Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 12
I Ch LinVB 12:1  Bato basusu bakei kolanda Davidi o Siklag, o eleko aba-ngi kobimela Saul, mwana wa Kis ; bazalaki basoda ba mpiko, bameseni na bitumba,
I Ch LinVB 12:2  bayebi kobete litimbo mpe kobwaka mabanga na loboko la mobali mpe la mwasi. Bandeko ba Saul wa libota lya Be­nyamin bazalaki wana :
I Ch LinVB 12:3  mokonzi Akiezer na Yoas, bana ba Asema wa Gibea, Yeziel na Pelet, bana ba Azmavet, Beraka na Yeku, ba-Anatot,
I Ch LinVB 12:4  Yismaya wa Gabaon, soda wa mpiko o kati ya basoda ntuku isato mpe komanda wa bango ;
I Ch LinVB 12:5  Yirmeya, Yakaziel, Yokanan na Yozabad wa Gederot,
I Ch LinVB 12:6  Eluzai, Yerimot, Bealia, Semaria, Sefatia wa Karuf,
I Ch LinVB 12:7  Elkana, Yisia, Azarel, Yowezer, Yasobeam, bana ba Kore,
I Ch LinVB 12:9  Bato ba libota lya Gad bakimi mboka ya bango mpe bakei epai ya Davidi o esika azalaki kobombama o eliki. Bazalaki basoda ba mpiko, bameseni na bitumba, bazalaki na nguba mpe na makongo ; bazalaki makasi lokola ntambwe mpe bayebi kopota mbangu lokola mboloko o ngomba.
I Ch LinVB 12:10  Ezer azalaki mokonzi ; Obadia moto wa babale, Eliab moto wa basato,
I Ch LinVB 12:14  Yirmea moto wa zomi, Makbanai moto wa zomi na moko.
I Ch LinVB 12:15  Bango banso bato ba libota lya Gad, bakomanda ba basoda. Oyo azalaki mokuse akambi bato monkama, oyo azalaki molai bato nkoto yoko.
I Ch LinVB 12:16  Bango bakatisi Yordane o sanza ya yambo, o eleko mai makotiyolaka makasi, mpe bakimisi bato bakofa-ndaka o mabongo ma ebale epai ya Esti na epai ya Westi.
I Ch LinVB 12:17  Bato basusu ba libota lya Benyamin mpe ba Yuda bakei koluka Davidi o esika abombami.
I Ch LinVB 12:18  Davidi akei kozwana na bango, alobi : « Soko boyei kosalisa ngai lokola bandeko, nandimi kokamata bino na motema moko ; kasi soko boyei kokosa ngai mpe bosalisi banguna ba ngai, ata nasali bino mabe soki te, Nzambe wa bankoko ba biso amono likambo lya bino mpe asambisa bino ! »
I Ch LinVB 12:19  Elimo ya Nzambe ekiteli Amasai, komanda wa bilombe ntuku isato, bongo asakoli : « Kende, e Davidi ! Boboto bozala na yo, mwana wa Yese ! Boboto bozala na yo mpe na banso bakosalisa yo, mpo Nzambe wa yo akosalisa yo ! » Davidi ayambi bango mpe atii ba­ngo lokola bakomanda ba basoda ba ye.
I Ch LinVB 12:20  Bato basusu ba libota lya Manase bakei epai ya Davidi ntango ayaki elo­ngo na ba-Filisti kobunda etumba na Saul, kasi bakokaki kosalisa ba-Filisti mingi te, zambi bakonzi ba Filisti basangani likita mpe balongoli Davidi, balobi : « Akoki kozongela nkolo wa ye Saul, mbele akoboma biso ! »
I Ch LinVB 12:21  O ntango Davidi akei o Siklag, ba-Manase basusu bandimi kolanda Davidi, bango baye : Adna, Yozabad, Yediael, Mikael, Yozabad, Eliu, Siletai, bato bazalaki bakomanda ba basoda nkoto o mokili mwa Manase.
I Ch LinVB 12:22  Bango bato balendisi Davidi na basoda ba ye ; banso bazalaki bato ba mpiko, bakomi bakomanda ba basoda.
I Ch LinVB 12:23  Mokolo na mokolo bato ba sika bayei kosalisa Davidi, bongo limpi­nga lya ye likomi linene mpenza lokola limpinga lya Nzambe.
I Ch LinVB 12:24  Motango mwa basoda bakoki na etumba mpe balandi Davidi o Ebron mpo ’te balubola ye mokonzi o esika ya Saul lokola Yawe atindaki :
I Ch LinVB 12:25  Ba-Yuda bayebi kobunda na nguba mpe na likongo : bato 6 800, basoda bakoki na etumba.
I Ch LinVB 12:26  Ba-Simeon : 7 100 ; bazalaki bilo-mbe o etumba.
I Ch LinVB 12:28  na mpe Yoyada, mokonzi wa bato ba Arone na bato ba ye 3 700,
I Ch LinVB 12:29  na mpe Sadok, elenge mobali wa mpiko na bankumu ntuku ibale na babale ba libota lya ye.
I Ch LinVB 12:30  Ba-Benyamin : 3 000, se bandeko ba Saul. O kati ya bango, baike bazalaki kin’o mokolo mona kosalela Saul.
I Ch LinVB 12:31  Ba-Efraim : 20 800, banso basoda ba mpiko, bato ba lokumu o kati ya libota lya bango.
I Ch LinVB 12:32  Bato ba ndambo ya libota lya Manase : 18 000, banso babyangemaki moko moko mpo ’te balubola Davidi mokonzi.
I Ch LinVB 12:33  Ba-Izakar bayebi malamu mpe­nza nini mpe boniboni ba-Israel basengeli kosala : Bakonzi nkama ibale na bandeko ba bango banso balandaki bango.
I Ch LinVB 12:34  Ba-Zabulon : 50 000, bakoki na mo­sala mwa soda, bameseni na bitumba, bayebi kobunda na bibuneli binso ; bandimi kosalisa na motema moko.
I Ch LinVB 12:35  Ba-Neftali : bayangeli nkoto yoko elongo na basoda 37 000, baye bazalaki na nguba mpe na likongo.
I Ch LinVB 12:38  O ngambo ya Yordane, bato 120 000 ba libota lya Ruben, ba libota lya Gad, ba ndambo ya libota lya Manase, bayei na bibuneli ndenge na ndenge.
I Ch LinVB 12:39  Basoda baye banso bamilengeli mpo ya kobunda, bayei kosangana o Ebron na motema moko mpenza mpo ’te balubola Davidi mokonzi wa Israel mobimba. Ba-Israel basusu ba­nso mpe, motema moko, bandimi ’te Davidi azala mokonzi.
I Ch LinVB 12:40  Bafandi epai ya Davidi mikolo misato, balei mpe bameli. Bandeko ba bango balambelaki bango biloko.
I Ch LinVB 12:41  Bato bazalaki pe­nepene na bato ba mokili mwa Izakar, Zabulon na Neftali bayei na biloko bya kolia ; kamela, mpunda na ngo­mbe izalaki komeme byango : fufu, minkate mya mbuma ya figi, mbuma ya vino ikauki, vino, mafuta, mpata na ngombe ebele. O Israel ese­ngo ezalaki enene.