II KINGS
Chapter 9
II K | LinVB | 9:1 | Profeta Elizeo abengi moko wa bayekoli ba profeta, alobi na ye : « Kanga nkamba, kamata mbeki ya mafuta mpe kende o Ramot ya Galaad. | |
II K | LinVB | 9:2 | Ekomi yo kuna, luka Yeku, mwana wa Yozafat, mwana wa Nimsi. Soko omoni ye, sala ’te olongola ye o kati ya baninga mpe kende na ye o ndako, bozala se bino moko. | |
II K | LinVB | 9:3 | Kamata mbeki ya mafuta, pakola ye mafuta o motó mpe loba : “Yawe alobi boye : Na bopakoli boye, nakomisi yo mokonzi wa Israel !” Na nsima fungola ezibeli ya ndako mpe kima mbangu. » | |
II K | LinVB | 9:5 | Ekomi ye kuna, bakomanda ba basoda bazalaki kofanda esika yoko. Profeta alobi : « E mokonzi, nalingi kolobela yo mwa liloba ! » Yeku atuni ye : « Olingi kotuna nani o kati ya biso ? » Ayanoli : « Yo, mokonzi ! » | |
II K | LinVB | 9:6 | Yeku atelemi mpe akoti o ndako. Moyekoli wa profeta asopeli ye mafuta o motó, alobi : « Yawe Nzambe wa Israel alobi boye : Na bopakoli boye nakomisi yo mokonzi wa Israel, ekolo ya Yawe. | |
II K | LinVB | 9:7 | Boma bato banso ba libota lya Akab, mokonzi wa yo. Nakobekola bongo makila ma basaleli ba ngai baprofeta na basaleli basusu ba Yawe, baye Yezabel abomaki. | |
II K | LinVB | 9:8 | Bato banso ba libota lya Akab bakokufa ; nakosilisa babali banso ba libota lya Akab, bazala baombo to bansomi o Israel. | |
II K | LinVB | 9:9 | Nakosala na libota lya Akab lokola nasalaki na libota lya Yeroboam, mwana wa Nebat, mpe lokola nasalaki libota lya Basa, mwana wa Akia. | |
II K | LinVB | 9:10 | Mbwa ikolia Yezabel o elanga ya Yizreel, mpe moto moko akokunda ye te. » Afungoli ezibeli ya ndako mpe akimi. | |
II K | LinVB | 9:11 | Ntango Yeku azongi epai ya basaleli ba mokonzi wa ye, batuni ye : « Manso mazali malamu ? Mpo nini zoba oyo ayaki epai ya yo ? » Azongisi : « Bino moko boyebi ye, boyebi mpe masolo ma ye. » | |
II K | LinVB | 9:12 | Kasi bango balobi na ye : « Lokuta ! Yebisa biso malamu ! » Ayanoli : « Alobaki makambo ndenge na ndenge mpe alobaki : Yawe alobi boye : Napakoli yo mafuta okoma mokonzi wa Israel. » | |
II K | LinVB | 9:13 | Noki bango banso bakamati minkoto mya bango mpe batandi myango o nse liboso lya ye. Babeti mindule mpe bagangi : « Yeku akomi mokonzi ! » | |
II K | LinVB | 9:14 | Yeku, mwana wa Yozafat, mwana wa Nimsi, aluki kolongola Yoram o bokonzi. Yoram na basoda banso ba Israel bazalaki o Ramot ya Galaad mpo babatela mboka o etumba na Azael, mokonzi wa Aram. | |
II K | LinVB | 9:15 | Mokonzi Yoram azongaki o Yizreel mpo ya kokangisa mpota ba-Aram bazokisaki ye ntango ya etumba na Azael, mokonzi wa Aram. Yeku alobi : « Bino baye bondimi ngai, bokeba ’te moto moko abima o mboka te mpo akende koyebisa nsango o Yizreel ! » | |
II K | LinVB | 9:16 | Yeku abuti likalo lya ye mpe akei o Yizreel. Kuna akuti Yoram azalaki kolala o mbeto mpo ya mpasi, na mpe Okozia, mokonzi wa Yuda, oyo ayei kotala ye. | |
II K | LinVB | 9:17 | Monongi oyo atelemi o linongi amoni basoda ba Yeku bazalaki koya mingi, ayebisi : « Nazali komono basoda baike. » Yoram alobi : « Pono soda wa farasa mpe tinda ye akende kokutana na bango mpe atuna bango soko manso mazali malamu. » | |
