Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 51
Sira LinVB 51:1  E Mokonzi, Nkumu monene, nalingi kokumisa yo, Nzambe, Mobikisi wa ngai. Nakotondo nkombo ya yo.
Sira LinVB 51:2  Yo moto obateli ngai mpe osalisi ngai, obikisi nzoto ya ngai o likama lya liwa, mpe o motambo mwa bato ba songisongi, mpe ma bato ba lokuta. Osalisi ngai mpe obikisi ngai o maboko ma bato bafundi ngai,
Sira LinVB 51:3  olakisi bonene bwa ngolu ya yo mpe nkembo ya nkombo ya yo, ntango bato basusu baswi ngai mino mpo balia ngai, basusu batomboli loboko mpo baboma ngai, mpe o ntango nayoki mpasi mpe minyoko ndenge na ndenge.
Sira LinVB 51:4  Milinga mya móto milingaki kosilisa ngai mpema, nazalaki o ntei ya móto moye ngai napelisaki te.
Sira LinVB 51:5  Obikisi ngai o mboka ya bawa, na monoko mabe ma bato mpe na bato ba lokuta.
Sira LinVB 51:6  Batongi ngai na maloba ma lokuta epai ya mokonzi. Nakomaki penepene na liwa, nasilaki kokoma o monoko mwa mboka ya bawa.
Sira LinVB 51:7  Bazingaki ngai bipai binso mpe moto moko asalisaki ngai te ; nalukaki lisalisi, kasi moto moko amononoki te.
Sira LinVB 51:8  O ntango ena nakanisaki ngolu ya yo, Mokonzi, mpe bikela binene okolakisaka banda kala ; zambi okobikisaka bato bakotiaka elikya na yo, mpe okolongolaka bango o maboko ma banguna.
Sira LinVB 51:9  Ut’o bozindo nayokisi bobeleli bwa ngai, mpe nabondeli mpo ’te babikisa ngai o liwa.
Sira LinVB 51:10  Nabeleli Nzambe, Tata wa Mobikisi wa ngai : « Otika ngai te o mikolo mya mpasi, mpe o kati ya bato ba lolendo, ntango nazangaki lisalisi. Nakokumisa nkombo ya yo ntango inso, mpe nakoyembela yo nzembo ya botondi yo. »
Sira LinVB 51:11  Nzambe andimeli ngai : obikisi ngai o liwa, mpe osalisi ngai o mokolo mwa mpasi.
Sira LinVB 51:12  Yango wana nakotondo mpe nakokumisa yo, nakoyembela nko­mbo ya Mokonzi.
Sira LinVB 51:13  Ntango nazalaki elenge, liboso ’te nakende mobembo, nazalaki koluka bwanya o losambo la ngai.
Sira LinVB 51:14  O boso bwa Tempelo nazalaki ko­sambela mpo nazwa bwango, mpe nakoluka kozala na bwanya tee liwa.
Sira LinVB 51:15  Bwanya boyokisi ngai nsai mingi o motema, lokola fulele to mbuma ya vino eteli. Nazalaki kolanda nzela ya bosembo, ut’o bolenge nazalaki koluka bwanya.
Sira LinVB 51:16  Ekokaki na ngai ’te natia matoi mpo nayoka mateya mingi.
Sira LinVB 51:17  Bwanya bozweli ngai matomba mingi ; nakokumisa Oyo apesi ngai bwango.
Sira LinVB 51:18  Nakani kolanda nzela ya bwanya, naluki kosala malamu, nakoyoka yango mawa mokolo moko te.
Sira LinVB 51:19  Nabuni etumba mpo nakoma na bwanya mpe natosa Mobeko nye ; natomboli maboko epai ya likolo, mpe naleli mpo nabungaki maka­mbo masusu ma bwanya.
Sira LinVB 51:20  Natii motema na bwanya mpe na­zwi, zambi naluki bwango na motema peto. Bwanya bolakisi ngai makambo mingi ut’o ebandela, ya­ngo wana bwanya bokoki kotika ngai mokolo moko te.
Sira LinVB 51:21  Nazalaki se motema likolo mpo nazwa bwango, mpe ya solo, na­zwi eloko ya motuya.
Sira LinVB 51:22  Mokonzi apesi ngai, bo mbano, lo­lemu mpo ya kokumisa ye.
Sira LinVB 51:23  Bobeleme na ngai, bino baye bo­za­ngi bwanya, yakani koyekola epai ya ngai.
Sira LinVB 51:24  Mpo nini bokolobaka ’te bwanya bwa bino bokoki te, awa mitema mya bino mizali koyoka bwango mposa ?
Sira LinVB 51:25  Nakoyebisa bino, nakoki koloba bongo : mpo ya kozwa bwanya bo­kofuta mbongo te.
Sira LinVB 51:26  Bokanga ekangiseli ya bwanya o nkingo ya bino, bongo bokotisa bwanya o mitema mya bino. Bwanya bozali se penepene, bokoki kozwa bwango.
Sira LinVB 51:27  Bomono na miso : nasengelaki komiyokisa mpasi mingi te, mpe nakomi na ntango mingi ya bopemi.
Sira LinVB 51:28  Ata bosengelaki kopesa mbongo mingi mpo ya kozwa mateya, na bwanya bokozwa wolo ebele.
Sira LinVB 51:29  Mitema mya bino misepela na ngo­lu ya Mokonzi, boyoka nsoni te mpo ya kokumisa ye.
Sira LinVB 51:30  Bosilisa mosala mwa bino liboso ’te ngonga ebetela bino, mpe Nza­mbe akopesa bino lifuta o elaka atiaki.