I CHRONICLES
Chapter 11
I Ch | LinVB | 11:1 | Ba-Israel banso bayei epai ya Davidi o Ebron, balobi : « Biso na yo tozali makila moko. | |
I Ch | LinVB | 11:2 | Uta kala, ntango Saul azalaka mokonzi, yo moto ozalaki kotambwisa mpe koyangela basoda ba Israel, mpe Yawe Nzambe wa yo alobaki na yo : Yo moto okoleisa ekolo ya ngai Israel, okozala mokonzi wa ekolo ya ngai Israel. » | |
I Ch | LinVB | 11:3 | Bakolo banso ba Israel bakei epai ya mokonzi o Ebron, mpe Davidi akati na bango bondeko o miso ma Yawe. Na nsima bapakoli Davidi mafuta mpo ’te azala mokonzi wa Israel, se lokola Yawe alobaki na monoko mwa Samuel. | |
I Ch | LinVB | 11:4 | Davidi na basoda ba ye bakei kobunda na Yeruzalem, o ntango ena ezalaka Yebus : ba-Yebus bazalaki bankolo ba mabelé. | |
I Ch | LinVB | 11:5 | Bango balobi na Davidi : « Okokoto awa te. » Kasi Davidi abotoli ebombamelo ya Sion, eye ekomi Engumba ya Davidi. | |
I Ch | LinVB | 11:6 | Davidi alobi : « Moto wa yambo akoboma mo-Yebus akokoma mokonzi mpe nkumu. » Yoab, mwana wa Seruya, akoti o mboka liboso, akomi bongo mokonzi monene wa basoda. | |
I Ch | LinVB | 11:8 | Na nsima abongisi ndako isusu ya mboka, banda ndako ya Milo tee ndako ya mokonzi, mpe Yoab asilisi mosala mwa kolendisa mboka. | |
I Ch | LinVB | 11:10 | Baye bazalaki bakonzi ba basoda ba Davidi mpe basalisi ye ntango inso o bokonzi bwa ye mpe baluboli ye mokonzi wa Israel elongo na ba-Israel banso lokola Yawe alobaki, bango baye : | |
I Ch | LinVB | 11:11 | Tala molongo mwa nkombo ya bilombe ba Davidi : Yasobeam, mwana wa Kakmoni, komanda wa bilo-mbe basato. Ye moto abomaki bato nkama isato na likongo, ye moko. | |
I Ch | LinVB | 11:13 | Azalaki na Davidi o Pas-Damim o ntango ba-Filisti bamilengeleki mpo ya etumba. Kuna ezalaki elanga etondi na mbuma ya mampa ; basoda ba Israel bakimi ba-Filisti, | |
I Ch | LinVB | 11:14 | kasi Davidi na baninga bakei koteleme o kati ya elanga, babundi etumba mpe babomi ba-Filisti. Yawe apesi bango lilonga linene. | |
I Ch | LinVB | 11:15 | Bato basato o kati ya bilombe ntuku isato bakei epai ya Davidi o ngomba ya mabanga o mobenga mwa Adulam, ntango ba-Filisti bapiki nganda o lobwaku la Refaim. | |
I Ch | LinVB | 11:17 | Davidi ayoki mposa ya mai, alobi : « Nani akotokela ngai mai o libulu penepene na ezibeli ya Beteleme ? » | |
I Ch | LinVB | 11:18 | Bilombe basato bayingeli o nganda ya ba-Filisti, batoki mai o libulu penepene na ezibeli ya Beteleme mpe bamemi mango epai ya Davidi. Kasi Davidi alingi komele mango te mpe asopi mango o nse mpo ya Yawe, | |
I Ch | LinVB | 11:19 | alobi : « Yawe apesa ngai etumbu soko nakomele mai ! Namele nde makila ma bato bandimi kokufa mpo ya ngai ? Solo, mpo ya komemele ngai mai, babangaki liwa te ! » Yango wana aboyi komele mai. Mosala mona bilombe basato basalaki. | |
I Ch | LinVB | 11:20 | Abisai, ndeko wa Yoab, azalaki komanda wa basoda ntuku isato. Ye moto abomaki bato nkama isato na likongo ; bongo azwi lokumu o kati ya bango ntuku isato. | |
I Ch | LinVB | 11:21 | Ata aleki bango ntuku isato na lokumu, mpe akomi komanda wa bango, bakotangaka ye o molongo mwa bilombe basato te. | |
I Ch | LinVB | 11:22 | Benaya, mwana wa Yoyada, soda wa mpiko, moto abimisi misala minene ebele, autaki o Kabseel. Ye moto abomi bilombe babale ba Moab ; ye moto akoti o libulu mpe abomi ntambwe o mokolo mbula ya mpembe enokoki. | |
I Ch | LinVB | 11:23 | Ye moto abomi mo-Ezipeti, moto bolai maboko matano. Mo-Ezipeti azalaki na likongo o loboko, linene lokola etongeli ya batongi bilamba. Akei kokutana na ye na lingenda o loboko, abotoli likongo o loboko la mo-Ezipeti mpe abomi ye na likongo lya ye moko. | |
I Ch | LinVB | 11:24 | Mpo ya likambo liye Benaya, mwana wa Yoyada, akomi moto wa lokumu o ntei ya basoda ntuku isato. | |
I Ch | LinVB | 11:25 | Ata aleki bango ntuku isato na lokumu, bakotangaka ye o molongo mwa bilombe basato te. Davidi atii ye komanda wa bakengeli ba ye. | |
I Ch | LinVB | 11:26 | Basoda basusu ba mpiko : Asael, ndeko wa Yoab ; Elkanan, mwana wa Dodo wa Beteleme ; | |
I Ch | LinVB | 11:31 | Itai, mwana wa Ribai, moto wa Gibea wa libota lya Benyamin ; Benaya, moto wa Pireaton ; | |
I Ch | LinVB | 11:39 | Selek, moto wa Amon ; Nakrai, moto wa Beerot, oyo azalaki komeme bibuneli bya Yoab, mwana wa Seruya ; | |
I Ch | LinVB | 11:42 | Adina, mwana wa Siza wa libota lya Ruben, nkumu wa mabota ma Ruben mpe komanda wa basoda ntuku isato ; | |
I Ch | LinVB | 11:46 | Eliel, moto wa Makav ; Yeribai na Yosavia, bana ba Elnam ; na Yitma, moto wa Moab ; | |