II CORINTHIANS
Chapter 11
II C | LinVB | 11:1 | Bólingisa ngáí ’te náloba naíno mwa maloba ma bozóba. Nayébí ’te bokolingisa ngáí yangó. | |
II C | LinVB | 11:2 | Nazalí koyókela bínó zúwa, lokóla Nzámbe akoyókaka zúwa, mpô ngáí moto nabandísí bínó na Krístu, bolóngani wa bínó sé mǒkó, mpô ’te bókoka kokóma epái ya yě lokóla ngondo péto. | |
II C | LinVB | 11:3 | Kasi nabángí ’te, lokóla nyóka eséngínyí Eva na mayéle mabé, makanisi malámu ma bínó mábúnga mpé bótíka kolinga Krístu na motéma mǒkó. | |
II C | LinVB | 11:4 | Namóní ’te bokokí kondima nokí sókó moto atâ náni asa-ngélí bínó Yézu mosúsu, óyo bísó tosangélákí bínó té ; tǒ alingí kokúlisa bínó elímo esúsu, Elímo óyo té bínó bokúlí ; tǒ ayélí bínó Nsango Elámu esúsu, eye boyambí naíno té. | |
II C | LinVB | 11:6 | Atâ nayébí koloba malámu míngi té, nayébí mambí ma bosôló maíké ; nasílí nalakísí bínó mangó na ndéngé míngi. | |
II C | LinVB | 11:7 | Nasálákí ndé mabé áwa naséngékí bínó lifúta té ntángo nasangélákí bínó Nsango Elámu, tǒ ntángo namíkitísákí mpô ya kotómbola bínó ? | |
II C | LinVB | 11:8 | Bato ba Biklézya bisúsu basálísí ngáí mpé bapésí ngáí lifúta mpô ’te nákoka kosálisa bínó. | |
II C | LinVB | 11:9 | Ntángo nayákí epái ya bínó mpé nabandí kokélela, naséngékí bínó elóko té : bandeko baútí o Masedónia bato basálísákí ngáí o mánso mazángákí ngáí. Nalingákí kotíela bínó mókúmbá atâ moké té. Nsima nakosála sé bôngó. | |
II C | LinVB | 11:10 | Nalobí ya sôló o nkómbó ya Krístu : Atâ moto mǒkó té o mokili mwa Akáya akobótolo ngáí ntína ya litundú eye. | |
II C | LinVB | 11:12 | Nakokóba kosála bôngó mpô ’te násúkisa lokutá la baye bazalí koluka nzelá ya komíkúmisa ’te bakokání na bísó. | |
II C | LinVB | 11:13 | Zambi bangó bazalí bapóstolo ba lokutá, basáleli bazángá bosémbo, baye bakomílakisaka bǒ bapóstolo ba Krístu. | |
II C | LinVB | 11:15 | Sé bôngó bato ba yě bakokósaka ’te bazalí basáleli ba bosémbo. Kasi ekosúkela bangó mabé engébéné na misálá mya bangó. | |
II C | LinVB | 11:16 | Nalobí lisúsu : Moto mǒkó té átála ngáí lokóla zóba ; tǒ mpé, bótála ngáí lokóla zóba mpô ’te nákoka komíkúmisa mwâ moké. | |
II C | LinVB | 11:17 | Maye nakoloba, nakoloba mangó na makanisi ma Mokonzi té ; nakoloba lokóla zóba sókó namíkúmísí. | |
II C | LinVB | 11:18 | Kasi mpô bato ebelé bakomíkúmisaka na makambo ma nsé eye, tíká ngáí mpé námíkúmisa. | |
II C | LinVB | 11:20 | Bokondimaka ’te bákómisa bínó baómbo, bálía bínó, bábótolo bínó bilóko, bátála bínó na loléndo tǒ bábéte bínó o elongi. | |
II C | LinVB | 11:21 | Tozalí koyóka nsóni mpenzá na bondimi ’te tozángákí makási ma kosála bôngó. Nzókandé sókó babángí té komíkúmisa atâ na níni, náloba lokóla zóba, ngáí mpé námíkúmisa. | |
II C | LinVB | 11:22 | Bangó bazalí ba-Ebréí ? Ngáí lokóla. Bazalí ba-Israél ? Ngáí lokóla. Bazalí bankókolo ba Abaráma ? Ngáí lokóla. | |
II C | LinVB | 11:23 | Bangó bazalí basáleli ba Krístu ? Tíká náloba likambo lya bozóba : nalekí bangó. Nalekí bangó na mosálá nasálákí, bakangákí ngáí o bolóko sókó mbala bóní, babétékí ngáí sókó mbala bóní. Mbala míngi nalingákí nákúfa. | |
II C | LinVB | 11:25 | Mbala ísáto ba-Róma babétékí ngáí na língénda, mbala yǒ kó balingákí koboma ngáí na mabángá ; mbala ísáto nazalákí o masúwa mazindákí o mái ; mokolo mobimba natíkálákí o mái, butú mói ! | |
II C | LinVB | 11:26 | Nasálákí mibémbo ebelé mpé nayókákí mpási o ebale, nabíkákí o mabóko ma bayíbi, nazalákí na makáma epái ya bandeko ba ngáí mpé epái ya bapagáno ; nazalákí na makáma o engumbá mpé o elíkí, makáma o mbú mpé o káti ya bandeko ba lokutá ! | |
II C | LinVB | 11:27 | Namílembísákí na mosálá monéne ; mbala míngi nazalákí kolála mpongí té, koyóka nzala tǒ mpósá ya komele ; nalálákí nzala, nayókákí mpío mpé nazángákí ela-mbá ! | |
II C | LinVB | 11:28 | Mpási iye itíkálí nakotánga yangó té : mokolo na mokolo nakomítungisaka mpô ya bolámu bwa Biklézya. | |
II C | LinVB | 11:29 | Nani akómí motaú, ngáí mpé nakóma motaú té ; nani akwéí o masúmu, nakóma koyóka mpási o motéma té. | |
II C | LinVB | 11:31 | Bákúmisa nkómbó ya Nzámbe, Tatá wa Mokonzi Yézu, sékô ! Yě ayébí ’te nazalí kokósa té. | |
II C | LinVB | 11:32 | O Damásko moyángeli wa mokonzi Arétas atíndákí ’te bákéngele engumbá mpô ya kokanga ngáí ; | |