Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 16
I Ch LinVB 16:1  Bakei na Sanduku ya Nzambe mpe batii yango o ema eye Davidi atelemisaki na ntina ena. Na nsima babonzeli Nzambe mabo­nza ma kotumba na miboma mya bondeko.
I Ch LinVB 16:2  Esilisi Davidi kobonza mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko, abenisi bato o nkombo ya Yawe.
I Ch LinVB 16:3  Na nsima apesi ba-Israel banso, ná babali ná basi, mwa limpa, mopiko moko mwa mbuma ya figi mpe monkate moko mwa mbuma ya vino.
I Ch LinVB 16:4  Davidi apesi ba-Levi mosala o boso bwa Sanduku ya Yawe : basambela, bakumisa mpe bayembela Yawe Nza­mbe wa Israel.
I Ch LinVB 16:5  Aponi Asaf azala kapita, Zekaria azala nsima ya ye. Na nsima aponi Yeiel, Semiramot, Yekiel, Matitia, Eliab, Benaya, Obed-Edom na Yeiel. Bango bazalaki kobete nzenze na likembe, Asaf azalaki kolelisa migbala.
I Ch LinVB 16:6  Banganga Nzambe Benaya na Yakaziel bazalaki kobete mondule ntango inso o boso bwa Sanduku ya Nzambe.
I Ch LinVB 16:7  O mokolo mona Davidi atindi mbala ya yambo Asaf na bandeko ba ye bayembela Ya­we nzembo eye :
I Ch LinVB 16:8  Bokumisa Yawe, bosakola nkombo ya ye, boyebisa bikolo misala mya ye minso.
I Ch LinVB 16:9  Boyembela ye nzembo, bokumisa ye, boloba makamwisi ma ye ma­nso.
I Ch LinVB 16:10  Bomikumisa mpo ya nkombo ya ye esantu ; bino bato bokoluka Yawe, boyoka esengo.
I Ch LinVB 16:11  Boluka Yawe na bokasi bwa ye, bomeka kozala ntango inso penepene na ye.
I Ch LinVB 16:12  Bokundola o mitema makamwisi asalaki, bilembo mpe bosambi bwa ye.
I Ch LinVB 16:13  Bino bato ba libota lya Israel, mosaleli wa ye, bino bana ba Yakob, baye Nzambe aponoki.
I Ch LinVB 16:14  Ye mpenza azali Yawe Nzambe wa biso, oyo akoyangelaka mokili mobimba.
I Ch LinVB 16:15  Bokundola bondeko bwa ye ntango inso, na maloba alobaki mpo ya mabota nkoto,
I Ch LinVB 16:16  bondeko akataki na Abarama mpe ndai alayelaki Izaka.
I Ch LinVB 16:17  Akomisi bwango mobeko mpo ya Yakob, bondeko bwa seko mpo ya Israel,
I Ch LinVB 16:18  ntango alobaki : Nakopesa yo Kanana, ekozala mabelé nakopesa yo.
I Ch LinVB 16:19  O ntango ena bakokaki koyeba motango mwa bino, bozalaki se mwa liboke lya bauta.
I Ch LinVB 16:20  Bozalaki kotelengana o bikolo bi­nso, botiki mokili moko, boleki o mokili mosusu.
I Ch LinVB 16:21  Alingaki te ’te banyokolo bino mpe mpo ya bino apesaki etumbu na bakonzi basusu :
I Ch LinVB 16:22  « Bosimba basantu ba ngai na maboko te, bosala baprofeta ba ngai mabe te ! »
I Ch LinVB 16:23  O nse mobimba boyembela Yawe, bosakola libiki lya ye mokolo na mokolo.
I Ch LinVB 16:24  Bosangela bampaya nkembo ya ye, bosakola makamwisi ma ye o bikolo binso.
I Ch LinVB 16:25  Yawe azali monene, azali na lokumu lonene, ye Nzambe nta bokasi, aleki banzambe banso.
I Ch LinVB 16:26  Banzambe ba bikolo bazali se mpa­mba, bobele Yawe moto akelaki likolo.
I Ch LinVB 16:27  O boso bwa ye lokumu na nkembo bimononi, o mboka ya ye se bokasi na esengo.
I Ch LinVB 16:28  Bino, mabota ma bikolo binso, bo­kumisa Yawe, bokumisa nkembo mpe bokasi bwa ye.
I Ch LinVB 16:29  Bokembisa nkombo ya Yawe, boya na mabonza, boyingela o boso bwa ye. Bokumbamela Yawe o mboka esantu ya ye.
I Ch LinVB 16:30  Nse mobimba, lenge o miso ma ye ; apiki mokili makasi, moningani te.
I Ch LinVB 16:31  E likolo sepela, e mokili yoka nsai ; boyebisa bikolo binso : Yawe azali Mokonzi.
I Ch LinVB 16:32  Mbu na binso bizali o kati, boganga makasi, Bilanga binso na mbuma ya yango, bosepela !
I Ch LinVB 16:33  Nzete inso ya zamba, bokumisa Yawe na esengo, zambi akoya koyangela mokili.
I Ch LinVB 16:34  Botondo Yawe, zambi aleki bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
I Ch LinVB 16:35  Boloba na ye : Salisa biso, e Nza­mbe wa libiki, sangisa biso mpe longola biso o kati ya bapagano, tokoka kokumisa nkombo ya yo esantu, tosakola mpe nkembo ya yo.
I Ch LinVB 16:36  Bakumisa Yawe Nzambe wa Israel o bileko na bileko binso seko ! Mpe bato banso baloba « Amen ! Aleluya ! (Bokumisa Yawe !) »
I Ch LinVB 16:37  Davidi atiki Asaf na bandeko ba ye liboso lya Sanduku ya Bondeko bwa Yawe mpo ’te basala ntango inso mosala o boso bwa Sanduku lokola milulu mya mokolo na mokolo mikotinda.
I Ch LinVB 16:38  Atiki wana mpe Obed-Edom na bandeko ba ye ntuku motoba na mwambe ; Obed-Edom, mwana wa Yedutun na Kosa bazalaki bake­ngeli ba monoko mwa ema.
I Ch LinVB 16:39  Atiki nganga Nzambe Sadok na bandeko ba ye, banganga Nzambe, o boso bwa Ndako ya Yawe, o ngomba ya Gabaon,
I Ch LinVB 16:40  mpo ’te babonzela Yawe ntango inso mabonza ma kotumba o altare ya mabonza, ntongo na mpokwa ; basala bongo manso lokola makomami o buku ya Mobeko moye Yawe apesaki ba-Israel.
I Ch LinVB 16:41  Ezalaki mpe na bango Eman, Yedutun na bato basusu banso ; baponoki bango mpo ya kokumisa Yawe, « zambi bolingi bwa ye, bolingi bwa seko. »
I Ch LinVB 16:42  Eman na Yedutun bazalaki na mi­ndule, na migbala mpe na biyembeli bisusu mpo ya kokamba nzembo ya bokumisi Nzambe. Bana ba Yedutun bazalaki bakengeli ba monoko mwa ema.
I Ch LinVB 16:43  Bato banso bazongi, moto na mo­to o ema ya ye. Davidi mpe azo­ngi mpo ’te abenisa libota lya ye.