Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 50
Sira LinVB 50:1  O eleko ya nganga mokonzi Simon, mwana wa Onia, babongisi Tempelo mpe balendisi ndako esantu.
Sira LinVB 50:2  Asali ’te batia mabanga ma nse ma ndako ya mikili mibale, mpe mabanga manene ma lopango la Tempelo.
Sira LinVB 50:3  Akambi mosala mwa kotimola libulu lya mai, linene mpenza lokola mbu.
Sira LinVB 50:4  Alendisi lopango la engumba mpo ’te, soko etumba ebimi, bato ba ye babomama te.
Sira LinVB 50:5  Elongi ya ye ezalaki kongenge o kati ya bato ba ye ntango azalaki kobima o esika esantusantu.
Sira LinVB 50:6  Azalaki lokola monzoto mwa nto­ngo o ntei ya mampata, lokola sanza ekongengeke o mikolo miye ezali mobimba,
Sira LinVB 50:7  lokola mwese mokongengeleke Tempelo ya Nta Likolo, lokola mo­nama mobimi o ntei ya ma­mpata ma nkembo,
Sira LinVB 50:8  lokola fulele ya roza o mikolo mya eyenga, lokola fulele ya lisi penepene na moluka, lokola etapi ya nzete ya mpaka o eleko ya sika,
Sira LinVB 50:9  lokola mpaka ya malasi bakotu­mbaka ntango ya libonza, lokola mbeki etulami na wolo, ekembisami na mabanga ma motuya nde­nge na ndenge ;
Sira LinVB 50:10  lokola nzete ya oliva eboti mbuma ebele, lokola sipresi ekomi molai kin’o mampata.
Sira LinVB 50:11  Ntango alati molato mwa lokumu mpe amikembisi na bonzenga bo­nso, mpe abuti altare esantu, ato­ndisi lopango la Tempelo na nke­mbo ya ye.
Sira LinVB 50:12  Ntango bandeko ba ye banganga Nzambe bazingi ye, lokola sédere ya Libano, ye moto atelemi penepene na etumbelo ya altare mpe ayambi mabonza o maboko ma bango. Lokola nzete ya mbila
Sira LinVB 50:13  bana banso ba Arone bazingi ye na nkembo enene ; na mabonza ma Mokonzi o maboko, batelemi o boso bwa bato banso ba Israel.
Sira LinVB 50:14  Ntango Simon asilisi milulu mya losambo o altare, mpe abongiseli Nzambe wa bokasi bonso libo­nza,
Sira LinVB 50:15  atandi loboko likolo lya nkeni ene­ne, asopi mai ma mbuma ya vino o eteni ya nse ya altare : eyokisi nsolo mpimbo o miso ma Nza­mbe, Mokonzi wa molóngó mobimba.
Sira LinVB 50:16  O ntango ena bana ba Arone bagangi mpe babeti mindule batuli na mbengi, bayokisi bongo lokito lonene mpo ’te Nzambe wa Nta Likolo akanisa bango.
Sira LinVB 50:17  Na nsima bato banso lisanga ba­mi­bwaki bilongi o nse : bakumbameli Mokonzi wa bokasi bonso, Nzambe wa Nta Likolo.
Sira LinVB 50:18  Bayembi mpe bakumisi ye na nze­mbo, nzembo eye elengi eyokani mosika.
Sira LinVB 50:19  Bato banso babondeli Mokonzi wa likolo, basambeli Nzambe wa ngolu tee milulu mya Mokonzi mikomi na nsuka mpe basilisi losambo la bango.
Sira LinVB 50:20  Na nsima atiki altare mpe akiti, atandeli lisanga mobimba lya Israel maboko mpo ’te apesa bobenisi bwa Mokonzi na mongongo makasi, mpe azwa lokumu la kosakola nkombo ya ye.
Sira LinVB 50:21  Mbala ya ibale banso bakumbami wana mpo ya kozwa bobenisi bwa Nzambe wa likolo.
Sira LinVB 50:22  Mpe sikawa bokumisa Nzambe wa likolo na nse, oyo akosalaka misala minene bipai binso : apesi biso lokumu banda libumu lya mama, mpe akolakisaka biso ngolu ya ye.
Sira LinVB 50:23  Nzambe ayokisa mitema mya biso esengo, akabela bato ba lelo o Israel boboto, lokola o mikolo mya kala.
Sira LinVB 50:24  Ayokela biso ngolu seko, mpe abi­kisa biso mikolo minso mya bomoi bwa biso.
Sira LinVB 50:25  Motema mwa ngai mokoyinaka bikolo bibale, mpe ekolo ya bisato ezali ekolo mpenza te :
Sira LinVB 50:26  bato ba ngomba Seir na ba-Filisti, na mpe ekolo ya bazoba bakofa­ndaka o Sikem.
Sira LinVB 50:27  Mateya ma bwanya mpe ma mayele malamu makomami o buku eye na Yezu wa Yeruzalem, mwana wa Sira, nkoko wa Eleazar. Asopi bwanya bozalaki o motema mwa ye.
Sira LinVB 50:28  Esengo na moto akozongelaka ma­teya mana, akokoma moto wa bwanya soko abombi mango o motema.
Sira LinVB 50:29  Soko atosi mango, akozala makasi o makambo manso, zambi mwi­nda mwa Mokonzi mokongengele nzela ya ye.