Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 26
I Ch LinVB 26:1  Tala mangomba ma bakengeli ba bizibeli : Wa bana ba Kore : Meselemia, mwa­na wa Kore wa libota lya Asaf.
I Ch LinVB 26:2  Meselemia aboti bana : wa yambo Zekaria, wa babale Yediael, wa basato Zebadia, wa banei Yatniel,
I Ch LinVB 26:3  wa batano Elam, wa motoba Yokanan, wa nsambo Elyoenai.
I Ch LinVB 26:4  Obed-Edom aboti bana : wa ya­mbo Semaya, wa babale Yozabad, wa basato Yoak, wa banei Sakar, wa batano Netaneel,
I Ch LinVB 26:5  wa motoba Amiel, wa nsambo Izakar, wa mwambe Peletai ; Nzambe abenisaki libota lya ye.
I Ch LinVB 26:6  Mwana wa ye Semaya aboti mpe bana babali, bakomi bankumu ba mabota ma bango, zambi bazalaki bato ba mpiko.
I Ch LinVB 26:7  Semaya aboti Otni, Refael, Obed, Elzabad na bandeko ba ye, bato ba mpiko : Eliu na Semakia.
I Ch LinVB 26:8  Ba­ngo banso bazalaki bana ba Obed-Edom. Bango na bana na bandeko ba bango bazalaki bato ba mpiko bakoki na mosala mwa bangolokumu, za­mbi balakisaki mpiko o mosala. O libota lya Obed-Edom bazalaki bato ntuku motoba na babale.
I Ch LinVB 26:9  Meselemia azalaki na bana mpe na bandeko : bato ba mpiko zomi na mwambe.
I Ch LinVB 26:10  Kosa, mwana wa libota lya Merari, aboti bana babali : wa yambo Simri (ata azalaki mwana wa liboso te, tata atiaki ye liboso),
I Ch LinVB 26:11  wa babale Kilkia, wa basato Tebalia, wa banei Zekaria. Bana na bandeko ba Kosa bakoki zomi na basato.
I Ch LinVB 26:12  Bango bazalaki bato ba lingomba lya bakengeli ba bizibeli. Bakonzi ba bango bazalaki mpe na mosala o Tempelo ya Yawe, se lokola bandeko ba bango.
I Ch LinVB 26:13  O mabota manso, ezala libota like, ezala libota linene, babeti zeke mpo bayeba nani akokengele ezibeli yoko yoko.
I Ch LinVB 26:14  Epai ya Esti, zeke elakisi Selemia. Epai ya Nordi, zeke elakisi mwana wa ye Zekaria, molaki wa mayele mingi.
I Ch LinVB 26:15  Epai ya Sudi, zeke elakisi Obed-Edom mpe bana ba ye bakengele bibombelo bya biloko.
I Ch LinVB 26:16  Epai ya Westi, zeke elakisi Supim na Kosa mpo batala ezibeli epai ya Westi, na ezibeli ya Saleket penepene na nzela ya ngomba. Bakaboli mosala boye :
I Ch LinVB 26:17  Epai ya Esti, ba-Levi motoba bazala wana mokolo na mokolo, epai ya Nordi bato banei, epai ya Sudi bato banei ; bato babale babale batala bibombelo bya biloko.
I Ch LinVB 26:18  O ndako ike epai ya Westi, bazala bato banei mpo ya kotala nzela mpe bato babale mpo ya kotala ndako.
I Ch LinVB 26:19  Molongo mwa bakengeli ba bizibeli o kati ya bana ba Kore mpe ba Merari, mwango moye.
I Ch LinVB 26:20  Bandeko ba bango, ba-Levi, bazalaki kokengele bibombelo bya mosolo mwa Tempelo ya Nzambe, na mpe mabonza masantu.
I Ch LinVB 26:21  Bana ba Ladan, Yekiel wa libota lya Gerson ; bana ba Yekiel, bankumu ba mabota ma Ladan, ba etuka ya Gerson.
I Ch LinVB 26:22  Zetam na ndeko wa ye Yoe­l, bana ba Yekiel, batalaki mosolo mwa Tempelo ya Yawe.
I Ch LinVB 26:23  O kati ya bana ba Amram, ba Yisar, ba Ebron na ba Uziel :
I Ch LinVB 26:24  Sebuel mwana wa Gerson, nkoko wa Moze, azalaki mokonzi mokengeli wa nkita.
I Ch LinVB 26:25  Bandeko ba ye, bana ba ndeko wa ye Eliezer, bazalaki Rekabia, mwana wa ye, tata wa Yesaya, tata wa Yoram, tata wa Zikri, tata wa Selomit.
I Ch LinVB 26:26  Selomit na bandeko ba ye bazalaki kotala mosolo monso mwa mabonza masantu, maye mokonzi Davidi, na bankumu ba mabota, na bakomanda ba basoda nkoto to nkama na bako­nzi basusu ba basoda babonzelaki Nza­mbe.
I Ch LinVB 26:27  Babotoloki biloko bina o ntango ya etumba, mpe babonzelaki Nzambe byango mpo ya misala mya Tempelo ya Yawe.
I Ch LinVB 26:28  Na mpe biloko binso Samuel, momoni-makambo, na Saul mwana wa Kis, na Abner mwana wa Ner, na Yoab mwana wa Seruya babonzelaki Nzambe, bapesi bya­ngo na Selomit mpe na bandeko ba ye batala byango.
I Ch LinVB 26:29  O kati ya bana ba Yisar, bapesi Kenania na bandeko ba ye mosala mwa kotala makambo ma mokili mwa Israel, bazala bakomi na bazuzi.
I Ch LinVB 26:30  O kati ya bana ba Ebron, bakamati Kasabia na bandeko ba ye nkoto yoko na nkama nsambo, banso bato ba mpiko ; bapesi bango mosala mwa kokengele ngambo ya Westi ya Yordane o makambo manso matali Yawe na mpe mokonzi.
I Ch LinVB 26:31  Yeria azalaki mokonzi wa bato ba libota lya Ebron. O ntango Davidi akokisi mibu ntuku inei o bokonzi, baluki banani bazalaki bato ba libota lya Ebron, mpe bazwi bato ba mpiko o mboka Yazer ya Galaad.
I Ch LinVB 26:32  Yeria na bandeko ba ye bazalaki nkoto ibale na nkama nsambo, banso bato ba mpiko, bankumu ba mabota ; moko­nzi Davidi atiaki bango bakonzi ba libota lya Ruben, ba libota lya Gad mpe ba ndambo ya libota lya Manase, mpo batala bango o makambo ma­nso matali Nzambe na mpe mokonzi.