Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 29
I Ch LinVB 29:1  Mokonzi Davidi alobi na bato banso maloba maye : « Mwana wa ngai Salomo, oyo Nza­mbe aponi, azali se mwana, azali na nzoto makasi te ; kasi mosala mozali monene, zambi ndako eye enene eko­zala ndako ya bato te, kasi ya Yawe Nzambe.
I Ch LinVB 29:2  Na bokasi bwa ngai bonso nalengeli binso mpo ya ndako ya Nzambe wa ngai, nazwi wolo mpo ya biloko bya wolo, palata mpo ya biloko bya palata, mbengi mpo ya biloko binso bya mbengi, bibende mpo ya biloko bya bibende, mabaya mpo ya biloko bya mabaya, mabanga ma oniksi, mabanga ma kokanga o bilamba, mabanga maindo na mabanga masusu ma langi ndenge na ndenge, mabanga ma motuya ndenge na ndenge na mabanga ma albatre ebele.
I Ch LinVB 29:3  Mpe nakobakisa biloko bya wolo mpe bya palata bya ngai moko binso mpo ya ndako ya Nzambe, zambi na­lingi ndako ya Nzambe wa ngai mingi ;
I Ch LinVB 29:4  nakopesa talenta ya wolo nkoto isato, ya wolo euti o Ofir, talenta ya palata kitoko nkoto nsambo mpo ya kokembisa bifelo bya ndako.
I Ch LinVB 29:5  Nani andimi kokabela Yawe eloko lelo, ezala wolo mpo ya biloko bya wolo, ezala palata mpo ya biloko bya palata, ezala mosolo mpo ya lifuta lya basali ? »
I Ch LinVB 29:6  Bankumu ba mabota ma Israel, bakomanda ba basoda nkoto to nkama na baye bazalaki kotala mambi ma mokonzi bandimi yango ;
I Ch LinVB 29:7  babo­nzeli mokonzi mpo ya misala mya ndako ya Nzambe : talenta ya wolo nkoto itano na darike nkoto zomi, talenta ya palata nkoto zomi, na talenta ya mbengi nkoto zomi na mwa­mbe, na talenta ya bibende nkoto monkama.
I Ch LinVB 29:8  Baye bazalaki na maba­nga ma motuya, bapesi mango o maboko ma Yekiel, wa libota lya Gerson mpo ’te abomba mango o ebombelo ya mosolo ya Ndako ya Yawe.
I Ch LinVB 29:9  Bato banso basepeli motindo bato bakabi makabo, zambi babonzeli Yawe ma­ngo na motema moko. Mokonzi Davidi mpe ayoki esengo enene.
I Ch LinVB 29:10  Davidi akumisi Yawe o miso ma bato banso ba lisanga, alobi : « Bakumisa yo, Yawe Nzambe wa Israel, tata wa biso ut’o kala tee o bileko binso seko.
I Ch LinVB 29:11  Na yo, Yawe, bonene, nguya, nkembo, bokonzi na lokumu seko, zambi binso bizali o likolo mpe o nse bizali bya yo. Na yo, Yawe, bokonzi na boyangeli bwa bikelamo binso.
I Ch LinVB 29:12  Nkita na lokumu iuti na yo. Yo nko­lo wa biloko binso ; nguya na bokasi izali o maboko ma yo. Ozali na nguya ya kotombola mpe kolendisa ata nani.
I Ch LinVB 29:13  Sikawa, e Nzambe wa biso, totondi yo mpe tokumisi nkombo ya yo ya nkembo.
I Ch LinVB 29:14  Ngai nde nani mpe bato ba ekolo ya ngai nde banani mpo ’te tokoka kobonza makabo na motema moko boye ? Binso biuti na yo, mpe biloko topesi yo biuti o maboko ma yo.
I Ch LinVB 29:15  O miso ma yo tozali bobele bauta na bampaya se lokola bankoko ba biso bazalaki. Mikolo mya biso awa o nse mizali koleka lokola elilingi mpe mikoumela te.
I Ch LinVB 29:16  E Yawe Nzambe wa biso, biloko ebele tokongoloki mpo ya kotonga ndako ya kokumisa nkombo ya yo esantu, biuti o maboko ma yo mpe bizali bya yo.
I Ch LinVB 29:17  E Nzambe wa ngai, nayebi ’te okotalaka mitema mya bato, mpe oko­ndimaka bato ba bosembo ; nabonzeli yo biloko bina binso na motema moko. Mpe sikawa na motema esengo namoni boniboni bato ba yo babonzeli yo mabonza na motema moko.
I Ch LinVB 29:18  E Yawe Nzambe wa bankoko ba biso Abarama, Izaka na Yakob, salisa bato ba yo batikala na makanisi malamu seko mpo ’te bakanisa bobele yo.
I Ch LinVB 29:19  Pesa mwana wa ngai motema semba, bongo atosa bitinda, maloba na mibeko mya yo mpo ’te akoka kosala makambo maye manso mpe kotonga ndako eye kitoko nalengeleli yo. »
I Ch LinVB 29:20  Na nsima Davidi alobi na bato banso ba lisanga : « Bokumisa Yawe Nzambe wa bino. » Mpe bato banso bakumisi Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. Bafukami mpe bakumbameli Nzambe na mpe mokonzi.
I Ch LinVB 29:21  Mokolo mwa nsima, ba-Israel ba­bonzeli Yawe miboma na mabonza ma kotumba ; babomi ngombe babali nkoto yoko, bana mpata nkoto yoko, bapesi mpe mabonza ma bomeli na miboma ebele o nkombo ya Israel mobimba.
I Ch LinVB 29:22  O mokolo mona balei mpe bameli na esengo enene o miso ma Yawe. Na nsima baluboli Salomo, mwana wa Davidi, mokonzi mbala ya ibale, mpe o nkombo ya Yawe bapakoli ye mafuta. Bapakoli mpe Sadok mango, azala nganga Nzambe.
I Ch LinVB 29:23  Salomo afandi o ngwende ya Yawe, akomi mokonzi o esika ya tata wa ye Davidi, mpe makambo ma ye manso mazalaki kotambola malamu. Ba-Israel banso bazalaki kotosa ye.
I Ch LinVB 29:24  Bayangeli, bilombe na bana banso ba mokonzi Davidi bazalaki kotosa mokonzi Salomo.
I Ch LinVB 29:25  Yawe atomboli naino lokumu la Salomo o miso ma bato banso ba Israel, mpe apesi ye boko-nzi bwa nkembo lokola mokonzi moko wa Israel azalaki na bwango te.
I Ch LinVB 29:26  Davidi, mwana wa Yese, ayangelaki Israel mobimba.
I Ch LinVB 29:27  Bokonzi bwa ye o Israel boumelaki mibu ntuku inei : mibu nsambo o Ebron, mibu ntuku isato na misato o Yeruzalem.
I Ch LinVB 29:28  Ntango awei, akomi mobange, akokisi mikolo mya ye, azalaki na mosolo mingi mpe na lokumu lonene. Mwana wa ye Salomo akitani ye.
I Ch LinVB 29:29  Misala minso mokonzi Davidi asalaki, miye mya liboso na miye mya nsuka, mikomami o buku ya Bikela bya Samuel, momoni-makambo, o buku ya Profeta Natan mpe o buku ya Gad momoni-makambo.
I Ch LinVB 29:30  Maka­mbo manso ma bokonzi bwa ye, ngu­ya ya ye na bitumba abundaki, bisengo mpe mpasi inso ya ye moko, ya Israel mpe ya mikili minso mya bikolo bisusu, manso makomami wana.