DANIEL
Chapter 5
Dani | LinVB | 5:1 | Mokonzi Belsazar abengi bankumu nkoto yoko ba ekolo ya ye baya kolia limpati o ndako ya ye. Ameli vino o miso ma bango. | |
Dani | LinVB | 5:2 | Awa elengi ya vino ekoteli ye, Belsazar atindi ’te bayela ye kopo ya wolo na palata iye tata wa ye Nabukodonozor ayibaki o ndako esantu ya Yeruzalem mpo ’te bamele o yango : yemei mokonzi, na bankumu ba ekolo na bamakango ba ye, na bayembi basi. | |
Dani | LinVB | 5:3 | Bayei na kopo ya wolo mpe ya palata, iye bayibaki o Tempelo ya Nzambe o Yeruzalem, mpe mokonzi yemei, bankumu, bamakango ba ye na bayembi basi bameli o yango. | |
Dani | LinVB | 5:4 | Bameli vino mpe bakumisi bikeko bya banzambe ba bango, bisalemi na wolo, palata, mbengi, bibende, nzete to mabanga. | |
Dani | LinVB | 5:5 | Na mbala yoko ebimi wana misapi mya loboko la moto mibandi kokoma maloba o efelo ya ndako ya mokonzi penepene na mwinda monene mozalaki kopela wana. Mokonzi amoni loboko lozali kokoma ; | |
Dani | LinVB | 5:6 | abangi mingi mpenza, mayele ma ye matamboli ; nzoto ya ye mobimba elembi, mpe makolo ma ye makomi kolenge. | |
Dani | LinVB | 5:7 | Agangi makasi mpe abengi banganga ba Kaldea na bato bakoki kobengana bilimo. Mokonzi alobi na bato ba bwanya ba Babilon : « Moto ayebi kotanga maloba mana mpe kolimbolela ngai ntina, nakolatisa ye molato mwa longondo, na mpe nsinga ya mayaka ma wolo o nkingo ; ye akozala moto wa basato o ekolo ya ngai. » | |
Dani | LinVB | 5:8 | Bato ba bwanya banso bayei noki ; kasi bakoki kotanga maloba te, kolimbolela mokonzi mpe te. | |
Dani | LinVB | 5:9 | Mokonzi Belsazar ayoki nsomo, emononi o elongi ; mayele ma bankumu mpe masileli bango. | |
Dani | LinVB | 5:10 | Mokonzi mwasi ayoki maloba ma mokonzi mpe ma bankumu, ayei mbangu o ndako ya limpati mpe alobi : « Mokonzi, zala seko ! Obanga te, bakobebisa lokumu la yo te ! | |
Dani | LinVB | 5:11 | Moto moko azali o ekolo ya yo : Elimo ya banzambe basantu ezali na ye. Ntango ya tata wa yo, bamonoki ’te azali na mayele mpe na bwanya bwa banzambe basantu. Tata wa yo Nabukodonozor alubolaki ye mokonzi wa banganga, wa bamoni-makambo mpe wa batali-minzoto. | |
Dani | LinVB | 5:12 | Daniel, oyo mokonzi atangaki Baltasar, azali na mayele mingi, moto wa bwanya ; ayebi kolimbola ndoto, koyanola mituna mya kwokoso mpe kolakisa ntina ya mibombamo. Malamu obyanga Daniel, ye moto akolimbolela yo ntina ya likambo liye. » | |
Dani | LinVB | 5:13 | Babyangi Daniel, ayei o boso bwa mokonzi. Mokonzi atuni ye : « Yo Daniel, ozalaki o kati ya ba-Yuda baye tata wa ngai akendeki kozwa o mokili mwa Yuda ? | |
Dani | LinVB | 5:15 | Batindelaki ngai bato ba bwanya mpe banganga mpo batangela ngai maloba makomami wana, bayebisa ngai ntina ya mango, kasi bakoki te. | |
Dani | LinVB | 5:16 | Nayoki ’te yo ozali na mayele mingi ma koyebisa ntina ya makambo. Yango wana, soko okoki kotanga maloba mana mpe koyebisa ngai ntina, nakolatisa yo molato mwa longondo na mpe nsinga ya mayaka ma wolo o nkingo. Okozala moto wa basato o bokonzi bwa ngai. » | |
Dani | LinVB | 5:17 | Daniel alobi na mokonzi : « Bomba makabo ma yo, mpe pesa bato basusu mabonza ma yo. Ngai nakotangela yo, mokonzi wa ngai, maloba mana mpe nakoyebisa yo ntina. | |
Dani | LinVB | 5:18 | E mokonzi, Nzambe wa likolo apesaki tata wa yo Nabukodonozor bokonzi bonene, bokasi na nkembo. | |
Dani | LinVB | 5:19 | Mpo ya nguya ya ye enene bato ba bikolo binso, bazala ba mokili nini to baloba lokota nini, bazalaki kobanga ye. Soko alingaki koboma moto, abomi ye ; soko alingaki kobikisa moto, abikisi ye ; soko alingaki kopesa moto esika ya lokumu, apesi ye yango ; soko alingaki kokitisa moto, akitisi ye. | |
Dani | LinVB | 5:20 | Kasi ntango akomi na lolendo mpe alakisi motema mabe na boyokeli bato mawa lisusu te, balongoli ye o bokonzi mpe babotoli ye lokumu la ye. | |
Dani | LinVB | 5:21 | Balongoli ye o ntei ya bato, mpe akomi na makambo lokola nyama. Akomi kofanda esika yoko na mpunda mpe kolia matiti lokola ngombe, nzoto ya ye epoloki na mamio ma ntongo kin’o mokolo andimi ’te bokonzi bonso bouti epai ya Nzambe wa Nta-Likolo, mpe akopesa mwango na moto oyo ye alingi. | |
Dani | LinVB | 5:23 | Omitomboli o miso ma Mokonzi wa likolo. Otindi bato bakamata kopo ya Tempelo ya ye, bayela yo yango. Na nsima bomeli vino na bankumu ba yo, esika yoko na bamakango ba yo mpe na bayembi basi. Bokumisi bikeko bisalemi na wolo, palata, mbengi, bibende, nzete to mabanga. Bikeko biye bikomonoko to bikoyokaka te, bizali na mayele soki te. Kasi Nzambe oyo asimbi bomoi bwa yo mpe azali kobatela nzela ya yo okumisi ye te. | |
Dani | LinVB | 5:26 | Yoka ndimbola ya mango : Mene lokola ‘Atangi’, zambi Nzambe atangi mibu mya bokonzi bwa yo mpe akati ndelo. | |
Dani | LinVB | 5:27 | Tekel lokola ‘Ameki’, zambi Nzambe ameki bozito bwa yo, kasi bozito bwa yo bokoki te. | |
Dani | LinVB | 5:28 | Parsin lokola ‘Akaboli’, zambi mokili mwa yo mokabwani, Nzambe apesi mwango na ba-Medi mpe na ba-Persi. » | |
Dani | LinVB | 5:29 | Sikawa Belsazar atindi ’te balatisa Daniel molato mwa longondo na mpe nsinga ya wolo o nkingo, mpe basakola ’te Daniel akozala moto wa basato o bokonzi bwa ye. | |