Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LEVITICUS
Prev Up Next
Chapter 2
Levi LinVB 2:1  Soko moto alingi kobonzela Yawe libonza lya bilei, akamata fufu, asopela yango mafuta mpe atia mpaka ya malasi.
Levi LinVB 2:2  Aya na yango epai ya banganga Nzambe, bana ba Aron. Nganga Nzambe akamata nda­mbo ya fufu, mwa mafuta na mpaka ya malasi o loboko ; atumba inso o altare mpo ’te Nzambe akanisa ye ; ekomi bongo bilei bitu-mbami na móto, ezali libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe.
Levi LinVB 2:3  Biye bitikali, bapesa byango na Aron mpe na bana ba ye ; bizali bilei bileki bisantu zambi bitumbami na móto mpo ya Yawe.
Levi LinVB 2:4  Soko olingi kobonzela Yawe libonza lya bilei, libonza lya mampa matumbami o fulu, fufu ya yango ezala minkate milambami na nkisi te, kasi esangana na mafuta, to ezala bisikiti izangi nkisi, iye balambi na mafuta.
Levi LinVB 2:5  Soko obonzi libonza lya bilei, libonza bakalingi o lisasu, kamata mpe fufu elambami na mafuta, kasi na nkisi te.
Levi LinVB 2:6  Obuka yango biteni biteni, mpe osopela yango mafuta. Ezali libonza lya bilei.
Levi LinVB 2:7  Soko obonzi libonza lya bilei, libonza balambi o nzungu, kamata fufu ya mampa elambami na mafuta.
Levi LinVB 2:8  Obonzela Yawe bilei ola­mbaki bongo, mpe pesa Nganga Nzambe byango ; nganga Nzambe akomeme byango o altare.
Levi LinVB 2:9  Ye alongola ndambo mpe atumba ya­ngo o altare mpo ’te Yawe akanisaka ye. Ekomi bilei bitumbami na móto, ezali libonza lya nsolo mpi­mbo likosepelisaYawe.
Levi LinVB 2:10  Biye bitikali, bapesa Aron na bana ba ye ; bilei biye bileki bisantu, zambi babonzaki byango na Yawe.
Levi LinVB 2:11  Biloko binso bolingi kobonzela Yawe, bokoki kolamba byango na nkisi te, mpo bokoki kotumba bilei mpo ya Yawe te, soko bilambami na nkisi to na mafuta ma nzoi.
Levi LinVB 2:12  Bokoki kobonzela Yawe byango bo libonza lya mbuma ya yambo bya bilanga, kasi bokoki kobonza byango o altare te bo libonza likosepelisa Yawe.
Levi LinVB 2:13  Otia mongwa o mabonza ma bilei manso okobonzela Yawe ; ezali mongwa mwa bondeko na Nzambe wa yo, ekoki kozanga o libonza lya yo te. Obakisa mongwa o mabonza ma yo manso.
Levi LinVB 2:14  Soko obonzeli Yawe mbuma ya yambo ya bilanga, kamata mitó mya mbuma ya mampa, kalinga yango na móto, to nika yango moke mpe lamba yango bongo.
Levi LinVB 2:15  Sopela ya-ngo mafuta mpe tiela yango mpaka ya malasi ; ekozala libonza lya bilei.
Levi LinVB 2:16  Nganga Nzambe akotumba eteni eye ekosala ’te Yawe akanisa yo : eza­li ndambo ya mampa mpe ya ma­futa na mpe mpaka ya malasi ; libonza liye lya kotumbama likosepelisa Yawe.