mwa Ezipeti, bato bakoyeba ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 30:26  Nakopanza bato ba Ezipeti o bikolo bisusu, nakotinda bango o bikolo bisusu. Bakoyeba bongo ’te ngai nazali Yawe.