Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 30
II C LinVB 30:1  Ezekia atindi bantoma o Israel mpe o Yuda mobimba ; ati­ndeli mpe ba-Efraim na ba-Manase minkanda mpo ’te baya o Tempelo ya Yawe o Yeruzalem kosepela eyenga ya Pasika ya Yawe, Nzambe wa Israel.
II C LinVB 30:2  Mokonzi, bakomanda mpe bato banso bayokani ’te bakosepela eye­nga ya Pasika eye o sanza ya ibale ;
II C LinVB 30:3  bakokaki kosepela yango te o eleko etindami, mpo banganga Nzambe ba­ye bamisantisaki bakokaki te, mpe bato banso bakomaki o Yeruzalem naino te.
II C LinVB 30:5  ’te babenga bato banso o Israel mobimba, banda Berseba tee Dan, baya kosepela eyenga ya Pasika ya Yawe, Nzambe wa Israel, o Yeruzalem, mpo bato baike basepelaki eyenga te lokola etindami o Minkanda Misantu.
II C LinVB 30:6  Bantoma bakei bongo na minka­nda mikomami na mokonzi mpe na bankumu o Israel mpe o Yuda mobimba mpo ’te bayebisa banso maloba maye ma mokonzi : « Bana ba Israel, bozongela Yawe Nzambe wa Abarama, wa Izaka mpe wa Israel. Akozo­ngela bino bato botikali mpe bobiki o maboko ma bakonzi ba Asur.
II C LinVB 30:7  Bozala lokola batata na bandeko ba bino te, baye baboyaki kotosa Yawe Nza­mbe wa bankoko ba bango ; yango wana Yawe akabaki bango o maboko ma banguna, baye babebisaki mokili lokola bozali komono.
II C LinVB 30:8  Sikawa bolakisa motó makasi te lokola batata ba bino. Botandela Yawe maboko, boyaka o ndako esantu eye asantisaki seko ; bosalela Yawe Nzambe wa bino mpe akotika koyokela bino nkanda enene.
II C LinVB 30:9  Ya solo, bobele soko bino bo­zongeli Yawe, bato baye bakangaki bandeko na bana ba biso o boo­mbo, ndebakoki koyokela bango mawa mpe kozongisa bango o mokili moye, mpo Yawe Nzambe wa bino azali nta ngolu mpe bolamu ; akobombela bino lisusu elongi ya ye te, soko bozongeli ye. »
II C LinVB 30:10  Bantoma bakei o engumba yoko yoko, bakatisi mikili mya Efraim, Manase na Zabulon, nzokande bato baseki mpe batioli bango.
II C LinVB 30:11  Kasi bato basusu ba Aser, ba Manase mpe ba Zabulon bamikitisi mpe bayei o Yeruzalem.
II C LinVB 30:12  O mokili mwa Yuda Nza­mbe abongisi mitema mya bato ; mpe banso motema moko babandi kosala lokola mokonzi na bankumu bati­ndaki, mpe lokola Yawe alobaki.
II C LinVB 30:13  Bato baike basangani o Yeruzalem o sanza ya ibale mpo ya kosepela eye­nga ya Mampa mazangi nkisi ; bato bazalaki mingi mpenza.
II C LinVB 30:14  Babandi koboma bitumbelo binso bizalaki o Yeruzalem na mpe altare ya mpaka ya malasi ; babwaki yango o lobwaku la Kedron.
II C LinVB 30:15  Babonzi libonza lya Pasika o mokolo mwa zomi na minei mwa sanza ya ibale. Banganga Nzambe na ba-Levi bayoki nsoni mpe noki bamipetoli mpo ’te bameme mabonza ma kotumba o Tempelo ya Yawe.
II C LinVB 30:16  Na nsima bakei o esika ya bango ya mosala, basali lokola Moze, moto wa Nzambe, atindaka bango. Banganga Nzambe basopi makila maye ba-Levi bapesi bango,
II C LinVB 30:17  zambi bato baike ba lisanga bamipetolaki te, mpe ba-Levi basengeli koboma miboma mya Pasika o esika ya baye bazalaki motema peto te mpo ya koboma myango o miso ma Yawe.
II C LinVB 30:18  Bato basusu, mingi mpenza epai ya Efraim, Manase, Izakar na Zabulon, bamipetolaki te ; baliaki Pasika, ata basalaki te lokola etindami o Minkanda misantu. Kasi Ezekia asambeli mpo ya bango mpe alobi : « Nzambe oyo azali malamu, alimbisa lisumu
II C LinVB 30:19  lya bato banso bamipesi mpo ya koluka Yawe, Nza­mbe wa bankoko ba bango, ata bazali na motema peto te lokola etindami o makambo masantu. »
II C LinVB 30:20  Yawe andimeli Ezekia mpe apesi bango etumbu te.
II C LinVB 30:21  Bana ba Israel baye bazalaki o Yeruzalem, basepeli na esengo enene eyenga ya Mampa mazangi nkisi mikolo nsambo mobimba. Ba-Levi na banganga Nzambe bazalaki koye-mbela Yawe mikolo mina na nguya ya bango inso.
II C LinVB 30:22  Maloba ma Ezekia makoteli mitema mya ba-Levi banso ; baye bandimi Yawe na motema ese­ngo, bakobi kosepela eyenga mikolo nsambo mobimba ; babonzi miboma mya bondeko, mpe bakumisi Yawe Nzambe wa bankoko ba bango.
II C LinVB 30:23  Na nsima bato banso ba lisanga ba­yokani ’te bakokoba kosepela eye­nga, mpe basepeli lisusu mikolo nsa­mbo na esengo enene.
II C LinVB 30:24  Ezekia, moko­nzi wa Yuda, akabelaki bato ngo­mbe babali nkoto yoko na mpata nkoto nsambo ; bankumu mpe bapesaki ngombe babali nkoto yoko na mpata nkoto zomi. Banganga Nza­mbe baike bamipetoli.
II C LinVB 30:25  Ba-Yuda bazalaki kosepela elongo na banganga Nzambe mpe na ba-Levi, na bato banso bautaki o Israel, na bampaya bautaki o Israel mpe baye bafandi o Yuda.
II C LinVB 30:26  Esengo enene ezalaki o Yeruzalem ; banda mikolo mya Salomo, mwana wa Davidi, mokonzi wa Israel, bamoni naino likambo lya lolenge lona o Yeruzalem te.
II C LinVB 30:27  Na nsima ba­nganga Nzambe ba Levi batelemi mpe babenisi bato banso. Yawe andimeli bango : mabondeli ma bango makomi tee o likolo, mboka ya ye esantu.