Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LEVITICUS
Prev Up Next
Chapter 7
Levi LinVB 7:1  Mobeko mwa moboma mwa bofuti nyongo mozali boye : ezali eloko esantu mpenza.
Levi LinVB 7:2  Baboma nyama o esika bakotumba libo­nza. Nganga Nzambe asopa ma­ki­la o mipanzi mya altare.
Levi LinVB 7:3  Na nsima abonza mafuta manso : mokila, mafu­ta, makangemi na misopo,
Levi LinVB 7:4  mpiko ibale, mafuta makangemi na ya­ng­o, mafuta ma mokongo, na mafuta makangemi na libale mpe na mpiko.
Levi LinVB 7:5  Nganga Nzambe atumba biteni bina o altare lokola bilei bitumbameli Yawe. Ezali moboma mwa bofuti nyongo.
Levi LinVB 7:6  Babali banso ba libota lya nganga Nzambe bakoki kolia mwango. Balia mwango o esika esantu, ezali eloko esantu mpenza.
Levi LinVB 7:7  Mobeko mwa moboma mwa masumu ná mobeko mwa moboma mwa bofuti nyongo mozali se nde­nge yoko. Nganga Nzambe akoki kokamata libonza liye abomi mpo ya kosala milulu mya bozwi boli­mbisimasumu.
Levi LinVB 7:8  Soko moto abo­nzeli Yawe nyama bo libonza lya kotumba, nganga Nzambe akoki kokamata lomposo.
Levi LinVB 7:9  Soko babo­nzeli Yawe libonza lya bilei, biye bakalingi na móto, to bilei balambi o lisasu to o nzungu, nganga Nza­mbe akoki kozwa bya­ngo.
Levi LinVB 7:10  Biloko binso bato babonzi, ata bilambami na mafuta to te, bizali bya bana babali ba libota lya Aron.
Levi LinVB 7:12  Moto alingi kobonzela Yawe moboma elongo na nzembo mpo ya kotondo Yawe, abonza mpe minkate milambami na mafuta, kasi na nkisi te, ná mpe mampa malambami na mafuta, kasi na nkisi te, asangisa binso bikoma bisikiti.
Levi LinVB 7:13  Abonza naino mampa masusu malambami na nkisi, mazala wana penepene na moboma mwa bondeko bapesi mpo ya kotondo Yawe.
Levi LinVB 7:14  O kati ya biloko biye binso bakamata nda­mbo yoko mpo ya kobonzela Yawe, mpe nganga Nzambe oyo asopaki makila ma moboma mwa bondeko, azwa yango.
Levi LinVB 7:15  Misuni mya moboma mobonzami mpo ya kotondo Yawe, basengeli kolia myango o mokolo monamei ; eloko yoko ekoki kotikala tee lobi na ntongo te.
Levi LinVB 7:16  Soko moto abonzeli Yawe moboma o nkombo ya ye moko to zambi alakelaki bongo, akoki kolia mwango o mokolo mwa nsima.
Levi LinVB 7:17  Ekomi ndele abwaka o móto biye bya moboma bitikali.
Levi LinVB 7:18  Soko moto alei mosuni mwa moboma mwa bondeko bobele nsima ya mikolo mibale, libonza lya ye liko­ndimama te, likokende mpa­mba mpenza, zambi mosuni mobebi mpe moto oyo akolia mwa­ngo, akomeme ngambo.
Levi LinVB 7:19  Mosuni moye mosimbaki eloko mbindo ata nini, bakoki kolia mwa­ngo te, babwaka mwango o móto. Moto oyo azali peto akoki kolia nyama ya libonza.
Levi LinVB 7:20  Kasi moto azali na mbindo, soko alei nyama babonzeli Yawe bo moboma mwa bondeko, balongola ye o libota lya ye.
Levi LinVB 7:21  Soko moto asimbi eloko mbi­ndo ata nini, ezala moto to nyama to eloko nini, mpe na nsima alei nyama ya moboma mwa bo-ndeko babonzeli Yawe, balongola ye o libota lya ye.
Levi LinVB 7:23  Loba na bana ba-Israel boye : Bolia mafuta ma ngombe mobali, ma mpata to ma ntaba te.
Levi LinVB 7:24  Mafuta ma nyama ekufi yango moko, to mafuta ma nyama eye nyama ya zamba ekatikati, bakoki kokamata mango mpo ya mosala mosusu, kasi bakoki kolia mango te.
Levi LinVB 7:25  Soko moto alei mafuta ma nyama eye babonzeli Yawe, balongola ye o libota lya ye.
Levi LinVB 7:26  Ata bokofandaka epai wapi, bokoki kolia bilei bya makila te, ezala makila ma ndeke to ma nyama.
Levi LinVB 7:27  Oyo ameli makila, ata ma moti­ndo nini, balongola ye o libota lya ye.
Levi LinVB 7:29  Loba na bana ba-Israel boye : Oyo abonzeli Yawe moboma mwa bondeko, amemele ye ndambo ya moboma mwa ye.
Levi LinVB 7:30  Ye moko ameme mafuta manso ma ntolo o maboko bo bilei balambeli Yawe. Soko ayei na ma-ngo, atombola mango mpo ’te ala­ki­sa Yawe.
Levi LinVB 7:31  Nganga Nzambe atu­mba mafuta o altare ; ntolo ya nyama ekozala ya Aron na bana ba ye.
Levi LinVB 7:32  Ebelo ya mobali ekozala ya nga­nga Nzambe ; balongolela ye eteni eye ya moboma mwa bondeko.
Levi LinVB 7:33  Moko wa bana ba Aron, oyo abonzi makila na mafuta ma moboma mwa bondeko, akozwa ebelo.
Levi LinVB 7:34  Ya solo, o kati ya miboma mya bondeko bana ba-Israel babonzeli ngai, nakamati ntolo na ebelo mpo bapesa yango na nganga Nzambe Aron na bana ba ye ; ezali mobeko mwa seko napesi bana ba-Israel.
Levi LinVB 7:35  Ezali eteni ya biloko bitumbami mpo ya Yawe, Aron na bana ba ye bazwi o mokolo Aron alakisi Yawe bana ba ye mpo ’te bazala banganga ba ye.
Levi LinVB 7:36  Yawe atindi bana ba-Israel ’te bapesa biloko bina o mokolo bakozwa bonganga. Ezali mobeko mwa seko napesi bankoko ba bango banso.
Levi LinVB 7:37  Milulu mina mitali libonza lya kotumba, libonza lya bilei, moboma mpo ya lisumu, moboma mwa bofuti nyongo, moboma mwa bo­kotisi moto o mosala, mpe moboma mwa bondeko.
Levi LinVB 7:38  Yawe ati­ndaki Mo­ze bongo o ngomba Sinai, o mo­kolo atindaki bana ba-Israel ’te babonzela Yawe mabonza o eliki ya Sinai.