Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next
Chapter 16
Matt LinVB 16:1  Ba-Farizéo na ba-Saduséo bayéí epái ya Yézu. Mpô ya komeka yě, baséngí yě álakisa bangó elembo eútí o likoló.
Matt LinVB 16:2  Azóngísélí bangó : « Na mpókwa boko­lobaka : Lóbí mói mokozala, mpô likoló litelí ngwá.
Matt LinVB 16:3  Na ntóngó bokolobaka : Leló mbúla ekonóko, mpô likoló liíndí míngi. Sôló, boyébí kolimbola bilembo bikolakisa ’te mbúla ekonóko tǒ té, kasi bilembo bikolakisa ntína ya eleko eye, boyébí byangó té !
Matt LinVB 16:4  Bozalí libótá lya bato babé, bato bakotósaka Nzámbe té ; bozalí kosénge elembo, kasi bakopésa bínó bobélé elembo ya Yona. » Atíkí bangó wâná mpé akeí.
Matt LinVB 16:5  Ntángo bakátísí ngámbo, bayékoli babósánákí komeme mámpa.
Matt LinVB 16:6  Yézu alobí na bangó : « Bótála malámu ! Bókéba na nkísi ba-Farizéo na ba-Saduséo bakotíaka o má­mpa ! »
Matt LinVB 16:7  Bôngó batúnání : « Mbele alobí bôngó mpô tokamátí mámpa té ? »
Matt LinVB 16:8  Kasi Yézu ayókí yangó, alobí : « Bínó bato ba boyambi boké, bokanísí ’te nalobí bôngó mpô bokamátí mámpa té.
Matt LinVB 16:9  Boyókí naíno ntína té ? Bobósání ndé ndéngé naléísákí bato nkóto ítáno na mámpa mátáno ? Mpé bikoló bóní botóndísákí na mintíka ?
Matt LinVB 16:10  Bobósání mpé mámpa nsambo napésákí bato nkóto ínei, mpé bikoló bóní botóndísákí na mintíka ?
Matt LinVB 16:11  Ndéngé níni boyókí té ’te nalobákí bôngó mpô ya má­mpa té ? Nalobákí ’te bókéba na nkísi ba-Farizéo na ba-Saduséo bakotíaka o mámpa ! »
Matt LinVB 16:12  Sikáwa bayékoli bayébí ’te alobákí bôngó mpô ya nkísi ya mámpa té, kasi mpô ya matéya ma ba-Farizéo mpé ma ba-Saduséo.
Matt LinVB 16:13  Ekómí Yézu o mokili mwa Sezaréa ya Filípo, atúní bayékoli ba yě : « Bato bakolobaka ’te Mwána wa Moto azalí náni ? »
Matt LinVB 16:14  Bayanólí : « Basúsu bakolobaka ’te azalí Yoáne Mobátisi ; basúsu : Elía ; basúsu naíno : Yeremía tǒ mǒkó wa baprofé­ta. »
Matt LinVB 16:15  Yézu atúní bangó : « Kasi bínó bokanísí ’te ngáí náni ? »
Matt LinVB 16:16  Simóni Pétro ayanólí : « Ozalí Krístu, Mwána wa Nzámbe wa bomoi. »
Matt LinVB 16:17  Yézu azóngísélí yě : « Esengo na yǒ, Simóni, mwána wa Yona, zambí moto wa nsuni na makilá ayébísí yǒ yangó té, kasi Tatá wa ngáí azalí o likoló.
Matt LinVB 16:18  Bôngó, ngáí nayébísí yǒ : Nkómbó ya yǒ Pétro, lokóla ’te libángá ; mpé o libángá liye nakotó-nga Eklézya ya ngáí, mpé atâ likoki lya liwá likolónga yangó té.
Matt LinVB 16:19  Nakopésa yǒ mafungóla ma Bokonzi bwa Likoló : mánso okoka­nga o nsé, makokangama o likoló, mpé mánso okokangola o nsé, makokangolama o likoló. »
Matt LinVB 16:20  Na nsima apekísí bayékoli ’te báyébisa moto mǒkó té ’te yě azalí Krístu.
Matt LinVB 16:21  Ut’o mokolo môná Yézu abandí koyébisa bayékoli ba yě ’te asengélí kokende o Yerúzalem. Kúná bakóló, banganga bakonzi na batéyi ba Minkandá bakoyókisa yě mpási míngi, bakoboma yě ; kasi nsima ya mikolo mísáto akosékwa.
Matt LinVB 16:22  Pétro abéndí yě mpembéni, ameki kobóngala makanisi ma yě, alobí : « Nzámbe ábátela yǒ, Mokonzi, makambo mâná makokwêla yǒ mokolo mǒkó té ! »
Matt LinVB 16:23  Yézu amíbó­ngólí epái ya Pétro, alobí na yě : « Longwá, Sátana ! Ozalí kotíela ngáí libakú, zambí makanisi ma yǒ maútí na Nzámbe té, maútí sé na bato. »
Matt LinVB 16:24  Na nsima Yézu alobí na bayékoli ba yě : « Sókó moto alingí kozala moyékoli wa ngáí, ámíbóya, ámeme kurúse ya yě mpé álanda ngáí.
Matt LinVB 16:25  Zambí moto alingí kobíkisa bomoi bwa yě, akobúngisa bwa­ngó ; kasi moto akobúngisa bomoi bwa yě mpô ya ngáí, akozwa bwa­ngó lisúsu.
Matt LinVB 16:26  Atâ moto azwí mokili mobimba, sókó yě mǒkó abúngámí, akozwa litómba níni ? Mpé sókó moto abúngísí bomoi bwa yě, akosómba bwangó lisúsu na níni ?
Matt LinVB 16:27  Mwána wa Moto asengélí koyâ na nkémbo ya Tatá wa yě, elongó na bǎnzelú ba yě ; mpé o ntángo êná akopésa moto na moto lifúta likokí na ezalela ya yě.
Matt LinVB 16:28  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : O ntéi ya bato bazalí áwa, basúsu bakokúfa té libosó ’te bámóno Mwána wa Moto ayéí na nkémbo ya Bokonzi bwa yě. »