Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LEVITICUS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 5
Levi LinVB 5:1  Soko moto asali lisumu, kanisa : zuzi abengi ye, alayisi ye ndai mpo asakola maye manso amonoki to ayokaki, kasi alingi kotanga ma­ngo te, moto oyo asali mabe.
Levi LinVB 5:2  Soko moto asimbi eloko mbi-ndo na maboko, ata na bokebi te, kanisa ebembe ya nyama mbindo ya zamba, ebembe ya nyama mbi-ndo ya mboka to ya nyama eke, moto oyo akomi na mbindo, amemi ngambo.
Levi LinVB 5:3  Soko asimbi bosoto bwa bato na maboko, ata na bokebi te, asimbi ata eloko nini ezali na mbindo, akomeme ngambo ntango bakoyebisa ye.
Levi LinVB 5:4  Soko ndai ya moto, oyo akanisaki malamu te, ezweli ye malamu to mabe, ata ndenge nini moto akoki bongo kobosana, o ntango bayebisi ye yango, akomeme ngambo.
Levi LinVB 5:5  Moto asali lisumu bongo mpo ya likambo lyoko, asakola lisumu asali ;
Levi LinVB 5:6  ayela Yawe moboma mwa kozwa bolimbisi masumu : mpata mwasi to ntaba mwasi. Ezala moboma mpo ya kozwa bolimbisi masumu : mpe nganga Nzambe akokisa milulu mya kolimbisa lisumu lya ye.
Levi LinVB 5:7  Soko moto akoki kozwa ata mpata te, abonzela Yawe bikokoba bibale to bibenga bibale mpo ya bolimbisi lisumu lya ye. Yoko ezala moboma mpo ya lisumu asali, yoko ezala libonza lya kotumba.
Levi LinVB 5:8  Apesa byango na nganga Nzambe, oyo akobonza liboso moboma mpo ya bolimbisi lisumu. Afina nkingo makasi, abuka yango, kasi alongola motó te.
Levi LinVB 5:9  Na makila ma ndeke ena anyakela mipanzi mya altare, mpe asopa makila matikali o eteni ya nse ya altare. Ezali moboma mpo ya bolimbisi lisumu.
Levi LinVB 5:10  Atu­mba ndeke esusu lokola etindami. Nganga Nza­mbe akokisa bongo milulu mya bolimbisi masumu, mpe lisumu lya ye likolimbama.
Levi LinVB 5:11  Soko azali mobola mpenza mpe akoki kobonza ata bikokoba bibale to bibenga bibale te, akamata sani ya fufu mpe abonza yango mpo ya kozwa bolimbisi masumu. Abakisa mafuta te, mpaka ya malasi mpe te, zambi ezali moboma mpo ya masumu.
Levi LinVB 5:12  Apesa yango na nganga Nza­mbe, oyo akokamata ndambo o ma­boko mpo ’te Yawe akanisa ye, atumba yango o altare elongo na bilei bitumbami na móto mpo ya Yawe. Ezali moboma mpo ya masumu.
Levi LinVB 5:13  Nganga Nzambe akokisa bongo milulu mya bolimbisi masumu asalaki, mpe masumu ma ye makolimbama. Biloko bitikali bikozala bya nganga Nzambe, se lokola mabonza ma bilei makozala ma nganga Nzambe.
Levi LinVB 5:15  Soko moto asali lisumu, kasi na bokebi te, zambi abosani kofuta biye bise­ngeli kofutama na Yawe, apesa Yawe moboma mwa bolimbisi nyo­ngo. Ezala mpata mobali ya etonga ya ye, ezala na mbeba te, ezala ya mwa motuya ; batanga mosolo lokola bakotangaka mwango o ndako esantu.
Levi LinVB 5:16  Afuta bongo mosolo ase­ngelaki kofuta ndako esantu ; abakisa eteni ya mitano mpe apesa nga­nga Nzambe binso. Bongo nga­nga Nzambe asala milulu mya kolimbisa lisumu lya ye, awa apesaki mpata mobali mpo ya kosilisa nyo­ngo ya ye ; mpe lisumu lya ye likoli­mbama.
Levi LinVB 5:17  Soko moto asali lisumu, mpe na bokebi te asali likambo lipekisami na mobeko mwa Yawe, amemi ngambo.
Levi LinVB 5:18  Apesa nganga Nzambe mpata mobali ezali eye na mbeba te, mpo ’te ezala moboma mwa kolimbisa lisumu lya ye. Nganga Nza­mbe asala milulu mya bolimbisi lisu­mu, liye asalaki na bokebi te ; lisumu lya ye likolimbama.
Levi LinVB 5:19  Ezali moboma mwa kofuta nyongo, za­mbi moto oyo azalaki na likambo o miso ma Yawe.
Levi LinVB 5:21  Soko moto asali lisumu o miso ma Yawe, kanisa : moninga atikeli ye eloko mpo ’te abomba yango, to adefisi ye eloko, kasi awangani na mayele mabe,
Levi LinVB 5:22  to soko alokoti eloko ya moninga, kasi awangani, to alayi ndai ya lokuta o likambo litali lisumu moto akoki kosala,
Levi LinVB 5:23  moto oyo asali lisumu mpe amemi ngambo. Asengeli kozongisa eloko akamataki na boyibi to asengeki na mayele mabe ; azongisa bongo biloko abo­mbaki to alokotoki ;
Levi LinVB 5:24  na mpe biloko biye alayaki ndai ya lokuta ’te bizali bya ye. Azongisa biloko biye, abakisa eteni ya bitano mpe apesa binso o maboko ma nkolo wa byango, bobele o mokolo bayebisi ye ’te amemi ngambo.
Levi LinVB 5:25  Na nsima abonzela Yawe moboma mwa bolimbisi nyongo : mpata mobali ya etonga ya ye, ezala na mbeba te. Ezala ya motuya mokokani na mosolo bakopesaka mpo ya bofuti moboma mwa bolimbisi nyongo.
Levi LinVB 5:26  Na nsima nganga Nzambe asala milulu mya bolimbisi masumu o miso ma Yawe, bongo lisumu lya ye likolimbama, ata asali mabe nini.