Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 21
I Ch LinVB 21:1  Satana aluki kosala ba-Israel mabe ; yango wana apesi Davidi mayele mabe ma kotanga mota­ngo mwa ba-Israel.
I Ch LinVB 21:2  Davidi alobi na Yoab mpe na bankumu ba bato : « Bokende kotanga ba-Israel banso banda Berseba tee Dan ; awa bosilisi, boyebisa ngai motango mwa bango. »
I Ch LinVB 21:3  Yoab ayanoli : « Yawe akolisa naino ekolo ya ye mbala nkama ! E mokonzi wa ngai, bango banso bazali basaleli ba yo. Mpo nini mokonzi alingi koyeba motango mwa bato ? Mpo nini Israel ameme ngambo boye ? »
I Ch LinVB 21:4  Nzokande Yoab akoki koboya etinda ya mokonzi te, akatisi ekolo mobimba ya Israel ; na nsima azongi o Yeruzalem.
I Ch LinVB 21:5  Yoab ayebisi Davidi motango mwa bato : o Israel bato bakoki kobunda etumba na mopanga bazalaki mo-nkoko na nkoto monkama, mpe o Yuda bato bazalaki nkoto nkama inei na ntuku nsambo.
I Ch LinVB 21:6  Etinda ya moko­nzi esepelisaki Yoab soki te, bongo atangi ba-Levi na ba-Benyamin te.
I Ch LinVB 21:7  Nzambe mpe asepeli na yango te, yango wana akani kopesa Israel etu­mbu.
I Ch LinVB 21:8  Na nsima Davidi alobi na Nza­mbe : « Nasali lisumu linene. Sikawa limbisa ngai, mosaleli wa yo, zambi nasali lokola elema. »
I Ch LinVB 21:9  Yawe alobi na Gad, momoni-makambo wa Davidi, maloba maye :
I Ch LinVB 21:10  « Kende koyebisa Davidi : Yawe alobi : Nakolakisa yo mpo isato ; yo moko opono mpo yoko mpe nakokokisa eye oponi. »
I Ch LinVB 21:11  Gad akei epai ya Davidi mpe alobi na ye : « Yawe alobi boye : Yo moko pono :
I Ch LinVB 21:12  to mibu misato mya nzala enene, to sanza isato esika banguna bakoya konyokolo mpe koboma yo na mopanga, to mikolo misato esika Yawe akoya kobete yo na botindi bokono bobe o ekolo, esika anzelu mobebisi wa Yawe akoya koboma bato o ekolo mobimba ya Israel. Sikawa kanisa malamu mpe yebisa ngai eyano nini nazongisela Oyo atindi ngai. »
I Ch LinVB 21:13  Davidi azongiseli Gad : « Nazali koyoka motema nsomo ; malamu namibwaka o maboko ma Yawe, zambi ye aleki motema ngolu, nakweya o maboko ma bato te ! »
I Ch LinVB 21:14  Bongo Yawe atindi bokono bobe o Israel : bato nkoto ntuku nsambo bakufi o Israel.
I Ch LinVB 21:15  Nzambe atindi anze­lu abebisa Yeruzalem ; ezalaki ye kobebisa bongo, Yawe atali mpe ayokeli bango mawa. Alobi na anzelu mobebisi : « Ekoki, tika kosala mabe. » Anzelu wa Yawe atelemi penepene na etutelo ya Ornan, moto wa Yebus.
I Ch LinVB 21:16  Davidi atomboli miso mpe amoni anzelu wa Yawe kati ya likolo na nse, amemi mopanga o loboko, na yango akaneli Yeruzalem. Davidi na bakolo ba mboka balati ngoto, bakwei bilo­ngi o nse.
I Ch LinVB 21:17  Davidi alobi na Nzambe : « Ngai moto natindaki ’te bata­nga bato, ngai moto nasali lisumu mpe nabebisi, kasi mpata iye isali nini ? E Yawe Nzambe wa ngai, ebongi opesa ngai mpe libota lya ngai etumbu ; kasi opesa ekolo ya yo etumbu te. »
I Ch LinVB 21:18  Anzelu wa Yawe alobi na Gad : « Yebisa Davidi akende kotongela Yawe altare o etutelo ya Ornan, moto wa Yebus. »
I Ch LinVB 21:19  Davidi akei lokola Gad alobaki o nkombo ya Yawe.
I Ch LinVB 21:20  Ornan azalaki kotuta mbuma ya mampa, atali nsima mpe amoni anzelu ; akei noki kobombama, ye na bana ba ye banei.
I Ch LinVB 21:21  Davidi akei epai ya Ornan ; Ornan atali mpe amoni Davidi ; na nsima alongwi o etutelo mpe agu-mbami liboso lya Davidi, elongi o nse.
I Ch LinVB 21:22  Davidi alobi na Ornan : « Tikela ngai etutelo, kuna natongela Yawe altare ; nakosomba yango ; bobele bo­ngo bokono bokosila epai ya bato. »
I Ch LinVB 21:23  Ornan ayanoli Davidi : « Kamata yango mpe sala na yango lokola oli­ngi. Ngombe iye ozali komono, nakopesa yo yango bo mabonza ma kotumba, kamata makalo bo nkoni, mpe mbuma ya mampa bo libonza lya bolei ; nakopesa yo bina binso. »
I Ch LinVB 21:24  Kasi mokonzi Davidi alobi na Ornan : « Bongo te, nalingi kosomba ya­ngo. Nakokamata biloko bya yo te mpo ’te nabonzela Yawe libonza, soko nafuti yango te na motuya mobongi. »
I Ch LinVB 21:25  Davidi asombi esika ena mpe afuti Ornan mitako mya wolo nkama motoba.
I Ch LinVB 21:26  Davidi atongeli Yawe altare, mpe abonzeli ye mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko. Abondeli Yawe ; Yawe apesi ye eya­no mpe ut’o likolo atindi móto o altare ya mabonza.
I Ch LinVB 21:27  Na nsima Yawe alobi na anzelu ’te azongisa mopanga o libenga.
I Ch LinVB 21:28  O mikolo mina emoni Davidi ’te Yawe apesaki ye eyano o etutelo ya Ornan, moto wa Yebus, abonzeli ye miboma.
I Ch LinVB 21:29  Nzokande o eleko ena ndako ya Yawe, eye Moze atongaki o eliki, na altare ya mabo­nza ma kotumba izalaki o ngomba ya Gabaon,
I Ch LinVB 21:30  kasi Davidi abangaki kokende kokumisa Nzambe kuna, za­mbi mopanga mwa anzelu wa Yawe mobangisaki ye.