Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 15
Sira LinVB 15:1  Oyo akosalaka bongo, akobangaka Mokonzi mpe akotosaka Mobeko, ye moto akozwa bwanya.
Sira LinVB 15:2  Bwanya bokokutana na ye lokola mama, mpe bokoyamba ye lokola mwasi alongani sika.
Sira LinVB 15:3  Bwanya bokoleisa ye na mampa ma bokebi, mpe bokomelisa ye mai makopesa bwanya.
Sira LinVB 15:4  Moto akotia motema na bwanya, akokweya te, oyo akokangana na bwanya, akoyoka nsoni te.
Sira LinVB 15:5  Bwanya bokotombola ye likolo lya baninga, mpe bokopesa ye maloba o lisanga lya bakolo ba mboka.
Sira LinVB 15:6  Akozwa bolamu na mpe enkoti ya esengo, akozwa mpe lokumu la seko.
Sira LinVB 15:7  Kasi bazoba bakozwa bwanya mokolo moko te, basumuki bakomono bwango mokolo moko te.
Sira LinVB 15:8  Bwanya bozali mosika na bato ba lolendo, makanisi ma bato ba lokuta mazangi bwanya.
Sira LinVB 15:9  Maloba ma bokumisi mabongi o monoko mwa mosumuki te, za­mbi Mokonzi akoyebisa ye maloba mana te.
Sira LinVB 15:10  Maloba ma bokumisi makoutaka se na bato ba bwanya, Mokonzi akolobisaka ye bongo.
Sira LinVB 15:11  Oloba te : « Mokonzi alingaki ’te nasala lisumu », mpo eloko ayoki mpi akolingaka yango te.
Sira LinVB 15:12  Oloba te : « Nzambe moto abungisi ngai nzela », mpo Mokonzi ase­ngeli na mosumuki te.
Sira LinVB 15:13  Mokonzi akoyinaka mambi ma­nso ma nsomo, se bongo baye bakobangaka Nzambe bakoki koli­nga mango te.
Sira LinVB 15:14  Ntango akeli moto o libandela, Mokonzi apesi ye motema mpo ayeba nini asala.
Sira LinVB 15:15  Soko olingi, okoki kotosa mibeko : kozala na botosi etali bobele motema mwa yo.
Sira LinVB 15:16  Mokonzi atii móto na mai o boso bwa yo, okoki kotia loboko esika yo moko olingi.
Sira LinVB 15:17  Bomoi mpe liwa bizali penepene na biso, moto nyonso akoki kopono eye ye moko alingi.
Sira LinVB 15:18  Bwanya bwa Mokonzi bozali bonene, azali na bokasi bonso mpe akomonoko binso.
Sira LinVB 15:19  Akotalaka bato bakobangaka ye, ayebi misala minso mya bato.
Sira LinVB 15:20  Atindi moto moko te ’te aboya Nzambe, alingisi moto moko te kosala lisumu.