Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 4
Matt LinVB 4:1  Na nsima Yézu akambámí na Elímo Sántu o elíkí mpô ’te zábolo ásénginya yě.
Matt LinVB 4:2  Yézu akilí biléi mikolo ntúkú ínei, butú mói ; na nsima ayókí nzala.
Matt LinVB 4:3  Mosénginyi abelémí mpé alobí na yě : « Sókó ozalí Mwána wa Nzámbe, lobá na mabángá maye ’te mábóngwana mámpa. »
Matt LinVB 4:4  Kasi Yézu azóngísí : « Eko­mámí ’te : Moto akobíka bobélé na mámpa té, kasi na maloba mánso makobimaka o monoko mwa Nzámbe. »
Matt LinVB 4:5  Sikáwa zábolo akeí na yě o Engumbá Esántu, atíí yě o motó­ndo mwa Témpelo,
Matt LinVB 4:6  mpé alobí na yě : « Sókó ozalí Mwána wa Nzámbe, ómíbwáka o nsé, zambí ekomámí ’te : Akopésa bǎnzelú ba yě etíndá mpô ya yŏ, mpé bakomeme yŏ o mabóko, mpô ’te ótúta lokolo na libángá té. »
Matt LinVB 4:7  Yézu alobí na yě : « Ekomámí mpé ’te : Okomeka Mokonzi Nzámbe wa yŏ té. »
Matt LinVB 4:8  Zábolo akeí na yě mpé o nsóngé ya ngómbá esándá mpenzá, alakísí yě mikili mínso mya nsé ná nkémbo ya myangó,
Matt LinVB 4:9  mpé alobí na yě : « Nakopésa yŏ bîná bínso, sókó okúmbámélí mpé okúmísí ngáí. »
Matt LinVB 4:10  Yézu alobí na yě : « Longwá Sátana, zambí ekomámí ’te : Okokúmbamela Mokonzi Nzámbe wa yŏ, okokúmisa bobélé Yě mŏkó. »
Matt LinVB 4:11  Sikáwa zábolo atíkí yě. Mpé tálá, bǎnzelú bayéí kosálela yě.
Matt LinVB 4:12  Eyókí Yézu ’te bakangí Yoáne o bolóko, azóngí o Galiléa.
Matt LinVB 4:13  Atíkí Nazaréte mpé akeí kofánda o Kafárnaum, pene na etíma, o ndelo ya mikili mya Zabulon na Neftali,
Matt LinVB 4:14  mpô ’te ésálema lokóla proféta Izáya alobákí :
Matt LinVB 4:15  Bato ba mikili mya Zabulon na Neftali, o nzelá ya mbú, o ngá­mbo ya Yordáne, o Galiléa ya bapagáno !
Matt LinVB 4:16  Bato bazalákí o molílí bamóní mwínda monéne ; mói motánélí baye bafándí o mbóka ya bawá.
Matt LinVB 4:17  Bandá ntángo êná Yézu abandí kotéya bato mpé koloba : « Bóbó­ngola mitéma, zambí Bokonzi bwa Likoló bokómí penepene. »
Matt LinVB 4:18  Yézu alekí penepene na etíma ya Galiléa. Amóní bandeko bábalé, Simóni, óyo bakobyángaka Pétro, na Andréa ndeko wa yě, bazalákí ko­bwáka monyámá o mái ; bazalákí babomi mbísi.
Matt LinVB 4:19  Yézu alobí na bangó : « Bólanda ngáí, nakokómisa bínó babéndi ba bato. »
Matt LinVB 4:20  Bangó na lombango, batíkí minyámá mya bangó mpé balandí Yézu.
Matt LinVB 4:21  Atámbólí lisúsu mwâ moké, amóní bandeko basúsu bábalé, Yakóbo mwána wa Zebedéo, mpé ndeko wa yě Yoáne. Bazalákí o bwáto, na tatá wa bangó Zebedéo, kobongisa mi­nyámá ; abyángí bangó.
Matt LinVB 4:22  Nokí mpe­nzá batíkí bwáto na tatá wa bangó, mpé balandí yě.
Matt LinVB 4:23  Yézu atámbólí o Galiléa mobimba, atéyí bato o sinagóga ya ba­ngó, asangélí bangó Nsango Elámu ya Bokonzi mpé abíkísí bato bazalákí na bokono mpé na mpási.
Matt LinVB 4:24  Nsango ya yě etámbólí o mokili mobimba mwa Síria. Bazalákí koyéla yě bato bánso bazalákí na boko­no tŏ na mpási ndéngé na ndéngé, baye bazalákí na zábolo o nzóto tŏ na bokono bwa bonsíngá tŏ babúkáná makolo. Yézu abíkísí bangó.
Matt LinVB 4:25  Bato ebelé baútí o Galiléa, o Mbóka-Zómi, o Yerúzalem, o Yudéa mpé o ngámbo ya Yordáne, bakómí kolanda yě.