Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOHN
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 17
John LinVB 17:1  Elobí Yézu bôngó, atómbólí míso epái ya likoló, alobí : « Tatá, elaká ekokí. Kúmísá Mwána wa yǒ mpô ’te Mwána wa yǒ ákúmisa yǒ.
John LinVB 17:2  Osílí opésí yě bokonzi bwa bato bánso, mpô ’te ákabela bato opésí yě bomoi bwa sékô.
John LinVB 17:3  Bomoi bwa sékô, bwangó ’te báyéba yǒ, Nzámbe wa sôló sé mǒ­kó, báyéba mpé óyo otíndí : Yézu Krístu !
John LinVB 17:4  Na bosílisi mosálá opésí ngáí, nalakísí bato ba nsé nkémbo ya yǒ.
John LinVB 17:5  Sikáwa, Tatá, pésá ngáí nkémbo epái ya yǒ, eye nazalákí na yangó ntángo likoló na nsé bizalákí naíno té.
John LinVB 17:6  Nasangélí bato nkómbó ya yǒ, bato baye olongólí o nsé eye mpô ’te ópésa ngáí. Bazalákí bato ba yǒ, opésí ngáí bangó, mpé bayambí maloba ma yǒ.
John LinVB 17:7  Sikáwa bayébí ’te mánso opésí ngáí maútí epái ya yǒ.
John LinVB 17:8  Nayébísí bangó maloba oyébísákí ngáí ; bayambí mangó ; sikáwa bayébí sôló ’te naútí epái ya yǒ, mpé bayambí ’te yǒ moto otí­ndí ngáí.
John LinVB 17:9  Nazalí kosámbela mpô ya bangó. Nakosámbela mpô ya bato ba nsé té, kasi mpô ya bato opésí ngáí, zambí bazalí bato ba yǒ.
John LinVB 17:10  Bínso bizalí bya ngáí, bizalí bya yǒ ; bínso bizalí bya yǒ, bizalí bya ngáí ; nazwí lokúmu mpô ya bangó.
John LinVB 17:11  Ngáí nakoúmela lisúsu o nsé eye té, ngáí nakoyâ epái ya yǒ ; kasi bangó bafándí o nsé. Tatá mosántu, bátélá o nkómbó ya yǒ baye opésí ngáí, mpô ’te bázala sé moto mǒkó lokóla bísó na yǒ.
John LinVB 17:12  Ntángo nazalákí na bangó, nabátélákí bangó na ngúyá ya nkómbó ya yǒ, nkómbó opésí ngáí. Nakéngélékí bangó : mǒ­kó wa bangó abúngámí té, tíká sé óyo asengélákí kobúngama mpô ’te ésálema lokóla ekomámí o Minkandá Misántu.
John LinVB 17:13  Kasi sikáwa nakoyâ epái ya yǒ. Nalobí bôngó áwa nazalí naíno o nsé, mpô ’te bázala na esengo ya ngáí o mitéma mya bangó mpé bátónda na yangó.
John LinVB 17:14  Nalakísí bangó matéya ma yǒ, mpé bato ba nsé bayiní bangó, zambí bangó bazalí bato ba nsé té, lokóla ngáí mpé nazalí moto wa nsé té.
John LinVB 17:15  Nabóndélí yǒ : ólongola bangó o nsé té, kasi óbíkisa bangó o mabóko ma mobébisi.
John LinVB 17:16  Bazalí bato ba nsé té, lokóla ngáí mpé nazalí moto wa nsé té.
John LinVB 17:17  Osántisa bangó na bosôló ; maloba ma yǒ mazalí sé ma bosôló.
John LinVB 17:18  Natíndí bangó o káti ya bato, lokóla yǒ otíndákí ngáí o káti ya bato.
John LinVB 17:19  Nakomíkaba mobimba mpô ya bangó mpô ’te bangó mpé bákóma sôló bato ba yǒ.
John LinVB 17:20  Nazalí kosámbela bobélé mpô ya bangó té, kasi mpé mpô ya bato bakoyóka matéya ma bangó mpé bakoyamba ngáí nsima mpô ya matéya ma bangó,
John LinVB 17:21  mpô ’te bánso bázala sé moto mǒkó. Lokóla bísó na yǒ, Tatá, tozalí sé moto mǒkó, bangó mpé bázala na bísó lisangá, mpô ’te bato ba nsé báyamba ’te yǒ moto otíndí ngáí.
John LinVB 17:22  Napésí bangó nkémbo óyo opésákí ngáí, mpô ’te bázala sé moto mǒkó lokóla bísó na yǒ tozalí sé moto mǒ­kó :
John LinVB 17:23  ngáí násangana na bangó mpé yǒ ósangana na ngáí, mpô ’te bázala sé moto mǒ­kó mpenzá, mpé bato ba nsé báyéba ’te yǒ moto otíndí ngáí, mpé okolingaka bangó lokóla okoli­ngaka ngáí.
John LinVB 17:24  Tatá, nalingí ’te baye opésí ngáí bázala na ngáí esíká ngáí nakoke­nde, bámóno nkémbo ya ngáí, eye opésí ngáí, zambí olingákí ngáí naíno mokili mokelámí té.
John LinVB 17:25  Tatá wa bosémbo, bato ba nsé bayébí yǒ té, kasi ngáí nayébí yǒ, mpé bato baye bandimí ’te yǒ moto otíndí ngáí.
John LinVB 17:26  Nalakísí bangó nkómbó ya yǒ mpé nakokóba kolakisa yangó naíno mpô ’te bolingi okolingaka ngáí bózala o mitéma mya bangó, mpé ngáí mǒkó názala o mitéma mya bangó. »