I CHRONICLES
Chapter 22
I Ch | LinVB | 22:1 | Na nsima Davidi alobi : « Ndako ya Yawe Nzambe ezali awa ; ekozala mpe altare ya miboma mya bato ba Israel. » | |
I Ch | LinVB | 22:2 | Davidi atindi ’te basangisa bampaya baye bafandi o mokili mwa Israel ; akamati bango o mosala mwa kokata mabanga manene mpo ya kotonga Ndako ya Nzambe. | |
I Ch | LinVB | 22:3 | Asombi mpe bibende ebele mpo ya kosala nsete ya kokanga bizibeli bya ndako, mpe mpo ya kosala bikangeli ; aluki mpe mbengi ebele, bakoki komeka bozito bwa yango te. | |
I Ch | LinVB | 22:4 | Aluki mpe mabaya ma sédere mingi mpenza, zambi bato ba Sidoni mpe ba Tiro bapesaki Davidi mabaya ma sédere ebele. | |
I Ch | LinVB | 22:5 | Na nsima Davidi alobi : « Mwana wa ngai Salomo azali se mwana, akomi naino makasi te. Ebongi Ndako eye basengeli kotongela Yawe, ezala enene mpe kitoko mpo ezwa lokumu o miso ma bato ba bikolo binso. Ngai nakolengelela ye misala minso. » Mpe bongo Davidi, liboso ’te akufa ale-ngeli biloko biike. | |
I Ch | LinVB | 22:6 | Abengi mwana wa ye Salomo, mpe atindi ye ’te atonga Ndako mpo ya kokumisa Yawe Nzambe wa Israel. | |
I Ch | LinVB | 22:7 | Davidi alobi na Salomo : « Mwana wa ngai, ngai moko nalingaki kotongela Nkombo ya Yawe Nzambe wa ngai Ndako. | |
I Ch | LinVB | 22:8 | Kasi Yawe alobaki na ngai : ‘Obomaki bato baike mpe obundaki bitumba binene. Yo moto okotongela Nkombo ya ngai Ndako te, mpo osopaki makila mingi o miso ma ngai. | |
I Ch | LinVB | 22:9 | Tala, oboti mwana mobali, akozala moto wa boboto ; nakofandisa ye na boboto o kati ya banguna bafandi penepene ; bakopesa ye nkombo Salomo ; mikolo minso ye akozala mokonzi nakopesa Israel boboto mpe bopemi. | |
I Ch | LinVB | 22:10 | Ye moto akotongela Nkombo ya ngai Ndako. Ye akozala mwana wa ngai, mpe ngai nakozala tata wa ye. Nakolendisa bokonzi bwa ye o Israel seko’. | |
I Ch | LinVB | 22:11 | Sikawa, mwana wa ngai, Yawe azala na yo mpo ’te osilisa malamu mosala mwa kotonga ndako ya Yawe Nzambe wa yo, se lokola alobaki mpo ya yo. | |
I Ch | LinVB | 22:12 | Yawe akabela yo mayele na bwanya o mokolo akolubola yo mokonzi wa Israel mpo ’te okoka komemya Mobeko mwa Yawe Nzambe wa yo. | |
I Ch | LinVB | 22:13 | Soko otosi mpe okokisi mibeko mpe bitinda binso biye Yawe atindaki Moze mpo ya ba-Israel, makambo ma yo manso makotambola malamu. Zala makasi mpe na molende ! Obanga te, olenge mpe te. | |
I Ch | LinVB | 22:14 | Ngai moto mobola, nabombi mpo ya ndako ya Yawe talenta ya wolo nkoto monkama, na talenta ya palata efuku yoko. Bibende na mbengi bileki mingi, bakoki komeka bozito bwa yango te. Naluki mabaya na mabanga, mpe yo okoluka naino masusu. | |
I Ch | LinVB | 22:15 | Okozala na basali baike, bato bayebi kokata mabanga na baye bayebi kopasola mabaya : basali ebele bayebi kosala misala ndenge na ndenge. | |
I Ch | LinVB | 22:16 | Motango mwa wolo, palata, mbengi na bibende, mokoki kotangema te. Sikawa teleme, banda mosala mwa yo, mpe Yawe azala na yo ! » | |
I Ch | LinVB | 22:18 | « Yawe, Nzambe wa bino azala na bino. Akomisi ekolo ya bino nye bipai binso. Akabi bato ba mokili o maboko ma ngai, bakosalelaka Yawe na mpe ekolo ya ye. | |