Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 23
I Ch LinVB 23:1  Davidi akomi mobange mpe akokisi mikolo mingi o nta­ngo apesi mwana wa ye Salomo bokonzi bwa Israel.
I Ch LinVB 23:2  Abengi bankumu ba Israel banso, na banganga Nza­mbe na ba-Levi.
I Ch LinVB 23:3  Batangi ba-Levi, baye bakokisi mibu ntuku isato. Bakoki bato nkoto ntuku isato na mwambe.
I Ch LinVB 23:4  O kati ya bango, bato nkoto ntuku ibale na inei bakambi bisambo o ndako ya Yawe ; bato nkoto motoba bazalaki bakomi na bazuzi,
I Ch LinVB 23:5  bato nkoto inei bakengeli ba bizibeli mpe bato nkoto inei bazalaki mpo ya kokumisa Yawe na biyembeli Davidi asalaki na ntina ena.
I Ch LinVB 23:6  Davidi akaboli bango o mango-mba, alandi bongo mabota ma bana ba Levi : Gerson, Keat na Merari.
I Ch LinVB 23:8  na bana basato ba Ladan : Yekiel, motomolo, Zetam na Yoel.
I Ch LinVB 23:9  Bana basato ba Simei : Selomit, Kaziel na Aran. Bango bankumu ba libota lya Ladan.
I Ch LinVB 23:10  Na bana banei ba Simei : Yakat, Zina, Yeus na Beria, bango bana banei ba Simei.
I Ch LinVB 23:11  Yakat azalaki motomolo, wa babale Zina ; na nsima bana ba Yeus na Beria, basangisi bango o libota lyoko mpo babotamaki mingi te.
I Ch LinVB 23:12  Keat azalaki na bana banei : Amram, Yisar, Ebron na Uziel.
I Ch LinVB 23:13  Amram aboti Arone na Moze. Baponi Arone mpo ya kosantisa biloko bileki bisa-ntu ; ye na bana ba ye basengeli kotumba mpaka ya malasi o boso bwa Yawe, kosalela ye mpe kobenisa bato o nkombo ya ye seko.
I Ch LinVB 23:14  Moze azalaki moto wa Nzambe, bana ba ye batangemi o libota lya ba-Levi.
I Ch LinVB 23:17  Eliezer aboti Rekabia, mwana wa yambo ; Eliezer aboti bana babali basusu te, kasi bana ba Rekabia bazalaki baike.
I Ch LinVB 23:19  Ebron aboti Yeria, mwana wa yambo, Amaria, mwana wa babale, Yakaziel, mwana wa basato na Yekamam, mwana wa banei.
I Ch LinVB 23:20  Uziel aboti liboso Mika, na Yisia, mozimi wa ye.
I Ch LinVB 23:21  Merari aboti Mali na Musi. Mali aboti Eleazar na Kis.
I Ch LinVB 23:22  Eleazar akufi, aboti bana babali te, se bana basi ; bandeko ba bango, bana ba Kis babali bango.
I Ch LinVB 23:23  Musi aboti bana basato : Mali, Eder na Yeremot.
I Ch LinVB 23:24  Bango banso bazalaki bana ba libota lya Levi, etuka na etuka ; bazalaki bankumu ba mabota, batangi ba­ngo moko moko. Baye banso bakokisi mibu ntuku ibale basengeli kosala mosala o ndako ya Yawe.
I Ch LinVB 23:25  Solo, Davidi alobaki : « Yawe Nza­mbe wa Israel akomisi ekolo ya ye nye, mpe akofanda o Yeruzalem seko.
I Ch LinVB 23:26  Ba-Levi basengeli lisusu komeme Ema na biloko bya yango te. »
I Ch LinVB 23:27  Yango wana, engebene na maloba ma nsuka ma Davidi, batangi bana ba Levi, banda baye bakokisi mibu ntuku ibale.
I Ch LinVB 23:28  Bango basengeli kotosa biti­nda bya bana ba Arone mpo ya misala o Tempelo ya Yawe : batala lopango, biteni binene bya ndako, bapetola biloko bisantu binso, basala mpe misala misusu o Tempelo ya Nza­mbe.
I Ch LinVB 23:29  Batala mampa ma libo­nza, fufu mpo ya libonza, minkate mizangi nkisi, minkate bakalingi o lisasu, minkate milambami na biloko bisusu ; batala mpe kopo mpo ya komeka bozito bwa biloko.
I Ch LinVB 23:30  Bateleme ntongo na mpokwa inso mpo ya kokumisa mpe koyembela Yawe,
I Ch LinVB 23:31  mpo ya kobonzela Yawe mabonza ma kotumba o mikolo mya Sabato, mikolo mya sanza ya sika mpe o biyenga bisusu lokola mobeko motindi. Tala mosala mwa bango mwa seko o boso bwa Yawe.
I Ch LinVB 23:32  Bazalaki mpe na mosala mwa kotala Ema ya Likita, na biloko bisantu binso, basalisa mpe bandeko ba bango, bana ba Arone, baye bakosalaka mosala o Tempelo ya Yawe.