Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 18
Sira LinVB 18:4  Atindi moto moko te asakola misala mya ye, bongo nani akoki koyeba bonene bwa ye ?
Sira LinVB 18:5  Nani akoki komeka nguya ya ye nsuka te ? Nani akoki kosakola bikela binso bya ngolu ya ye ?
Sira LinVB 18:6  Bakoki kolongola to kobakisa eloko te, bongo nani akoki koyeba makamwa ma Mokonzi ?
Sira LinVB 18:7  Ntango moto akanisi ’te akomi na nsuka, abandi se bobandi, mpe nta­ngo atiki, mayele masileli ye.
Sira LinVB 18:8  Moto nde nani ? Azali na ntina nini ? Nini yango, malamu na mabe akosalaka ?
Sira LinVB 18:9  Soko akokisi mibu monkama, loba ’te aumeli mingi.
Sira LinVB 18:10  Litanga lyoko lya mai, mbuma yo­ko ya zelo, mibu mya ye mizali se bongo soko otali yango elo­ngo na bomoi bwa lobiko.
Sira LinVB 18:11  Yango wana Mokonzi akolakisaka bato motema molai, mpe akoyokelaka bango ngolu ndelo te.
Sira LinVB 18:12  Amoni mpe ’te nsuka ya bango ezali mawa mingi, yango wana apu­si kolimbisa bango.
Sira LinVB 18:13  Moto akoyokelaka se moninga wa ye mawa, kasi Mokonzi akoyokelaka bikelamo binso mawa. Akopalelaka, akotumbolaka, akoteyaka, mpe lokola mokengeli wa mpata akokengeleke etonga ya ye.
Sira LinVB 18:14  Akoyokelaka bato bakondimaka mateya ma ye mawa, na mpe baye bakotosaka mibeko mya ye noki.
Sira LinVB 18:15  Mwana wa ngai, soko okabeli moto eloko opalela ye te ; na likabo, obakisa maloba te maye makoyokisa moninga mawa.
Sira LinVB 18:16  Lokola mamio makolembisaka moi, liloba lya boboto lileki likabo bonzenga.
Sira LinVB 18:17  Liloba lya boboto lileki likabo linene lya bolami, kasi moto wa likabo akosangisaka makabo maye mabale.
Sira LinVB 18:18  Likabo lya moto zoba, se mafinga makozokisa mitema ; eloko ekabami na esengo te, ekolelisaka miso.
Sira LinVB 18:19  Otuna malamu liboso ’te oloba, batela nzoto malamu, mpo ’te oko­ma na malali te.
Sira LinVB 18:20  Omituna malamu liboso ’te Nza­mbe asambisa yo, bongo mokolo akokata likambo lya yo, akoli­mbi­sa yo.
Sira LinVB 18:21  Omikitisa mpo ’te obele bokono te, soko osalaki masumu, lakisa ’te obongoli motema.
Sira LinVB 18:22  Eloko yoko te epekisa yo kokokisa elako o ntango ekoki, ozila mokolo mwa liwa te mpo ya kokokisa elako ya yo.
Sira LinVB 18:23  Okanisa malamu liboso ’te olakela elako, osala te lokola moto ali­ngi komeka Mokonzi.
Sira LinVB 18:24  Kanisa nkanda ya mikolo mya nsuka, kanisa etumbu ya mokolo Mokonzi akoboya kotala yo.
Sira LinVB 18:25  O ntango ozali na biloko mingi, obosana mikolo mya nzala te, o ntango okomi na mbongo, kanisa mikolo ozalaki kokelela.
Sira LinVB 18:26  Ngonga ekotambolaka banda nto­ngo kina mpokwa, o miso ma Mokonzi manso makolekaka noki.
Sira LinVB 18:27  Moto wa bwanya azali na bokebi o makambo manso, o ntango masumu makongala, akomikengele makasi.
Sira LinVB 18:28  Moto wa mayele ayebi makambo ma bwanya, mpe akokumisa moninga akomi na bwanya.
Sira LinVB 18:29  Bato bakolobaka malamu bazali solo bato ba bwanya, mpe bayebi biyele ebele lokola mai ma mbula.
Sira LinVB 18:30  Olanda mposa ebe ya motema te, mpe tika kolula biloko ebele.
Sira LinVB 18:31  Soko ondimi mposa inso ya motema, banguna bakoseke yo.
Sira LinVB 18:32  Oluka bolamu bwa yo o bisengo bya nse te, omiyingisa te o lisanga lya baye bakolukaka byango.
Sira LinVB 18:33  Omikomisa mobola te na bobya­ngi bato o limpati, soko ozali na mosolo ata moke te.