Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next
Chapter 27
Deut LinVB 27:1  Moze na bakolo ba Israel bapesi bato etinda eye : « Botosa mibeko minso natindi bino lelo.
Deut LinVB 27:2  Mo­kolo bokokatisa Yordane mpo ’te bokoma o mokili Yawe Nzambe wa bino apesi bino, bokotelemisa ma­banga manene mpe bokopakola ma­ngo mpembe.
Deut LinVB 27:3  O mabanga mana bokoma maloba manso ma Mobeko moye bobele o ntango bokokatisa mai mpo ’te boyingela o mokili Yawe Nzambe wa bino apesi bino, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, se lokola Yawe Nzambe wa bino alakelaki bankoko ba bino.
Deut LinVB 27:4  Mokolo bosili kokatisa Yordane, botia mabanga mana o ngomba Ebal, lokola natindi bino lelo, bopakola mango mpe mpembe.
Deut LinVB 27:5  Botongela Yawe Nzambe wa bino altare na mabanga makatemi na ebende te.
Deut LinVB 27:6  Botongela Yawe Nzambe wa bino altare na mabanga mobimba. Bobele o altare ena bokoki kobonzela Yawe Nzambe wa bino mabonza ma kotumba.
Deut LinVB 27:7  Bobele kuna bokobonza mi­boma mya bondeko, bokolia mpe bokosepela o miso ma Yawe Nza­mbe wa bino.
Deut LinVB 27:8  Bokoma o mabanga mana maloba manso ma Mobeko moye ; bokoma mango polele. »
Deut LinVB 27:9  Na nsima Moze na banganga Nza­mbe ba Levi balobi na ba-Israel banso : « Bofanda nye mpe boyoka malamu, bino bato ba Israel. Lelo bo­komi ekolo ya bato ba Yawe Nza­mbe wa bino.
Deut LinVB 27:10  Boyoka lolaka la Yawe Nzambe wa bino mpe bosala ma­nso lokola mibeko mpe mitindo mitindi, miye natindi bino lelo. »
Deut LinVB 27:11  O mokolo mona Moze apesi bato ba­nso etinda eye :
Deut LinVB 27:12  Mokolo bosili kokatisa Yorda­ne, baye basengeli koteleme o ngo­mba Garizim mpo ya kobenisa, ba­ngo baye : Simeon, Levi, Yuda, Izakar, Yozefu na Benyamin.
Deut LinVB 27:13  Baye basengeli koteleme o ngomba Ebal mpo ya kotombela bato bobe, bango baye : Ruben, Gad, Aser, Zabulon, Dan na Neftali.
Deut LinVB 27:14  Ba-Levi basakola na mongongo makasi mpe baloba na bato banso ba Israel maloba maye :
Deut LinVB 27:15  Azwa bobe moto oyo asali ekeko ya nzete to ya ebende, mpe abombi yango o ndako, zambi ezali likambo lya nsomo o miso ma Yawe ; ezali mosala mwa maboko ma bato. Mpe bato banso bandima mpe baloba : Amen.
Deut LinVB 27:16  Azwa bobe moto oyo akinoli tata to mama wa ye. Mpe bato banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:17  Azwa bobe moto oyo atindisi libanga liye lilakisi ndelo ya mabelé ma moninga. Mpe banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:18  Azwa bobe moto oyo abungisi moto wa lolanda nzela. Mpe banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:19  Azwa bobe moto oyo apimi mo­mpaya, mwana etike na mwasi bozenge maye makoki na bango. Mpe banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:20  Azwa bobe moto oyo alali na mwasi wa tata wa ye, zambi alongoli elamba o nzoto ya mwasi oyo tata apesaki mosolo mwa libala. Mpe ba­nso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:21  Azwa bobe moto oyo asangisi nzoto na nyama ata nini. Mpe banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:22  Azwa bobe mobali oyo ayebani na ndeko wa ye wa mwasi, mwana wa tata to wa mama wa ye. Mpe ba­nso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:23  Azwa bobe mobali oyo alali na mama wa mwasi wa ye. Mpe banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:24  Azwa bobe moto oyo abeti moninga wa ye na bonkutu. Mpe banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:25  Azwa bobe moto oyo ayambi ma­bonza mpo ya koboma moto asali likambo te. Mpe banso baloba : Amen.
Deut LinVB 27:26  Azwa bobe moto oyo atosi maloba ma Mobeko moye te mpe akokisi mango te. Mpe banso baloba : Amen.