I CHRONICLES
Chapter 29
I Ch | LinVB | 29:1 | Mokonzi Davidi alobi na bato banso maloba maye : « Mwana wa ngai Salomo, oyo Nzambe aponi, azali se mwana, azali na nzoto makasi te ; kasi mosala mozali monene, zambi ndako eye enene ekozala ndako ya bato te, kasi ya Yawe Nzambe. | |
I Ch | LinVB | 29:2 | Na bokasi bwa ngai bonso nalengeli binso mpo ya ndako ya Nzambe wa ngai, nazwi wolo mpo ya biloko bya wolo, palata mpo ya biloko bya palata, mbengi mpo ya biloko binso bya mbengi, bibende mpo ya biloko bya bibende, mabaya mpo ya biloko bya mabaya, mabanga ma oniksi, mabanga ma kokanga o bilamba, mabanga maindo na mabanga masusu ma langi ndenge na ndenge, mabanga ma motuya ndenge na ndenge na mabanga ma albatre ebele. | |
I Ch | LinVB | 29:3 | Mpe nakobakisa biloko bya wolo mpe bya palata bya ngai moko binso mpo ya ndako ya Nzambe, zambi nalingi ndako ya Nzambe wa ngai mingi ; | |
I Ch | LinVB | 29:4 | nakopesa talenta ya wolo nkoto isato, ya wolo euti o Ofir, talenta ya palata kitoko nkoto nsambo mpo ya kokembisa bifelo bya ndako. | |
I Ch | LinVB | 29:5 | Nani andimi kokabela Yawe eloko lelo, ezala wolo mpo ya biloko bya wolo, ezala palata mpo ya biloko bya palata, ezala mosolo mpo ya lifuta lya basali ? » | |
I Ch | LinVB | 29:6 | Bankumu ba mabota ma Israel, bakomanda ba basoda nkoto to nkama na baye bazalaki kotala mambi ma mokonzi bandimi yango ; | |
I Ch | LinVB | 29:7 | babonzeli mokonzi mpo ya misala mya ndako ya Nzambe : talenta ya wolo nkoto itano na darike nkoto zomi, talenta ya palata nkoto zomi, na talenta ya mbengi nkoto zomi na mwambe, na talenta ya bibende nkoto monkama. | |
I Ch | LinVB | 29:8 | Baye bazalaki na mabanga ma motuya, bapesi mango o maboko ma Yekiel, wa libota lya Gerson mpo ’te abomba mango o ebombelo ya mosolo ya Ndako ya Yawe. | |
I Ch | LinVB | 29:9 | Bato banso basepeli motindo bato bakabi makabo, zambi babonzeli Yawe mango na motema moko. Mokonzi Davidi mpe ayoki esengo enene. | |
I Ch | LinVB | 29:10 | Davidi akumisi Yawe o miso ma bato banso ba lisanga, alobi : « Bakumisa yo, Yawe Nzambe wa Israel, tata wa biso ut’o kala tee o bileko binso seko. | |
I Ch | LinVB | 29:11 | Na yo, Yawe, bonene, nguya, nkembo, bokonzi na lokumu seko, zambi binso bizali o likolo mpe o nse bizali bya yo. Na yo, Yawe, bokonzi na boyangeli bwa bikelamo binso. | |
I Ch | LinVB | 29:12 | Nkita na lokumu iuti na yo. Yo nkolo wa biloko binso ; nguya na bokasi izali o maboko ma yo. Ozali na nguya ya kotombola mpe kolendisa ata nani. | |
I Ch | LinVB | 29:14 | Ngai nde nani mpe bato ba ekolo ya ngai nde banani mpo ’te tokoka kobonza makabo na motema moko boye ? Binso biuti na yo, mpe biloko topesi yo biuti o maboko ma yo. | |
I Ch | LinVB | 29:15 | O miso ma yo tozali bobele bauta na bampaya se lokola bankoko ba biso bazalaki. Mikolo mya biso awa o nse mizali koleka lokola elilingi mpe mikoumela te. | |
I Ch | LinVB | 29:16 | E Yawe Nzambe wa biso, biloko ebele tokongoloki mpo ya kotonga ndako ya kokumisa nkombo ya yo esantu, biuti o maboko ma yo mpe bizali bya yo. | |
I Ch | LinVB | 29:17 | E Nzambe wa ngai, nayebi ’te okotalaka mitema mya bato, mpe okondimaka bato ba bosembo ; nabonzeli yo biloko bina binso na motema moko. Mpe sikawa na motema esengo namoni boniboni bato ba yo babonzeli yo mabonza na motema moko. | |
I Ch | LinVB | 29:18 | E Yawe Nzambe wa bankoko ba biso Abarama, Izaka na Yakob, salisa bato ba yo batikala na makanisi malamu seko mpo ’te bakanisa bobele yo. | |
I Ch | LinVB | 29:19 | Pesa mwana wa ngai motema semba, bongo atosa bitinda, maloba na mibeko mya yo mpo ’te akoka kosala makambo maye manso mpe kotonga ndako eye kitoko nalengeleli yo. » | |
I Ch | LinVB | 29:20 | Na nsima Davidi alobi na bato banso ba lisanga : « Bokumisa Yawe Nzambe wa bino. » Mpe bato banso bakumisi Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. Bafukami mpe bakumbameli Nzambe na mpe mokonzi. | |
I Ch | LinVB | 29:21 | Mokolo mwa nsima, ba-Israel babonzeli Yawe miboma na mabonza ma kotumba ; babomi ngombe babali nkoto yoko, bana mpata nkoto yoko, bapesi mpe mabonza ma bomeli na miboma ebele o nkombo ya Israel mobimba. | |
I Ch | LinVB | 29:22 | O mokolo mona balei mpe bameli na esengo enene o miso ma Yawe. Na nsima baluboli Salomo, mwana wa Davidi, mokonzi mbala ya ibale, mpe o nkombo ya Yawe bapakoli ye mafuta. Bapakoli mpe Sadok mango, azala nganga Nzambe. | |
I Ch | LinVB | 29:23 | Salomo afandi o ngwende ya Yawe, akomi mokonzi o esika ya tata wa ye Davidi, mpe makambo ma ye manso mazalaki kotambola malamu. Ba-Israel banso bazalaki kotosa ye. | |
I Ch | LinVB | 29:25 | Yawe atomboli naino lokumu la Salomo o miso ma bato banso ba Israel, mpe apesi ye boko-nzi bwa nkembo lokola mokonzi moko wa Israel azalaki na bwango te. | |
I Ch | LinVB | 29:27 | Bokonzi bwa ye o Israel boumelaki mibu ntuku inei : mibu nsambo o Ebron, mibu ntuku isato na misato o Yeruzalem. | |
I Ch | LinVB | 29:28 | Ntango awei, akomi mobange, akokisi mikolo mya ye, azalaki na mosolo mingi mpe na lokumu lonene. Mwana wa ye Salomo akitani ye. | |
I Ch | LinVB | 29:29 | Misala minso mokonzi Davidi asalaki, miye mya liboso na miye mya nsuka, mikomami o buku ya Bikela bya Samuel, momoni-makambo, o buku ya Profeta Natan mpe o buku ya Gad momoni-makambo. | |