I CHRONICLES
Chapter 12
I Ch | LinVB | 12:1 | Bato basusu bakei kolanda Davidi o Siklag, o eleko aba-ngi kobimela Saul, mwana wa Kis ; bazalaki basoda ba mpiko, bameseni na bitumba, | |
I Ch | LinVB | 12:2 | bayebi kobete litimbo mpe kobwaka mabanga na loboko la mobali mpe la mwasi. Bandeko ba Saul wa libota lya Benyamin bazalaki wana : | |
I Ch | LinVB | 12:3 | mokonzi Akiezer na Yoas, bana ba Asema wa Gibea, Yeziel na Pelet, bana ba Azmavet, Beraka na Yeku, ba-Anatot, | |
I Ch | LinVB | 12:4 | Yismaya wa Gabaon, soda wa mpiko o kati ya basoda ntuku isato mpe komanda wa bango ; | |
I Ch | LinVB | 12:9 | Bato ba libota lya Gad bakimi mboka ya bango mpe bakei epai ya Davidi o esika azalaki kobombama o eliki. Bazalaki basoda ba mpiko, bameseni na bitumba, bazalaki na nguba mpe na makongo ; bazalaki makasi lokola ntambwe mpe bayebi kopota mbangu lokola mboloko o ngomba. | |
I Ch | LinVB | 12:15 | Bango banso bato ba libota lya Gad, bakomanda ba basoda. Oyo azalaki mokuse akambi bato monkama, oyo azalaki molai bato nkoto yoko. | |
I Ch | LinVB | 12:16 | Bango bakatisi Yordane o sanza ya yambo, o eleko mai makotiyolaka makasi, mpe bakimisi bato bakofa-ndaka o mabongo ma ebale epai ya Esti na epai ya Westi. | |
I Ch | LinVB | 12:17 | Bato basusu ba libota lya Benyamin mpe ba Yuda bakei koluka Davidi o esika abombami. | |
I Ch | LinVB | 12:18 | Davidi akei kozwana na bango, alobi : « Soko boyei kosalisa ngai lokola bandeko, nandimi kokamata bino na motema moko ; kasi soko boyei kokosa ngai mpe bosalisi banguna ba ngai, ata nasali bino mabe soki te, Nzambe wa bankoko ba biso amono likambo lya bino mpe asambisa bino ! » | |
I Ch | LinVB | 12:19 | Elimo ya Nzambe ekiteli Amasai, komanda wa bilombe ntuku isato, bongo asakoli : « Kende, e Davidi ! Boboto bozala na yo, mwana wa Yese ! Boboto bozala na yo mpe na banso bakosalisa yo, mpo Nzambe wa yo akosalisa yo ! » Davidi ayambi bango mpe atii bango lokola bakomanda ba basoda ba ye. | |
I Ch | LinVB | 12:20 | Bato basusu ba libota lya Manase bakei epai ya Davidi ntango ayaki elongo na ba-Filisti kobunda etumba na Saul, kasi bakokaki kosalisa ba-Filisti mingi te, zambi bakonzi ba Filisti basangani likita mpe balongoli Davidi, balobi : « Akoki kozongela nkolo wa ye Saul, mbele akoboma biso ! » | |
I Ch | LinVB | 12:21 | O ntango Davidi akei o Siklag, ba-Manase basusu bandimi kolanda Davidi, bango baye : Adna, Yozabad, Yediael, Mikael, Yozabad, Eliu, Siletai, bato bazalaki bakomanda ba basoda nkoto o mokili mwa Manase. | |
I Ch | LinVB | 12:22 | Bango bato balendisi Davidi na basoda ba ye ; banso bazalaki bato ba mpiko, bakomi bakomanda ba basoda. | |
I Ch | LinVB | 12:23 | Mokolo na mokolo bato ba sika bayei kosalisa Davidi, bongo limpinga lya ye likomi linene mpenza lokola limpinga lya Nzambe. | |
I Ch | LinVB | 12:24 | Motango mwa basoda bakoki na etumba mpe balandi Davidi o Ebron mpo ’te balubola ye mokonzi o esika ya Saul lokola Yawe atindaki : | |
I Ch | LinVB | 12:25 | Ba-Yuda bayebi kobunda na nguba mpe na likongo : bato 6 800, basoda bakoki na etumba. | |
I Ch | LinVB | 12:29 | na mpe Sadok, elenge mobali wa mpiko na bankumu ntuku ibale na babale ba libota lya ye. | |
I Ch | LinVB | 12:30 | Ba-Benyamin : 3 000, se bandeko ba Saul. O kati ya bango, baike bazalaki kin’o mokolo mona kosalela Saul. | |
I Ch | LinVB | 12:31 | Ba-Efraim : 20 800, banso basoda ba mpiko, bato ba lokumu o kati ya libota lya bango. | |
I Ch | LinVB | 12:32 | Bato ba ndambo ya libota lya Manase : 18 000, banso babyangemaki moko moko mpo ’te balubola Davidi mokonzi. | |
I Ch | LinVB | 12:33 | Ba-Izakar bayebi malamu mpenza nini mpe boniboni ba-Israel basengeli kosala : Bakonzi nkama ibale na bandeko ba bango banso balandaki bango. | |
I Ch | LinVB | 12:34 | Ba-Zabulon : 50 000, bakoki na mosala mwa soda, bameseni na bitumba, bayebi kobunda na bibuneli binso ; bandimi kosalisa na motema moko. | |
I Ch | LinVB | 12:35 | Ba-Neftali : bayangeli nkoto yoko elongo na basoda 37 000, baye bazalaki na nguba mpe na likongo. | |
I Ch | LinVB | 12:38 | O ngambo ya Yordane, bato 120 000 ba libota lya Ruben, ba libota lya Gad, ba ndambo ya libota lya Manase, bayei na bibuneli ndenge na ndenge. | |
I Ch | LinVB | 12:39 | Basoda baye banso bamilengeli mpo ya kobunda, bayei kosangana o Ebron na motema moko mpenza mpo ’te balubola Davidi mokonzi wa Israel mobimba. Ba-Israel basusu banso mpe, motema moko, bandimi ’te Davidi azala mokonzi. | |
I Ch | LinVB | 12:40 | Bafandi epai ya Davidi mikolo misato, balei mpe bameli. Bandeko ba bango balambelaki bango biloko. | |