Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 28
Sira LinVB 28:1  Moto abekoli baninga, Mokonzi akobekola ye lokola, akobosana masumu ma ye mokolo moko te.
Sira LinVB 28:2  Limbisa moninga mabe asali yo, bakolimbisa mpe masumu ma yo, mpo ya losambo la yo.
Sira LinVB 28:3  Soko moto akobombelaka moni­nga nkanda, ndenge nini akoki ko­senge Nzambe libiki ?
Sira LinVB 28:4  Awa ayokeli moninga wa ye mawa te, ndenge nini akoki kosa­mbela mpo alimbisa ye masumu ?
Sira LinVB 28:5  Soko moto wa nzoto ya nsuni abo­mbi nkanda, nani akolimbisa ye masumu ?
Sira LinVB 28:6  Kanisa mikolo mya nsuka mpe tika koyina baninga, kanisa bopoli bwa nzoto na liwa, mpe tosa mibeko.
Sira LinVB 28:7  Kanisa mibeko mpe tika kobo­mbela moninga nkanda, kanisa bo­ndeko Nzambe akati na yo, mpe limbisa mabe ma bato.
Sira LinVB 28:8  Okoto o makambo ma boswani te, bongo okosala lisumu noki te ; moto wa nkanda akopelisa móto noki.
Sira LinVB 28:9  Mosumuki akotiaka boswani o ka­ti ya baninga, mpe akokotisaka bo­nguna o kati ya bato bayokani.
Sira LinVB 28:10  Soko moto akobi kotia nkoni o móto, móto mokosila te, soko moto akobi koloba na nkanda, bo­swani bokosila te. Moto oyo azali makasi mingi akosilikaka noki, soko azali moto wa nkita, akongalisa nkanda ya ye.
Sira LinVB 28:11  Boswani bwa mbalakaka bokopelisaka móto, koswana ntina te eko­sukaka na bosopi makila.
Sira LinVB 28:12  Pemela móto moke, mpe móto mona mokopela makasi, bwakela mwango nsoi, móto mokozima : bokasi bwa monoko bokosalaka bongo.
Sira LinVB 28:13  Mabe makwela motongi mpe mokosi, basili kobebisa bato ebele ba­zalaki kofanda na boboto.
Sira LinVB 28:14  Bato ebele babebi mpo ya songi­so­ngi ya bato, basili batiaki bo­nguna kati ya bikolo, babomaki bingumba bizalaki makasi, mpe babukaki ndako ya bato banene.
Sira LinVB 28:15  Songisongi esili kolongola basi ba­lamu o libala mpe kobotolo ba­ngo matomba ma misala mya ba­ngo.
Sira LinVB 28:16  Moto akotiaka matoi na songiso­ngi ya bato akopema lisusu te, ako­zala lisusu kimia mokolo moko te.
Sira LinVB 28:17  Soko babeti moto fimbo, akozoka mpota, kasi songisongi ekobukaka minkuwa.
Sira LinVB 28:18  Bato baike basili kokufa na mo­mpanga, kasi baye bakufi mpo ya songisongi baleki mingi.
Sira LinVB 28:19  Esengo na moto oyo azoki na bilobaloba bya bato te, to aziki na móto mwa nkanda ya byango te, oyo asengeli komeme mokumba mwa bilobela bya bato te, mpe akangemi na minyololo mya maloba ma bango te.
Sira LinVB 28:20  Mpamba te, mokumba mwa so­ngi­songi mozali mwa bibende, minyololo mya yango mitulami na mbe­ngi.
Sira LinVB 28:21  Songisongi ekoyela bato liwa lya nsomo, eleki malamu moto ake­nde o mboka ya bawa libela.
Sira LinVB 28:22  Bato balamu bakobeba mpo ya so­ngisongi te, bakozika te na miloli mya móto mwa yango.
Sira LinVB 28:23  Kasi ekokweisa bato batiki Mokonzi, móto mwa songisongi mokopela seko o mitema mya bango ; móto mokolia bango lokola nta­mbwe ekoliaka bato, móto mokosilisa bango lokola nkoi ekokatakataka bato.
Sira LinVB 28:24  Yango wana, ozinga lopango la yo na nzete ya nzube, obomba palata na wolo ya yo malamu.
Sira LinVB 28:25  Meka liboso bozito bwa maloba ma yo o emekeli, batela mpe monoko mwa yo mpe kanga mwa­ngo na lifungola.
Sira LinVB 28:26  Ozwa likambo lyoko mpo ya maloba ma yo te, bongo monguna azwa nzela ya kosala yo mabe te.