Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 27
I Ch LinVB 27:1  Motango mwa bana ba Israel, bankumu ba mabota, bakomanda ba basoda nkoto to mo­nkama, bakomi bazalaki kosalela mokonzi na bokambi mampinga ma basoda ; limpinga lyoko lyoko sanza yoko o mobu. Limpinga lyoko lyoko lizalaki na bato nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:2  Yasobeam, mwana wa Zabdiel, azalaki komanda wa limpinga lya ya­mbo o sanza ya yambo. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:3  Azalaki mwana wa libota lya Peres, mpe komanda wa bakonzi banso ba limpinga o sanza ya yambo.
I Ch LinVB 27:4  Dodai, moto wa Ako, azalaki komanda wa limpinga lya mabale o sanza ya ibale. Miklot azalaki koyangela limpinga lya ye. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:5  Benaya, mwana wa nganga Nzambe monene Yoyada, azalaki komanda wa limpinga lya ma­sato o sanza ya isato. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:6  Benaya oyo azalaki moto wa lokumu lonene o ntei ya bilombe ntuku isato, azalaki mokonzi wa bango. Mwana wa Amizabad azalaki mpe moko wa bato ba ye.
I Ch LinVB 27:7  Asael, ndeko wa Yoab, azalaki komanda wa limpinga lya manei o sa­nza ya inei, mpe mwana wa ye Zebadia akitani ye. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:8  Sameut, moto wa Yizra, azalaki komanda wa li­mpi­nga lya matano o sanza ya itano. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:9  Ira, mwana wa Ikes, moto wa Tekoa, azalaki komanda wa li­mpi­nga lya motoba o sanza ya motoba. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:10  Eles, mwana wa Pelon, wa libota lya Efraim, azalaki komanda wa li­mpinga lya nsambo o sanza ya nsa­mbo. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:11  Sibekai, moto wa Kusa, wa libota lya Zara azalaki komanda wa limpinga lya mwambe o sanza ya mwambe. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:12  Abiezer, moto wa Anatot, wa libota lya Benyamin, azalaki komanda wa li­mpi­nga lya libwa o sanza ya libwa. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:13  Makarai, moto wa Netofa, wa libota lya Zara, azalaki komanda wa limpinga lya zomi o sanza ya zomi. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:14  Benaya, moto wa Pireaton, wa libota lya Efraim, azalaki komanda wa limpinga lya zomi na lyoko o sa­nza ya zomi na yoko. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:15  Keldai, moto wa Netofa, wa libota lya Otniel, azalaki komanda wa li­mpinga lya zomi na mabale o sanza ya zomi na ibale. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:16  O kati ya mabota ma Israel : Eliezer, mwana wa Zikri, azalaki koma­nda wa ba-Ruben ; Sefatia, mwana wa Maaka, komanda wa ba-Simeon.
I Ch LinVB 27:17  Wa ba-Levi : Kasabia, mwana wa Kemuel ; wa ba-Arone : Sadok ;
I Ch LinVB 27:18  wa ba-Yuda : Eliu, ndeko wa Davidi ; wa ba-Izakar : Omri, mwana wa Mikael ;
I Ch LinVB 27:19  wa ba-Zabulon : Yismaya, mwana wa Obadia ; wa ba-Neftali : Yerimot, mwana wa Azriel ;
I Ch LinVB 27:20  wa ba-Efraim : Osea, mwana wa Azazia ; wa ndambo ya etuka ya ba-Manase : Yoel, mwana wa Pedaya ;
I Ch LinVB 27:21  wa ndambo esusu ya etuka ya ba-Manase o mokili mwa Galaad : Yido, mwana wa Zekaria ; wa ba-Benyamin : Yaziel, mwana wa Abner ;
I Ch LinVB 27:22  wa ba-Dan : Azarel, mwana wa Yerokam. Bakomanda ba mabota ma Israel, bango baye.
I Ch LinVB 27:23  Baye bakokisi naino mibu ntuku ibale te, Davidi atangi bango te, mpo Yawe alobaki ’te akokomisa Israel ekolo ya bato baike, ebele lokola mi­nzoto mya likolo.
I Ch LinVB 27:24  Yoab, mwana wa Seruya, abandi kotanga bango, kasi asukisi mosala mona te, mpo Yawe asilikeli Israel, zambi batangaki bato ; bongo motango mwa bango mokomami te o buku ya Bikela bya mokonzi Davidi.
I Ch LinVB 27:25  Azmavet, mwana wa Adiel, azalaki kotala bibombelo bya biloko bya mokonzi. Yonatan, mwana wa Uzia, azalaki kotala makambo ma mosolo o bingumba, o mboka mpe o bibo­mbelo.
I Ch LinVB 27:26  Ezri, mwana wa Kelub, azalaki kotala bato bakosalaka mosala o bilanga.
I Ch LinVB 27:27  Simei, moto wa Rama, azalaki kotala bilanga bya nzete ya vino. Zabdi, moto wa Sefam, azalaki kotala bato bakokengeleke bibombelo bya vino.
I Ch LinVB 27:28  Baal-Kanan, moto wa Geder, aza­laki kotala nzete ya oliva mpe ya sikomore o esobe. Yoas azalaki kotala bibombelo bya mafuta.
I Ch LinVB 27:29  Sitrai, moto wa Saron, azalaki kotala ngo­mbe o esobe ya Saron. Safat, mwana wa Adlai, azalaki kotala ngombe o mabwaku.
I Ch LinVB 27:30  Obil, moto wa libota lya Ismael, azalaki kotala kamela. Yedeya wa Meramot, azalaki kotala mpunda.
I Ch LinVB 27:31  Yaziz, moto wa Agar, azalaki kotala mpata. Bango banso bazalaki bakengeli ba biloko bya mokonzi Davidi.
I Ch LinVB 27:32  Yonatan, noko wa Davidi, azalaki molaki wa ye ; azalaki moto wa mayele mpe mokomi minkanda ; azalaki kobokolo bana ba mokonzi, ye na Yekiel, mwana wa Kakmoni.
I Ch LinVB 27:33  Akitofel azalaki mpe molaki wa mokonzi ; Kusai, moto wa Arka, azalaki moni-nga wa ye wa motema.
I Ch LinVB 27:34  Yoyada, mwana wa Benaya, na Ebiatar bakitani Akitofel. Yoab azalaki komanda monene wa basoda ba mokonzi.