Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 9
Sira LinVB 9:1  Oyokela mwasi wa yo wa bolingo zuwa te, mpo ’te abanda kosala yo mabe te.
Sira LinVB 9:2  Omikaba na mwasi moko te, mbele akokoma bongo mokonzi wa yo.
Sira LinVB 9:3  Okende koluka mwasi ndumba te, mpo ’te okangema o mitambo mya ye te.
Sira LinVB 9:4  Osolola mingi na mwasi moye­mbi te, mpo ’te abembe yo na maloba ma ye te.
Sira LinVB 9:5  Otala elenge mwasi botali te, mpo ’te ozwa etumbu elongo na ye te.
Sira LinVB 9:6  Olanda basi ndumba te, mpo ’te obebisa mbongo ya yo te.
Sira LinVB 9:7  Otambwisa miso bipai binso o balabala te, oyengayenga o bisika bya bonkutu te.
Sira LinVB 9:8  Otala mwasi kitoko na miso te, otala bonzenga bwa mwasi wa bato te. Bonzenga bwa mwasi bosili bokweisi bato mingi, zambi boli­ngi bokopelaka noki lokola móto.
Sira LinVB 9:9  Okende kofanda penepene na mwa­si wa libala te, mpe o limpati omele vino esika yoko na ye te, mbele okobanda kolula ye, koselumwa mpe kokweya mpo ya motema móto mwa yo.
Sira LinVB 9:10  Otika moninga wa kala te, mpo moninga wa sika akokani na ye te. Moninga wa sika azali lokola vino ya sika, okomele vino na esengo bobele soko eumeli.
Sira LinVB 9:11  Oyokela mosumuki zuwa te soko alongi o makambo ma ye, mpo oyebi te ndenge nini akosuka.
Sira LinVB 9:12  Osepela te soko bato baboya Nzambe bazwi bolamu, kanisa ’te bakozwa etumbu liboso lya kowa.
Sira LinVB 9:13  Tikala mosika na moto oyo akoki koboma yo, bongo okozala na nti­na yoko ya kobanga liwa te. Soko okomi epai ya ye, okenge ye malamu, zambi akoki koboma yo : yeba ’te ozali kotambola o kati ya mitambo, lokola moto atamboli o efelo ya mboka.
Sira LinVB 9:14  Omeka koyeba malamu baye oko­kutanaka na bango, mpe yoka malako ma bato ba bwanya.
Sira LinVB 9:15  Oluka kosolola na bato ba mayele, mpe o masolo ma yo omemya mobeko mwa Nzambe.
Sira LinVB 9:16  Olia elongo na basemba ; lokumu la solo, nde kokumisa Mokonzi.
Sira LinVB 9:17  Bakokumisaka ekeko mpo ya ntoki ya mosali, mokonzi wa ekolo akozwa lokumu mpo ya maloba ma ye.
Sira LinVB 9:18  Bana mboka bakobangaka moto wa bilobaloba mingi, bakoyinaka esopa.