Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 17
I Ch LinVB 17:1  Awa Davidi akomi kofanda o ndako ya ye moko, alobi na profeta Natan : « Tala, ngai nafandi o ndako enene ya mabaya ma sédere, mpe Sanduku ya Bondeko ezali bobele o biema ! »
I Ch LinVB 17:2  Natan azongiseli Davidi : « Sala manso olingi kosala, za­mbi Nzambe azali na yo. »
I Ch LinVB 17:3  Kasi o bu­tu bonamei Yawe alobi na Natan boye :
I Ch LinVB 17:4  « Kende koyebisa mosaleli wa ngai Davidi : Yawe alobi : Yo moto okotongela ngai ndako te mpo ’te nafanda.
I Ch LinVB 17:5  Solo, ut’o mokolo nalongolaki ba-Israel o Ezipeti tee lelo, nafa­ndaki o ndako te, nazalaki kolekaleka o nganda, lelo awa, lobi kuna, o biema.
I Ch LinVB 17:6  Mikolo minso nazalaki kota­mbo­la na ba-Israel nzela yoko. Na­po­noki bakengeli ba ekolo ya ngai Isra­el ; nalobaki ata na moko wa ba­ngo : Mpo nini otongeli ngai ndako ya mabaya ma sédere te ?
I Ch LinVB 17:7  Loba na mosaleli wa ngai Davidi : Yawe wa bokasi bonso alobi : Ngai moto nakamataki yo o esobe ntango ozalaki koleisa mpata mpo ’te ozala mokonzi wa bato ba ngai ba Israel.
I Ch LinVB 17:8  Nazalaki na yo bipai binso okendeki, nasilisi banguna ba yo banso o miso ma yo. Nakopesa yo nkombo ya lokumu, lokola nkombo ya bankumu banene ba mokili.
I Ch LinVB 17:9  Nakopesa bato ba ngai ba Israel esika, nakopika bango wana mpo ’te bafanda seko. Bakotelengana lisusu te, mpe bato babe bakonyokolo bango lisusu te lokola liboso,
I Ch LinVB 17:10  ut’o ntango bazuzi bazalaki koyangela bato ba ngai ba Israel. Nakosala ’te banguna ba yo banso batosa yo. Nayebisi yo ’te Yawe akopesa yo libota.
I Ch LinVB 17:11  Mpe soko mikolo mya yo mikoki mpo okende kolala o mboka ya bankoko ba yo, ngai nakobatela libota lya yo ; nakopesa moko wa bana ba yo bokonzi ;
I Ch LinVB 17:12  ye moto akotongela ngai ndako, mpe nakolendisa boko-nzi bwa ye seko.
I Ch LinVB 17:13  Ngai nakozala tata wa ye, mpe ye akozala mwana wa ngai. Nakotika kolinga ye te, lokola natikaki oyo azalaki liboso lya yo.
I Ch LinVB 17:14  Nakotia ye seko mokonzi wa libota mpe wa bokonzi bwa ngai ; ngwe­nde ya ye ekoumela o bileko binso. »
I Ch LinVB 17:16  Mokonzi Davidi akoti o ndako mpe afandi o boso bwa Yawe, alobi : « E Yawe Nzambe, ngai nde nani mpe libota lya ngai nde nini mpo ’te okomisa ngai o esika eye ?
I Ch LinVB 17:17  E Nzambe, otali likambo lina lokola likambo lik­e, mpe bilako olakeli libota lya mosaleli wa yo okokokisa byango nsima. Otali ngai lokola moto wa lokumu lonene, e Yawe Nzambe wa ngai.
I Ch LinVB 17:18  Ngai Davidi naloba lisusu nini, awa opesi ngai lokumu lonene boye ? Yo moko oyebi ngai mosaleli wa yo.
I Ch LinVB 17:19  E Yawe, na bolingi bwa yo moko osali makambo maye manso mpo ya mosaleli wa yo, mpo ’te bato bayeba misala minene mya yo.
I Ch LinVB 17:20  E Yawe, moto moko akokani na yo te, bobele yo ozali Nzambe, mosusu azali te ; toyoki mpe bongo na matoi ma biso.
I Ch LinVB 17:21  Ekolo esusu ekoki nde na ekolo Israel, ekolo ya yo, eye yo Nzambe o okendeki kosikola mpo ’te ekoma ekolo ya yo ? Omipesi nkombo ya lokumu na bosali ma­mbi manene mpe ma nsomo, awa obengani bato ba bikolo biike o miso ma bato ba ekolo ya yo, baye osikoli o mokili mwa Ezipeti.
I Ch LinVB 17:22  Okomisi Israel ekolo ya bato ba yo seko, mpe yo Yawe okomi Nza­mbe wa bango.
I Ch LinVB 17:23  Sikawa e Yawe, kokisa elako olakelaki mosaleli wa yo na libota lya ye mobimba. Sala lokola olobaki !
I Ch LinVB 17:24  Esalema solo, bongo bato banso bakumisa nkombo ya yo seko, baloba : « Yawe wa bokasi bonso azali Nzambe wa Israel, azali Nza­mbe wa ba-Israel », libota lya ngai Davidi, mosaleli wa yo, likozala seko o miso ma yo,
I Ch LinVB 17:25  zambi yo moko Nza­mbe wa ngai, oyebisi mosaleli wa yo ’te okopesa ye libota linene. Ya­ngo wana mosaleli wa yo azwi mpiko ya kobondela yo.
I Ch LinVB 17:26  Solo, e Yawe, yo moto ozali Nzambe mpe olakelaki mosaleli wa yo elako eye ya esengo.
I Ch LinVB 17:27  Ondima kobenisa libota lya mosaleli wa yo mpo ’te liumela seko o miso ma yo, zambi eye yo, Yawe, opa­mboli, epambolami seko. »