II K | LinVB | 9:18 | Soda wa farasa akei kokutana na Yeku mpe ayebisi ye : « Mokonzi wa ngai atuni soko bozali malamu. » Yeku ayanoli : « Tozala malamu to te, etali nde yo ? Bongola farasa mpe landa ngai. » Mokengeli ayebisi : « Ntoma akomaki epai ya bango azongi te. » | |
II K | LinVB | 9:19 | Mokonzi atindi soda wa farasa mosusu ; oyo akutani na bango mpe alobi : « Mokonzi atuni soko bozali malamu. » Yeku azongisi : « Mpo nini mokonzi atuni boye ? Bongola farasa mpe landa ngai. » | |
II K | LinVB | 9:20 | Mokengeli ayebisi : « Moto akomaki epai ya bango azongi te. Azali kotambwisa likalo mbangu-mbangu lokola Yeku, mwana wa Nimsi. » | |
II K | LinVB | 9:21 | Yoram alobi : « Bobongisa farasa na makalo. » Babongisi makalo. Yoram, mokonzi wa Israel na Okozia, mokonzi wa Yuda bakei, moto na moto o likalo lya ye, bakei kokutana na Yeku. Bazwi ye o elanga ya Nabot wa Yizreel. | |
II K | LinVB | 9:22 | Awa Yoram amoni Yeku, atuni ye : « Yeku, ozali malamu ? » Ayanoli : « Nazala malamu, awa mama wa yo Yezabel azali bobele kosala bondumba mpe makambo ma nkisi ? » | |
II K | LinVB | 9:24 | Yeku abeti litimbo mpe azokisi Yoram o kati ya mapeke ; likula lituboli ye motema mpe libimi epai ya ntolo. Bongo akwei o likalo. | |
II K | LinVB | 9:25 | Yeku alobi na mosali wa ye Bidkar : « Longola ye mpe bwaka ye o elanga ya Nabot wa Yizreel. Okundola naino mokolo biso na yo tozalaki o likalo nsima ya tata wa ye Akab, Yawe asakolaki maloba maye mpo ya ye : | |
II K | LinVB | 9:26 | ‘Solo, lobi namonoki makila ma Nabot mpe ma bana ba ye. Nakozongisela yo mabe o elanga eyemei. Maloba ma Yawe’. Sikawa longola Yoram mpe bwaka ye o elanga ena, lokola Yawe alobaki. » | |
II K | LinVB | 9:27 | Emoni Okozia, mokonzi wa Yuda, makambo mana, akimi o nzela ya Bet-Agan ; kasi Yeku alandi ye mpe alobi na bato ba ye : « Boboma mpe ye. » Bazokisi ye o likalo lya ye epai ya ngomba ya Gur, penepene na Yibleam, mpe bazokisi ye o likalo lya ye. Kasi ye akimi o Megido, esika akufi. | |
II K | LinVB | 9:28 | Basaleli ba ye bamemi ye o likalo epai ya Yeruzalem mpe bakundi ye o lilita lya bankoko ba ye, o Engumba ya Davidi. | |
II K | LinVB | 9:29 | Okozia akomaki mokonzi wa Yuda o eleko Yoram, mwana wa Akab, akokisaki mibu zomi na moko mya bokonzi. | |
II K | LinVB | 9:30 | Yeku azongi o Yizreel mpe Yezabel ayoki nsango ena. Apakoli langi mpembeni ya miso, akembisi motó mwa ye mpe akei kotala o lininisa. | |
II K | LinVB | 9:31 | Ntango Yeku azalaki koleka o ezibeli ya mboka, Yezabel atuni : « Boni, Zimri, mobomi wa mokonzi wa ye, ozali malamu ? » | |
II K | LinVB | 9:32 | Yeku atali epai ya lininisa mpe alobi : « Nani alingi ngai, nani andimi kosalisa ngai ? » Basaleli ba ye babale to basato bandimi mpe batali ye. | |
II K | LinVB | 9:33 | Alobi na bango : « Bobwaka ye o nse ! » Babwaki ye o nse. Makila ma ye mapanzani mpe makweli efelo ya ndako mpe farasa ; mpe Yeku anyati nzoto ya ye. | |
II K | LinVB | 9:34 | Na nsima Yeku ayingeli o mboka, mpe awa asilisi kolia mpe komele alobi : « Bokende kotala mwasi mabe ona mpe bokunda ye, zambi azali mwana wa mokonzi. » | |
II K | LinVB | 9:36 | Bakei koyebisa Yeku. Ye alobi : « Esalemi se lokola Yawe alobaki na monoko mwa mosaleli wa ye Elia, moto wa Tesbe : ‘O elanga ya Yizreel, mbwa ikolia misuni mya Yezabel, | |