Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 30
Sira LinVB 30:1  Olingi mwana wa yo, opimaye fimbo te, na nsima oko­yoko esengo mpo ya mwana oyo.
Sira LinVB 30:2  Oyo abokoli mwana malamu, akosepela na ye mingi, o kati ya bayebani akomikumisa na mwana wa ye.
Sira LinVB 30:3  Oyo ateyi mwana wa ye, akoyokisa monguna zuwa, mpe o kati ya baninga akoyoka esengo.
Sira LinVB 30:4  Soko tata awei, liwa lya ye lizali lokola liwa te, zambi atiki mwana oyo aulani na ye.
Sira LinVB 30:5  Bomoi bwa ye mobimba azalaki kosepela mpo ya ye, bongo o nta­ngo ya liwa akoyoka mpe mawa te.
Sira LinVB 30:6  Atiki moto moko akoki kobekola mabe ma banguna ba ye mpe kozongisela baninga ba ye malamu basali ye.
Sira LinVB 30:7  Tata apusi kondimela mwana, ako­sengela kokanga mpota ya ye, mwa boleli bwa mwana bokoyokisa ye motema mpasi.
Sira LinVB 30:8  Farasa babokoli na makasi te ekotosa moto moko te, se bongo mwana babokoli malamu te akozala motó makasi.
Sira LinVB 30:9  Soko obondeli mwana wa yo, akoyela yo makambo ma koka­mwa, soko osakani na ye, akoyokisa yo motema mpasi.
Sira LinVB 30:10  Oseke na ye te, soki te, akolela elo­ngo na yo, na nsima okolia mino na nkanda.
Sira LinVB 30:11  O bolenge otika ye mpamba te, mpe soko asali bozoba, okanga miso te.
Sira LinVB 30:12  Lakisa ye kokitisa motó ntango ya bolenge ; ezali ye naino mwana, bete ye fimbo o mokongo, soki te, akotomboko, akoboya kotosa yo, mpe akoyokisa yo motema mpasi.
Sira LinVB 30:13  Bokolo mwana wa yo mpe bongisa ye, mpo ’te ayokisa yo mpasi te na ezalela ya nsoni.
Sira LinVB 30:14  Kozala mobola kasi nzoto kolo­ngonu eleki malamu, kozala na nkita, kasi nzoto ekasi te, mabe.
Sira LinVB 30:15  Nzoto kolongonu eleki wolo inso ya nse na motuya, bokolongonu bwa nzoto boleki nkita enene na bolamu.
Sira LinVB 30:16  Biloko ebele bikokani na bokolo­ngonu bwa nzoto te, bomengo ata nini bokokani na esengo ya motema te.
Sira LinVB 30:17  Liwa lileki bomoi bwa mpasi, bopemi bwa seko boleki bokono bokosilaka te.
Sira LinVB 30:18  Biloko elengi bitiami o boso bwa monoko mozipami bizali lokola mabonza ma bilei matiami o lilita.
Sira LinVB 30:19  Mabonza ma bilei, ekeko ekoke­nde na mango wapi ? Eyebi kolia mpe kolumbuta mango te. Se bongo na moto oyo Nzambe anyokoli.
Sira LinVB 30:20  Amoni bilei na miso mpe akimeli, lokola eniki azingi elenge mwasi ekopi mpe akimeli.
Sira LinVB 30:21  Otikala na makanisi ma mawa o motema te, mpe omitungisa te na maye makoya.
Sira LinVB 30:22  Motema esengo mokolendisaka moto, elongi polele ekopesaka moto bomoi bolai.
Sira LinVB 30:23  Omisepelisa mpe bondo motema mwa yo, longola makanisi ma mawa mosika na yo : zambi mawa masili masukisi bato baike, mpe mawa o motema ezali na litomba lyoko te.
Sira LinVB 30:24  Zuwa na nkanda ikokutolaka bomoi bwa bato : komitungisa mingi ekokomisaka moto mobange noki.
Sira LinVB 30:25  Moto wa motema esengo akolia malamu, akoyoka biloko elengi.