Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LEVITICUS
Prev Up Next
Chapter 22
Levi LinVB 22:2  Loba na Aron mpe na bana ba ye, yebisa bango makambo nini mapekisi bango kolia mabonza masantu, maye bana ba-Israel babo-nzeli ngai, mpo ’te basantola nko-mbo ya ngai te. Ngai Yawe.
Levi LinVB 22:3  Loba na bango : Soko moto moko wa libota lya yo azali na mbindo, nzokande abelemi na mabonza masan­tu, maye bana ba-Israel babonzeli Yawe, balongola moto oyo o miso ma ngai. Ezali mobeko mwa seko. Ngai nazali Yawe.
Levi LinVB 22:4  Soko moto moko wa libota lya Aron azali na bokono bwa maba to na bokono bwa botangi mai, akoki kolia bilei bisantu te, soko liboso amipetoli te. Se bongo na moto asimbi eloko ekomi mbindo mpo ya ebembe, moto abimi mai ma mobali,
Levi LinVB 22:5  moto asimbi nyama yoko ekokomisaka mbindo, to asimbi moto moko azali na mbindo ata nini.
Levi LinVB 22:6  Moto asali bongo akomi na mbindo tee mpokwa, mpe akoki kolia mabonza masantu te, soko liboso asukoli nzoto na mai te.
Levi LinVB 22:7  Ekiti moi akomi peto mpe akoki kolia mabonza masantu, zambi mazali bilei bya ye.
Levi LinVB 22:8  Akoki kolia nyama te eye ekufaki yango moko to eye nyama ya zamba ebomaki. Soko alei yango, azwi mbindo. Ngai Yawe.
Levi LinVB 22:9  Batosa mibeko mya ngai mpe basala lisumu te na makambo mana. Soko basantoli mabonza, bakokufa. Ngai Yawe nasantisi mango.
Levi LinVB 22:10  Moto azali nganga Nzambe te, akoki kolia makabo masantu te. Mompaya to mosali akofandaka o ndako ya nganga Nzambe, akoki kolia mango mpe te.
Levi LinVB 22:11  Kasi soko nganga Nzambe asombi moto na mosolo, moto oyo na mpe moto abotami o ndako ya ye bakoki kolia biloko bya nganga Nzambe.
Levi LinVB 22:12  Soko babalaki mwana wa nganga Nzambe na mobali moko, oyo azali nganga Nzambe te, akoki kolia bilei bisantu te.
Levi LinVB 22:13  Kasi soko mobali aboyi ye to mobali akufi, mpe azali na bana te, mpe azongi o ndako ya tata, akoki kolia bilei bya tata wa ye, lokola o ntango ya bolenge bwa ye ; bilei bina bipekisami na moto mosusu.
Levi LinVB 22:14  Soko moto alei eloko esantu mpo akebaki te, asengeli kozongisa eloko esusu o maboko ma nganga Nzambe, mpe abakisa eteni ya bitano.
Levi LinVB 22:15  Basantola mabonza masantu te, maye bana ba-Israel babonzeli Yawe.
Levi LinVB 22:16  Soko balei mango, bamemisi ba-Israel lisumu liye likoli­mbama bobele soko bafuti nyongo, zambi ngai Yawe nasantisi mabo­nza mana.
Levi LinVB 22:18  Loba na Aron mpe na bana ba ye, mpe na bato banso ba-Israel maloba maye : Soko moto wa libota lya Israel to mompaya akofandaka o Israel, ayei na nyama mpo ya kobonzela Yawe, zambi alakelaki yango, to alingi kobonza yango na motema mwa ye moko,
Levi LinVB 22:19  ezala nyama mobali : ngo­mbe, mpata to ntaba, ezala na mbeba te, bakoyamba libonza lya ye.
Levi LinVB 22:20  Soko abonzi nyama ezali na mbeba, ekondimama soki te.
Levi LinVB 22:21  Soko moto abonzeli Yawe mo­bo­ma mwa bondeko, zambi alakelaki bongo, to alingi kobonza mwango ye moko, ezala ngombe to mpata, mpo ’te Yawe ayamba libonza lya ye malamu, nyama ena ekoki kozala na mbeba te :
Levi LinVB 22:22  lolanda te, mpota te, mbengo te, mapaka te, mpanda te, mbuma ebe ekobimisa maina te. Bokoki kotia nyama ya motindo mona o altare te mpo ekoma libo­nza lya bilei bilambami mpo ya Yawe.
Levi LinVB 22:23  Soko yo moko olingi kobo­nze­la Yawe ngombe to mpata, yango ekoki kozala nyama na mbeba to na nzoto ebe ; kasi soko obonzeli Yawe libonza zambi olakelaki ye bo­ngo, nyama ena ezala kitoko ; soki te, Yawe akoyamba libonza lya yo te.
Levi LinVB 22:24  Bobonzela Yawe nyama te, eye ezangi biloko bya mobali, kanisa banyetaki, bapasolaki to bakataki byango. O ekolo ya bino bosala makambo mana te.
Levi LinVB 22:25  Ata mompaya alingi kobonza nyama ya motindo mona, oyamba yango te mpo ya kobonza yango bo bilei bya Nza-mbe wa yo. Awa bato babebisaki nyama bongo, yango ezwi mbeba. Yawe akoyamba yango o maboko ma bino te.
Levi LinVB 22:27  Awa ngo­mbe, mpata to ntaba eboti mwana, nyama ena etikala esika yoko na mama wa yango mikolo nsa­mbo. Ut’o mokolo mwa mwa­mbe bakoki kobonza yango mpo ’te ezala bilei bilambami mpo ya Yawe.
Levi LinVB 22:28  Bokoki koboma mwana ngombe, mwana mpata to mwana ntaba mokolo moko na mama wa yango te.
Levi LinVB 22:29  Soko bobonzeli Yawe libonza mpo ya kokumisa ye, bosala yango bo ebongi, mpo ’te Yawe ayamba lyango.
Levi LinVB 22:30  Bolia lyango se o mokolo mwa libonza, eloko yoko etikala mpo ya lobi te. Ngai Yawe.
Levi LinVB 22:31  Botosa mibeko mya ngai mpe bokokisa myango. Ngai Yawe.
Levi LinVB 22:32  Bosantola nkombo esantu ya ngai te, mpo ’te nazwa lokumu o ntei ya bana ba-Israel. Ngai nazali Yawe, nakosantisa bino.
Levi LinVB 22:33  Ngai moto nabimisaki bino o Ezipeti mpo ’te nazala Nzambe wa bino. Ngai Yawe.