WISDOM
Chapter 18
Wisd | LinVB | 18:1 | Nzokande mwinda mongengeli basantu ba yo. Ba-Ezipeti bayoki lolaka la bango, kasi bamoni bilongi bya bango te, bapesi bango longonya, mpo bayoki mpasi te. | |
Wisd | LinVB | 18:2 | Batondi bango, mpo awa basalaki bango mabe, bazongiseli bango mabe te, mpe basengi bolimbisi mpo ya mabe basalaki. | |
Wisd | LinVB | 18:3 | Kasi esika ya molili, otindeli bato ba yo likonzi lya móto, lizala lokola mwese o mobembo mwa bango. | |
Wisd | LinVB | 18:4 | Ebongoki ’te banguna bazala o kati ya molili, zambi bakangaki bana ba yo o boombo, baye otindaki o mokili mobimba mpo bapesa mwinda mwa solo mwa Mobeko mwa yo. | |
Wisd | LinVB | 18:5 | Bakanaki koboma bana ba ekolo ya basantu ba yo, mpe bobele mwana moko, oyo batikaki o esika ya kobombama, abikaki. Opesi bango etumbu, obomi bana ba bango ebele, mpe ozindisi bango banso na mbonge ya mai. | |
Wisd | LinVB | 18:6 | Bankoko ba biso basilaki koyeba butu bona ; mpo ’te bayoka esengo enene, zambi bayebaki na ndai nini batiaki mitema. | |
Wisd | LinVB | 18:9 | Bankoko ba bato balamu babonzaki mabonza na bonkutu, motema moko bandimaki mobeko moye mwa Nzambe ’te basantu bayokana solo, o ntango ya likama mpe ya kokabola biloko ; mpe babandaki koyemba nzembo ya bankoko. | |
Wisd | LinVB | 18:10 | O ntango ena bayoki ’te banguna baleli makasi ; lolaka la baye baleli bana loyokani mosika. | |
Wisd | LinVB | 18:11 | Etumbu ekwelaki ná moombo ná nkolo se ndenge yoko, bato bake na bakonzi bayokaki mpasi motindo moko. | |
Wisd | LinVB | 18:12 | Liwa likwelaki banso se ndenge yoko, bato ebele bakufaki ; motango mwa baye babikaki mokokaki te mpo ya kokunda bango, zambi bana ba bango ebele basilaki na mbala yoko. | |
Wisd | LinVB | 18:13 | Liboso baboyaki kondima, batiaki mitema na nkisi ya bango, kasi awa bana ba yambo bakufi, bandimi ’te ekolo eye ezali ekolo ya bana ba Nzambe. | |
Wisd | LinVB | 18:15 | Liloba lya yo lya bokasi bonso liuti o likolo epai ya ngwende ya yo ya bokonzi, lipimbwi lokola mobuni akoyokelaka moto moko mawa te o kati ya ekolo eye batombeli bobe. | |
Wisd | LinVB | 18:16 | Amemi mokano mwa yo lokola mompanga mopotu, awa motombwami, mobomi bato bipai binso, mozalaki kokata banda likolo tee o nse. | |
Wisd | LinVB | 18:17 | Na mbalakaka mamoni ma nsomo mabulinginyi bango, mpe na mbala yoko bobangi bonene bokweli bango. | |
Wisd | LinVB | 18:18 | Babwakemi epai na epai, lokola bato balingi bawa, mpe bayebisi ntina ya liwa lya bango ; | |
Wisd | LinVB | 18:19 | mpamba te, ndoto ya bango ya nsomo eyebisaki bango : basengelaki koyeba ntina ya etumbu ya bango liboso ’te bakufa. | |
Wisd | LinVB | 18:20 | Solo, etumbu ya liwa ekwelaki mpe bato ba bosembo, mpe bato ebele bawei o eliki. Kasi nkanda ya Nzambe eumelaki te, | |
Wisd | LinVB | 18:21 | zambi noki moto oyo azangi mbeba ayei kobatela bango, azalaki na bibuneli bikoki na mosala mwa ye : losambo na mabonza ma malasi makokitisa nkanda. Akitisi nkanda ya Nzambe mpe alembisi mpasi, alakisi bongo ’te azalaki mosaleli wa yo. | |
Wisd | LinVB | 18:22 | Akitisi nkanda ya Nzambe na makasi ma nzoto te, to na nguya ya bibuneli te, kasi na maloba ma ye alongi oyo akopesaka bitumbu akundoleli ye bondeko na bilako alakelaki bankoko. | |
Wisd | LinVB | 18:23 | O ntango bibembe bilalaki mabondo mabondo, akei koteleme o kati, apekisi Nkanda kokoma epai ya bato bazalaki na bomoi. | |
Wisd | LinVB | 18:24 | O molato mwa ye bayemi mokili mobimba, nkombo ya lokumu ya bankoko iye ikomami o milongo minei mya mabanga ma motuya, mpe nkombo ya Nzambe ekomami o enkoti ya ye ya lokumu. | |